Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge oyo Biblia ebatelamá tii na mikolo na biso

Ndenge oyo Biblia ebatelamá tii na mikolo na biso

Ndenge oyo Biblia ebatelamá tii na mikolo na biso

Ndenge oyo Biblia mobimba ebatelamá tii na mikolo na biso ezali mpenza likamwisi. Basilisá kokoma yango eleki bambula koleka 1900. Bakomaki yango na biloko oyo ebebaka, na ndakisa nkasa oyo basali na papirise to mposo ya nyama. Na ebandeli, bakomaki yango na minɔkɔ oyo bato mingi te balobaka lelo oyo. Longola yango, bato minene lokola baamperɛrɛ mpe bakonzi ya mangomba basalaki nyonso mpo na kolimwisa yango.

NDENGE nini buku yango oyo esɛngaki mosala monene ebatelamá mpo ekóma tii na mikolo na biso mpe lelo oyo eyebani mingi koleka babuku mosusu nyonso? Tótalela kaka bantina mibale.

Basalaki bakopi na yango ebele

Bayisalaele nde bazalaki na mikanda ya libosoliboso ya Biblia, babatelaki barulo yango malamu mpe basalaki bakopi na yango ebele. Na ndakisa, esɛngisamaki na mokonzi nyonso ya Yisalaele akoma ‘mpo na ye mpenza kati na buku maloba ya Mobeko, longwa na oyo ezalaki na mabɔkɔ ya banganga, Balevi.’​—Deteronome 17:18.

Bayisalaele mingi bazalaki kosepela kotánga Makomami mpo bazalaki kotalela yango ete ezali Liloba ya Nzambe. Yango wana, bakomeli oyo balakisamaki malamu nde bazalaki kosala bakopi na yango na likebi mpenza. Biblia elobi mpo na moko na bango, Ezela, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, ete azalaki “mokomeli ya mayele na Mobeko ya Moize oyo [Yehova], Nzambe ya Yisalaele apesaki.” (Ezela 7:6) Bamasorete, oyo bazalaki kosala bakopi ya Makomami ya Liebele to “Testama ya Kala,” kobanda ekeke ya motoba tii ya zomi ya ntango na biso (T.B.), bazalaki ata kotánga motuya ya balɛtrɛ oyo bakomi mpo bákɔtisa mabunga te. Yango esalaki ete bakopi ekokana na makomi ya ebandeli mpe Biblia ezala tii lelo atako banguna bazalaki ntango nyonso koluka kolimwisa yango.

Na ndakisa, na mobu 168 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Antiochus IV, mokonzi ya Sulia, alukaki kobebisa bakopi nyonso ya Makomami ya Liebele oyo akokaki komona na Palestine mobimba. Buku moko ya istware ya Bayuda elobi ete: “Bazalaki kopasola mpe kotumba rulo nyonso ya mibeko oyo bamoni.” Buku mosusu (The Jewish Encyclopedia) elobi ete: “Bakonzi ya basoda oyo bazwaki mokumba ya kotosisa mitindo wana bazalaki kosala yango na lisɛki te . . . Soki bazwi moto na mokanda moko ya bosantu . . . bazalaki kopesa ye etumbu ya liwa.” Atako bongo, Bayuda ya Palestine mpe baoyo bazalaki kofanda na bamboka mosusu bazalaki kaka na bakopi ya Makomami.

Mwa moke nsima ya ntango oyo basilisaki kokoma Makomami ya Grɛki ya boklisto to “Testama ya Sika,” bakopi ya mikanda, ya bisakweli mpe ya masolo ya kala oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe esalemaki ebele. Na ndakisa, Yoane akomaki Evanzile na ye na Efese to pene na Efese. Nzokande, bazwaki eteni ya kopi moko ya Evanzile yango na mboka moko ya Égypte, oyo ezali mosika na Efese. Bato ya mayele balobi ete kobanda Yoane asilisaki kokoma Evanzile na ye tii ntango basalaki kopi yango elekaki mbula 50 te. Yango emonisi ete baklisto ya bamboka ya mosika bazalaki na bakopi ya makomi oyo eutaki kokomama na lisalisi ya elimo ya Nzambe na ntango wana.

