Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 Ntina ya kotyela Biblia motema

5. Bisakweli na yango oyo ekokisamaki

5. Bisakweli na yango oyo ekokisamaki

Tózwa ndakisa ya moto moko ya siansi oyo ayekolaka makambo mpo na koyebisa bato soki moi to mbula ekozala mpe maloba na ye ekokisamaka mbala nyonso. Soki alobi ete mbula ekonɔka, okomema lingɛmbu te?

BIBLIA etondi na bisakweli to makambo oyo eyebisami liboso ete esalema. * Bisakweli ya Biblia ezalaka ntango nyonso solo mpe makambo oyo eleká endimisi yango polele.

Bisakweli oyo ekeseni na mosusu.

Mbala mingi, bisakweli ya Biblia elobelaka makambo na bozindo mpe ata makambo ya mikemike oyo yango elobelaka ekokisamaka. Elobelaka mingimingi makambo ya ntina mpenza. Bisakweli yango ekesanaka mingi na makanisi oyo bato ya ntango oyo yango ekomamaki bakokaki kozala na yango.

Ndakisa moko ya kokamwisa.

Kala, Babilone etongamaki na esika oyo ebongi mpenza, ngámbo na ngámbo ya Ebale Efalata mpe bazalaki kobenga yango “engumba monene ya Azia ya Ɛsti na oyo etali politiki, losambo mpe mimeseno ya bato.” Na mobu soki 732 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mosakoli Yisaya akomaki ete likama moko ekoyela Babilone: ekokwea. Yisaya akomaki makambo oyo: Mokonzi moko na nkombo ‘Sirise’ nde akobɔtɔla yango, ‘bakokaukisa’ mai ya Ebale Efalata oyo ezalaki kobatela engumba yango mpe bikuke ya engumba ‘ekokangama te.’ (Yisaya 44:27–45:3) Mbula soki 200 na nsima, na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔbɛ 539 L.T.B., esakweli yango ekokisamaki na mobimba. Makambo oyo Hérodote, Mogrɛki oyo azalaki moto ya mayele na masolo ya kala (na ekeke ya mitano L.T.B.), akomaki endimisi ete Babilone ekweaki ndenge wana. *

Likambo moko oyo esɛngaki mpiko mpenza.

Yisaya asakolaki likambo mosusu ya kokamwa mpo na Babilone; alobaki ete: “Ekozala na bafandi te.” (Yisaya 13:19, 20) Esɛngaki mpenza kozala na mpiko mpo na kosakola ete engumba monene ndenge wana, oyo mpe ezalaki na esika ebongi mpenza, ekobebisama mpo na libela. Bato bakokaki kokanisa ete soki engumba yango ebebisami, ekotongama lisusu. Atako Babilone eumelaki mwa ntango nsima ya kokwea na yango, nsukansuka maloba ya Yisaya ekokisamaki. Zulunalo moko (Smithsonian) elobi ete lelo oyo, esika oyo Babilone ezalaká “ekómá patatalu, molunge, na putulu mingi mpe moto moko te afandaka kuna.”

Soki otaleli bonene ya esakweli wana ya Yisaya, okokamwa mpenza. Likambo oyo asakolaki ekokani na koyebisa bato lelo oyo ete engumba moko monene, na ndakisa New York to Londres, ekobebisama boye to boye nsima ya mbula 200 mpe ete nsima na yango, ekozala na bafandi lisusu te. Kasi, likambo ya kokamwisa koleka ezali ete esakweli ya Yisaya ekokisamaki. *

Biblia esakolaki ete mokonzi moko na nkombo Sirise akobɔtɔla engumba makasi ya Babilone mpe yango ekokisamaki

Na masolo oyo, tomoni ndambo ya makambo oyo esalisi ebele ya bato bándima ete Biblia ebongi kotyelama motema. Yango wana, bandimaka ete yango nde ebongi kotambwisa bango. Tolendisi yo oluka koyeba Biblia malamu mpo yo moko okoka kozwa ekateli soki yo mpe okotyela yango motema to te.

^ par. 4 Soki bato ya siansi bayebisi ete moi to mbula ekozala, ntango mosusu ezalaka te. Nzokande, bisakweli ya Biblia eutá nde na Nzambe, ye oyo akoki kosala ete makambo eleka boye to boye soki alingi.

^ par. 6 Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali kokokisama ya esakweli ya Yisaya, talá mwa buku Un livre pour tous, nkasa 27-29; ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 8 Soki olingi koyeba bisakweli mosusu ya Biblia mpe ndenge oyo makambo eleká emonisi ete ekokisamaki, talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, nkasa 117-133; ebimisami na Batatoli ya Yehova.