Mokanda ya mibale ya Ntango 7:1-22
7 Bongo ntango kaka Salomo asilisaki kobondela,+ mɔtɔ eutaki na likoló+ mpe ezikisaki likabo ya kotumba mpe bambeka, mpe nkembo ya Yehova etondaki na tempelo.*+
2 Banganga-nzambe bakokaki te kokɔta na ndako ya Yehova mpo nkembo ya Yehova etondaki na ndako ya Yehova.+
3 Mpe bato nyonso ya Yisraele bamonaki ntango mɔtɔ ekitaki mpe ndenge nkembo ya Yehova etondaki likoló ya tempelo, bongo bafukamaki bilongi na nse, na pavema, bagumbamaki mpe bapesaki Yehova matɔndi, “mpo azali malamu mpe bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.”
4 Bongo mokonzi ná bato nyonso bapesaki bambeka liboso ya Yehova.+
5 Mokonzi Salomo apesaki mbeka ya ngɔmbɛ 22 000 mpe ya mpate 120 000. Na ndenge wana nde mokonzi ná bato nyonso basalaki fɛti ya bofungoli ndako ya Nzambe ya solo.+
6 Banganga-nzambe batɛlɛmaki na bisika na bango ya mosala, ezala mpe Balevi oyo bazalaki na bibɛtɛlo ya miziki oyo bazalaki kobɛta mpo na koyembela Yehova.+ (Mokonzi Davidi nde asalaki bibɛtɛlo yango mpo na kopesa Yehova matɔndi, “mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,” na eleko oyo azalaki kopesa masanzoli elongo na bango.*) Mpe banganga-nzambe bazalaki kobɛta bakelelo makasi+ liboso ya Balevi, wana Bayisraele nyonso batɛlɛmi.
7 Bongo Salomo asantisaki katikati ya lopango oyo ezalaki liboso ya ndako ya Yehova, mpo kuna nde asengelaki kopesa makabo ya kotumba+ mpe biteni ya mafutamafuta ya bambeka ya kimya,* mpo etumbelo ya kwivre+ oyo asalaki ezalaki moke mpo na mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma,+ mpe biteni ya mafutamafuta.+
8 Na ntango yango, Salomo asalaki fɛti mikolo nsambo+ elongo na Yisraele mobimba, lisangá moko monene mpenza ya bato oyo bautaki na Lebo-hamate* tii na Lobwaku* ya Ezipito.+
9 Kasi na mokolo ya mwambe,* basalaki liyangani moko monene,+ mpo basalaki molulu ya bofungoli etumbelo mikolo nsambo mpe fɛti mikolo nsambo.
10 Na nsima, na mokolo ya 23 ya sanza ya nsambo, mokonzi atikaki bato bákende na bandako na bango, bazali kosepela+ mpe koyoka esengo na motema mpo na bolamu nyonso oyo Yehova asalelaki Davidi, Salomo, mpe bato na ye Yisraele.+
11 Na yango, Salomo asilisaki kotonga ndako ya Yehova mpe ndako ya mokonzi;+ mpe eloko nyonso oyo azalaki na mposa ya kosala mpo na ndako ya Yehova mpe mpo na ndako na ye moko, alongaki kosala yango.+
12 Bongo Yehova abimelaki Salomo+ na butu mpe alobaki na ye: “Nayoki libondeli na yo, mpe naponi esika oyo mpo ezala ndako ya kopesa bambeka.+
13 Soki nakangi likoló mpe mbula ezali konɔka te, soki napesi mabanki* mitindo ete elya milona ya mokili mpe soki natindi maladi mabe na kati ya bato na ngai,
14 soki bato na ngai, oyo babengami na nkombo na ngai,+ bamikitisi,+ babondeli, baluki elongi na ngai, babongwani, batiki banzela na bango ya mabe,+ ngai nakoyoka na likoló, nakolimbisa lisumu na bango, mpe nakobikisa mokili na bango.+
15 Sikoyo, miso na ngai ekofungwama mpe matoi na ngai ekotya likebi na libondeli nyonso oyo esalemi na esika oyo.+
16 Mpe sikoyo, naponi ndako oyo mpe nasantisi yango mpo nkombo na ngai ezala wana mpo na libela.+ Miso na ngai mpe motema na ngai ekozala wana ntango nyonso.+
17 “Mpe yo, soki otamboli liboso na ngai na motema mobimba mpe na bosembo lokola tata na yo Davidi atambolaki, soki osali makambo nyonso oyo napesi yo mitindo, mpe otosi malako na ngai mpe bikateli na ngai ya lisambisi,+
18 boye nakofandisa kiti ya bokonzi na yo,+ kaka ndenge nasalaki kondimana na tata na yo Davidi+ ete: ‘Ekozala ntango nyonso na moto moko ya libota na yo oyo akoyangela Yisraele.’+
19 Kasi soki bino bopesi ngai mokɔngɔ mpe botiki mibeko na ngai mpe mitindo na ngai oyo napesi bino, mpe bokei kosalela banzambe mosusu mpe kogumbamela bango,+
20 nakopikola Bayisraele na mokili na ngai oyo napesá bango;+ mpe ndako oyo nasantisi mpo na nkombo na ngai, nakolongola yango na miso na ngai, mpe nakosala ete bato ya bikólo nyonso bákóma kotyola* ndako yango mpe kosɛka yango.+
21 Mpe ndako oyo ekokóma esika oyo ebebabebá. Moto nyonso oyo akoleka pene na yango akotikala monɔkɔ polele+ mpe akotuna: ‘Mpo na nini Yehova asali mokili oyo mpe ndako oyo boye?’+
22 Bongo bakoyanola ye: ‘Ezali mpo basundolaki Yehova+ Nzambe ya bankɔkɔ na bango oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito,+ mpe mpo bakangamaki na banzambe mosusu, bagumbamelaki bango mpe basalelaki bango.+ Yango wana amemeli bango mpasi oyo nyonso.’”+
Maloba na nse
^ Lil., “ndako.”
^ Mbala mosusu ezali Balevi.
^ Talá Ndimbola ya maloba.
^ To, “ekɔtelo ya Hamate.”
^ To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
^ Elingi koloba, mokolo moko nsima ya fɛti, to mokolo ya 15.
^ Na bisika mosusu babengaka yango mapalela to makɔnkɔ.
^ Lil., “ekóma liloba ya lisese.”