Lokola Liloba ya Nzambe epanzanaki mingi, yango mpe esalaki ete Liloba yango eumela bambula ebele nsima ya Klisto. Na ndakisa, balobaka ete na ntɔngɔ ya mokolo ya 23 Febwali ya mobu 303 T.B., Dioclétien, amperɛrɛ ya Loma, azalaki wana ntango basoda na ye bazalaki kobuka baporte ya ndako-nzambe moko mpe kotumba bakopi ya Makomami. Dioclétien akanisaki ete akoki kosilisa boklisto ya solo soki abebisi makomi mosantu ya lingomba yango. Na mokolo oyo elandaki, abimisaki mobeko ete bakopi nyonso ya Biblia esengelaki kotumbama na miso ya bato na bamboka nyonso oyo eyangelamaki na Baloma. Kasi, ndambo ya bakopi etikalaki mpe basalaki bakopi mosusu. Kutu, biteni mingi ya bakopi mibale ya Biblia na monɔkɔ ya Grɛki, oyo esalemaki ntango mosusu mwa moke nsima ya minyoko oyo Dioclétien abimisaki, ezali tii lelo. Moko na bakopi yango ezali na Rome, mosusu na bibliotɛkɛ monene ya Angleterre oyo ezali na Londres.

Atako mikanda ya ebandeli oyo bakomi ya Biblia bakomaki bango moko ezwami naino te tii lelo oyo, bankóto ya bakopi ya Biblia mobimba to biteni na yango oyo bato bakomaki na mabɔkɔ, ezali tii lelo. Mosusu ezali ya kala mpenza. Nsango oyo ezalaki na makomi ya ebandeli ebongwanaki nde ntango bazalaki kosala bakopi? William Green, moto moko ya mayele, alobaki mpo na Makomami ya Liebele ete: “Tokoki mpenza koloba ete ezali na makomi mosusu te ya ntango ya kala oyo ebatelamá malamu lokola yango.” Frederic Kenyon, moto moko ya mayele oyo akendá nsango na likambo ya bakopi ya kala ya Biblia, akomaki mpo na Makomami ya Grɛki ya boklisto ete: “Ntango oyo elekaki banda bakomaki maloba mpenza ya Makomami tii ntango basalaki bakopi ya libosoliboso oyo tozali na yango lelo ezali mpenza mokuse mpe ntina ya kolobela yango ezali te. Na yango, makambo mosusu oyo ezalaki naino kotinda biso tókanisa ete Makomami ebongwani ezali lisusu te. Tokoki koloba ete sikoyo makambo nyonso emonisi ete mikanda ya Testama ya Sika ezali solo mpe nyonso ezali na bomoko.” Alobaki mpe ete: “Tondimisami mpenza ete makambo oyo ekomami na Biblia ezali kaka ndenge ezalaká na ebandeli. . . . Kasi, ezali bongo te mpo na babuku mosusu ya kala.”

Babongolaki yango na minɔkɔ mosusu

Likambo ya mibale oyo esalá ete Biblia ezala buku oyo eyebani mingi koleka ezali mpo ebongolami na minɔkɔ mingi. Yango eyokani na mokano ya Nzambe oyo ezali ete bato ya bikólo nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso báyeba ye mpe básambela ye “na elimo mpe na solo.”​—Yoane 4:23, 24; Mika 4:2.

