Mokanda ya mibale ya Ntango 24:1-27

  • Boyangeli ya Yehoashe (1-3)

  • Yehoashe abongisi tempelo (4-14)

  • Lipɛngwi ya Yehoashe (15-22)

  • Babomi Yehoashe (23-27)

24  Yehoashe azalaki na mbula nsambo ntango akómaki mokonzi,+ mpe ayangelaki mbula 40 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Zibia, moto ya Beere-sheba.+ 2  Yehoashe akobaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova mikolo nyonso oyo nganga-nzambe Yehoyada+ azalaki na bomoi. 3  Yehoyada aponelaki ye basi mibale, mpe basi yango babotelaki ye bana mibali mpe bana basi. 4  Na nsima, Yehoashe akómaki na mposa ya kobongisa ndako ya Yehova.+ 5  Bongo ayanganisaki banganga-nzambe ná Balevi mpe alobaki na bango boye: “Bókende na bingumba nyonso ya Yuda mpe bókɔngɔla mbongo na Yisraele mobimba mpo na kobongisa ndako ya Nzambe na bino,+ mbula na mbula; mpe bósala likambo yango noki.” Kasi Balevi basalaki yango noki te.+ 6  Bongo mokonzi abengaki Yehoyada oyo azalaki mokambi mpe alobaki na ye:+ “Moize+ mosaleli ya Yehova akatelaki lisangá ya Yisraele mpako mosantu mpo na mosala ya hema ya Litatoli.+ Mpo na nini osɛngi Balevi te bákende kozwa mpako mosantu na Yuda mpe na Yerusaleme? 7  Mpo bana ya Atalia,+ mwasi wana ya mabe, bakɔtaki na makasi na ndako ya Nzambe ya solo,+ mpe basalelaki biloko mosantu nyonso ya ndako ya Yehova mpo na losambo ya Babaala.” 8  Bongo na kolanda mitindo oyo mokonzi apesaki, basalaki kɛsi+ moko mpe batyaki yango libándá, na porte ya ndako ya Yehova.+ 9  Nsima na yango, bapesaki liyebisi na Yuda mobimba mpe na Yerusaleme ete bámemela Yehova mpako mosantu+ oyo Moize mosaleli ya Nzambe ya solo akatelaki Yisraele na esobe. 10  Bankumu nyonso mpe bato nyonso basepelaki,+ mpe bakobaki komema makabo mpe kotya yango na kɛsi yango tii etondaki.* 11  Mbala nyonso oyo Balevi bazalaki kokɔtisa kɛsi mpo na kozongisa yango epai ya mokonzi, mpe bamoni ete mbongo ekómi mingi na kati ya kɛsi yango, sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi mpe momonisi ya nganga-nzambe monene bazalaki koya mpo na kolongola mbongo nyonso na kɛsi+ yango mpe na nsima bazalaki kozongisa kɛsi na esika na yango. Bazalaki kosala bongo mokolo na mokolo, mpe bazwaki mbongo mingi. 12  Bongo mokonzi mpe Yehoyada bazalaki kopesa yango na bato oyo bazalaki kotambwisa misala na ndako ya Yehova. Mpe bango bazalaki kozwa na mosala bakati-mabanga mpe bato oyo bayebi misala ya mabɔkɔ mpo na kobongisa ndako ya Yehova,+ ná bato oyo bayebi misala ya bibende mpe ya kwivre, mpo na kobongisa ndako ya Yehova. 13  Mpe bato oyo bazalaki kotambwisa misala babandisaki misala, mpe mosala ya kobongisa ezalaki kokende malamu na litambwisi na bango. Bazongisaki ndako ya Nzambe ya solo ndenge ezalaki liboso mpe bakómisaki yango makasi. 14  Mpe ntango kaka basilisaki, bamemelaki mokonzi mpe Yehoyada mbongo oyo etikalaki. Basalelaki mbongo yango mpo na kosala bisaleli mpo na ndako ya Yehova: bisaleli mpo na mosala, mpo na kopesa makabo, mpe bakɔpɔ ná bisaleli ya wolo mpe ya palata.