Mokanda ya mibale ya Ntango 27:1-9
-
Yotame, mokonzi ya Yuda (1-9)
27 Yotame+ azalaki na mbula 25 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 16 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Yerusha mwana ya Zadoke.+
2 Yotame akobaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova, kaka ndenge tata na ye Uzia asalaki.+ Nzokande, ye akɔtaki na tempelo ya Yehova te.+ Kasi, bato bazalaki kaka kosala makambo ya mabe.
3 Yotame moto atongaki porte ya likoló ya ndako ya Yehova,+ mpe asalaki misala mingi ya botongi na efelo ya Ofɛlɛ.+
4 Atongaki mpe bingumba+ na etúká ya ngombangomba ya Yuda,+ ná bisika oyo ebatelami makasi+ mpe manɔ́ngi+ na bazamba.
5 Abundisaki mokonzi ya Baamone+ mpe nsukansuka alongaki bango, yango wana na mbula wana Baamone bapesaki ye talanta* 100 ya palata, korosi* 10 000 ya blé mpe 10 000 ya ɔrje. Baamone bafutaki ye lisusu biloko yango na mbula ya mibale mpe na mbula ya misato.+
6 Na ndenge yango, Yotame azalaki se kokóma makasi, mpo azalaki na ekateli ya kosala makambo oyo Yehova Nzambe na ye azalaki kosɛnga.*
7 Makambo mosusu ya lisolo ya Yotame, bitumba nyonso oyo abundaki mpe makambo oyo asalaki, ekomami na Buku ya Bakonzi ya Yisraele mpe ya Yuda.+
8 Azalaki na mbula 25 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 16 na Yerusaleme.+
9 Na nsima, Yotame akufaki,* mpe bakundaki ye na Sité ya Davidi.+ Mpe mwana na ye Ahaze akómaki mokonzi na esika na ye.+
Maloba na nse
^ Lil., “abongisaki banzela na ye liboso ya Yehova Nzambe na ye.”
^ To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”