Libongoli ya liboso ya Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki oyo eyebanaki ezalaki libongoli ya Septante. Yango esalemaki mpo na Bayuda oyo bazalaki koloba Grɛki, oyo bazalaki kofanda na Palestine te, mpe basilisaki kobongola yango bambula soki nkama mibale liboso Yesu abanda mosala na ye awa na mabelé. Biblia mobimba, oyo esangisi mpe Makomami ya Grɛki ya boklisto, ebongolamaki na minɔkɔ ebele na boumeli ya mwa bankama ya bambula nsima ya kokomama na yango. Kasi na nsima, bakonzi, ata mpe basango, oyo basengelaki kosala nyonso mpo bato bázala na Biblia, basalaki nde nyonso mpo na kopekisa bato bázala na yango. Basango bapesaki nzela te ete Liloba ya Nzambe ebongolama na minɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba mpo balingaki bandimi na bango bátikala kaka na molili na makambo ya Nzambe.

Atako Lingomba mpe Leta balingaki te, bato ya mpiko batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobongola Biblia na minɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba. Na ndakisa, na mobu 1530, William Tyndale, moto moko ya Angleterre oyo atángaki na Iniversite ya Oxford, abimisaki libongoli moko ya Pentatɛkɛ, elingi koloba mikanda mitano ya ebandeli ya Makomami ya Liebele. Atako batɛmɛlaki ye mingi, akómaki moto ya liboso oyo abongolaki Biblia mbala moko na Lingelesi longwa na Liebele. Lisusu, ye nde mobongoli ya liboso oyo asalelaki nkombo Yehova na Lingelesi. Ntango Casiodoro de Reina, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia na Espagne, azalaki kosala libongoli na ye oyo ezalaki moko ya mabongoli ya libosoliboso ya Biblia na monɔkɔ ya Espagnol, bato ya Lingomba ya Katolike oyo bazalaki konyokola bato bazalaki ntango nyonso koluka koboma ye. Yango wana, akendeki na Angleterre, na Allemagne, na France, na Pays-Bas mpe na Suisse mpo asilisa libongoli na ye. *

Lelo oyo, Biblia ezali se kobongolama na minɔkɔ ebele mpe ezali kobimisama mingi. Lokola Biblia ebatelamá mpo ekóma tii na ntango na biso mpe lelo oyo eyebani mingi koleka babuku mosusu, yango emonisi ete maloba oyo ntoma Petelo alobaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe ezali solo: “Matiti ekaukaka, mpe fololo ekweaka, kasi liloba ya Yehova ezali koumela libela na libela.”​—1 Petelo 1:24, 25.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Libongoli ya Reina ebimisamaki na mobu 1569 mpe Cipriano de Valera abongisaki yango lisusu na mobu 1602.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 14]

LIBONGOLI NINI NASENGELI KOTÁNGA?

Na minɔkɔ mingi, mabongoli ya Biblia ezali ebele. Na mabongoli mosusu, basalelá maloba ya kala to oyo ezali mpasi kokanga ntina na yango. Na mabongoli mosusu, bakomá mpenza te makanisi ya Nzambe ndenge ezalaki na makomi ya ebandeli, kasi bakomá yango mingimingi mpo na kosalisa motángi atánga yango kozanga kokakatana. Ezali mpe na mabongoli mosusu oyo bameká kobongola liloba mokomoko oyo ezalaki na makomi ya ebandeli.

Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu na Lingelesi, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, ebongolamaki na etuluku moko ya bato oyo balingaki te bankombo na bango eyebana; babongolaki longwa na minɔkɔ oyo Biblia ekomamaki na ebandeli. Na nsima, babongoli mosusu basalelaki libongoli yango mingi mpo na kobongola Biblia na minɔkɔ mosusu soki 60. Atako bongo, mbala mingi bazalaki mpe koluka koyeba soki makomi ya ebandeli elobi nini. Mokano ya babongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezali ya kobongola liloba mokomoko oyo ezali na makomi ya ebandeli soki ekobimisa likanisi polele. Basalaka makasi ete moto oyo azali kotánga Biblia lelo oyo akanga ntina na yango ndenge moko na bato ya kala oyo batángaki makomami yango na minɔkɔ oyo yango ekomamaki na ebandeli.