+ Mpe bakómaki kopesa bambeka ya kotumba+ na ndako ya Yehova mbala na mbala mikolo nyonso oyo Yehoyada azalaki na bomoi. 15  Nsima ya kokóma mobange mpe kotonda na bambula, Yehoyada akufaki; azalaki na mbula 130 na liwa na ye. 16  Bakundaki ye na Sité ya Davidi esika moko na bakonzi,+ mpo asalaki malamu na Yisraele+ mpo na Nzambe ya solo mpe ndako na Ye. 17  Nsima ya liwa ya Yehoyada, bankumu ya Yuda bayaki kofukamela mokonzi, mpe mokonzi ayokelaki bango. 18  Basundolaki ndako ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe babandaki kosalela banzete ya losambo* mpe kosambela bikeko; yango wana nkanda ya Nzambe engalelaki Yuda mpe Yerusaleme mpo na lisumu na bango. 19  Azalaki kotindela bango basakoli mpo na kosalisa bango bázongela Yehova; basakoli bazalaki kokebisa* bango, kasi baboyaki koyoka.+ 20  Elimo ya Nzambe esalaki epai ya* Zekaria mwana ya nganga-nzambe Yehoyada.+ Zekaria atɛlɛmaki na esika oyo ezali mwa likoló mpe alobaki na bango: “Nzambe ya solo alobi boye: ‘Mpo na nini bozali kobuka mibeko ya Yehova? Bokolonga te. Lokola bosundoli Yehova, ye mpe akosundola bino.’”+ 21  Kasi basalelaki ye likita+ mpe ndenge mokonzi apesaki mitindo, babambaki ye mabanga tii akufaki, na kati ya lopango ya ndako ya Yehova.+ 22  Na ndenge yango Mokonzi Yehoashe akanisaki te bolingo ya sembo oyo tata na ye* Yehoyada amoniselaki ye; abomaki mwana na ye, oyo liboso ya kokata motema, alobaki: “Tiká Yehova atala likambo oyo mpe apesa yo etumbu mpo na yango.”+ 23  Na ebandeli ya mbula,* limpinga ya basoda ya Siri eyaki kobundisa Yehoashe, mpe ekɔtaki na Yuda mpe na Yerusaleme.+ Bato ya Siri babomaki bankumu+ nyonso ya bato, mpe batindelaki mokonzi ya Damasi biloko nyonso oyo bapunzaki. 24  Limpinga ya Siri oyo ekɔtaki na Yuda ezalaki na basoda mingi te, atako bongo Yehova asalisaki bango bálonga limpinga moko monene,+ mpo bato basundolaki Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango. Na ndenge yango bakweiselaki* Yehoashe etumbu oyo Nzambe alobaki. 25  Ntango balongwaki epai na ye (mpo batikaki ye azoki makasi*), basaleli na ye moko basalelaki ye likita mpo asopaki makila ya bana* ya nganga-nzambe Yehoyada.+ Babomaki ye na mbeto na ye moko.+ Ndenge wana nde akufaki. Bongo bakundaki ye na Sité ya Davidi,+ kasi bakundaki ye na malita ya bakonzi te.+ 26  Bato oyo basalelaki ye likita,+ ezalaki Zabade mwana ya Shimeate mwasi Moamone ná Yehozabade mwana ya Shimerite mwasi Momoabe. 27  Lisolo ya bana na ye, ebele ya bitumbu oyo basakolaki mpo na ye+ mpe mosala ya kobongisa* ndako ya Nzambe ya solo,+ nyonso wana ezali na kati ya makomi* oyo ezali na Buku ya Bakonzi. Mpe mwana na ye Amazia akómaki mokonzi na esika na ye.

Maloba na nse

To mbala mosusu, “tii bango nyonso bapesaki.”
To, “kotatola mabe na bango.”
Lil., “elataki.”
Elingi koloba, tata ya Zekaria.
Lil., “na nsuka ya mbula moko mpe na ebandeli ya mbula mosusu.”
Elingi koloba, bato ya Siri.
To, “na bamaladi mingi.”
To, “mwana.” Mbala mosusu basaleli liloba yango na boike mpo na kopesa moto lokumu.
Lil., “moboko ya.”
To, “ndimbola; maloba.”