Bato mosusu ya mayele na makambo ya nkota batalelaki mabongoli ya Biblia ya mikolo na biso, bakisa mpe Libongoli ya Mokili ya Sika, mpo na koyeba bisika oyo ebongolamaki malamu te to oyo babongoli bakɔtisaki makanisi oyo eyokani na bindimeli na bango. Moko na bango ezali Jason David BeDuhn, molakisi ya makambo ya losambo na iniversite moko na États-Unis (Northern Arizona University). Na mobu 2003, abimisaki buku moko ya nkasa 200 epai alobelaki mabongoli libwa ya “Biblia oyo bato mingi ya mikili oyo balobaka Lingelesi basalelaka.” * Na buku na ye, atalelaki bavɛrsɛ mingi oyo ebimisaka ntembe, mpamba te na bavɛrsɛ ya ndenge wana nde “mobongoli akoki mpenza kokɔtisa makanisi oyo eyokani na bindimeli na ye.” Atalaki ndenge bavɛrsɛ yango ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki mpe ndenge oyo babongolaki yango na Lingelesi na libongoli mokomoko mpo na koyeba soki babongoli bamekaki kopesa yango ndimbola oyo eyokani na bindimeli na bango. Alobaki nini mpo na yango?

BeDuhn alobaki ete bato ebele, ezala bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia, bakanisaka ete bato oyo babongolaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (NW) balukaki koyokanisa makambo mosusu na bindimeli ya lingomba na bango; yango wana libongoli na bango ekeseni na mabongoli mosusu. Kasi, alobaki lisusu boye: “Na bavɛrsɛ mingi, Libongoli ya Mokili ya Sika ekeseni na mabongoli mosusu mpo libongoli yango ebimisi makanisi ndenge mpenza ezalaki na makomi ya ebandeli mpamba te na libongoli yango, liloba mokomoko ebongolami na bokatikati mpenza.” Atako BeDuhn andimaki te ndenge oyo makambo mosusu ebongolami na Libongoli ya Mokili ya Sika, kasi alobaki ete libongoli yango “eleki mabongoli mosusu nyonso oyo atalelaki mpo yango ebimisi makanisi mpenza ndenge ezalaki na makomi ya ebandeli.” Alobaki ete “ezali libongoli ya malamu mpenza.”

Benjamin Kedar, moto moko ya mayele na Liebele oyo afandi na Israël, alobaki mpe bongo mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika. Na mobu 1989, alobaki ete: “Milende ya solosolo esalemaki na libongoli oyo mpo na kobimisa ndimbola ya sikisiki ya makomi na ndenge oyo ekoki. . . . Na Libongoli ya Mokili ya Sika, naino namoná ata likanisi moke te ya komeka kobakisa eloko moko oyo ezali te kati na makomi [ya ebandeli].”

Omituna boye: ‘Mokano na ngai ezali nini ntango nalingi kotánga Biblia? Nalingi Biblia oyo ezali mpasi te mpo na kotánga, atako ebimisi te makanisi ndenge mpenza ezalaki na makomi ya ebandeli? To nalingi nde kotánga makanisi oyo eyokani mpenza na makomi ya ebandeli oyo epemamaki na Nzambe?’ (2 Petelo 1:20, 21) Mokano na yo nde ekotinda yo opona libongoli boye to boye.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 22 Longola Libongoli ya Mokili ya Sika, atalelaki mpe mabongoli oyo: The Amplified New Testament, The Living Bible, The New American Bible With Revised New Testament, New American Standard Bible, The Holy Bible​New International Version, The New Revised Standard Version, The Bible in Today’s English Version, mpe King James Version.

[Elilingi]

“Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu” ebimisami na minɔkɔ ebele

[Elilingi na lokasa 12, 13]

Bakopi oyo Bamasorete basalaki

[Elilingi na lokasa 13]

Eteni ya kopi moko oyo ezali na maloba ya Luka 12:7, “. . . Bóbanga te; bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Lokasa ya liboso: National Library of Russia, St. Petersburg; oyo elandi mpe oyo ya nsuka: Bibelmuseum, Münster; nsima ya nkasa yango: © The Trustees of the Chester Beatty Library, Dublin