Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo

Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo

Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo

EZALI mabe te kobelela Nzambe asalisa biso ntango tozali na mikakatano makasi. Tosalaka bongo mpo ye “azali monene monene, mpe azali na nguya mingi; mayele na ye ekoki kotángama te.” (Nzembo 147:⁠5) Ye azali mpenza na makoki oyo eleki mpo na kosalisa biso tóyeba nini tokoki kosala liboso ya mikakatano yango. Longola oyo wana, Biblia mpe esɛngi biso ete ‘tózipola mitema na biso’ liboso na ye. (Nzembo 62:⁠8) Kasi soki ezali bongo, mpo na nini bato mingi bamonaka lokola ete Nzambe ayanolaka na mabondeli na bango te? Yango elingi nde koloba ete ye amibanzabanzaka mpo na bato te?

Na esika ya kopesa Nzambe foti nokinoki mpo ozali komona lokola ete azali kosala eloko te, kanisá naino ntango oyo ozalaki mwana moke. Ntango baboti na yo bazalaki te kokokisa makambo nyonso oyo ozalaki kosɛnga bango, otikalá koloba na bango ete balingaka yo te? Bana mingi balobaka bongo. Kasi, nsima ya kokóma mokóló, oyaki komona ete bamonisaka bolingo ndenge ebele mpe ete, mpo na mwana moke, kokokisa makambo nyonso oyo azali kosɛnga, ezali mpenza likambo ya malamu te.

Ndenge moko mpe, soki Yehova azali te koyanola na mabondeli na biso ntango nyonso na ndenge oyo tozali kolinga, yango elingi koloba te ete abosani biso. Likambo tosengeli kosimba yango oyo: Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso nyonso na ndenge ebele.

“Na nzela na ye nde tozali na bomoi”

Libosoliboso, ezali na lisalisi ya Nzambe nde “tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Misala 17:28) Ndenge apesá biso bomoi emonisi mpenza ete alingaka biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso!

Lisusu, Yehova apesaka nyonso oyo tozali na yango mposa mpo tókoba kozala na bomoi. Tozali kotánga boye: ‘Ye akokolisaka matiti mpo na bibwɛlɛ; ndunda mpe mpo na kosunga moto, ete abimisa biloko ya kolya kati na mabelé.’ (Nzembo 104:14) Kutu, Mozalisi na biso asuki te kaka na kopesa biso biloko ya kolya. Na ezaleli na ye ya kokaba, azali kopesa “bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, kotondisáká mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”​—⁠Misala 14:⁠17.

Ata bongo, basusu bakoki komituna: ‘Soki Nzambe alingaka mpenza biso, mpo na nini atiki nzela ete tomonaka mpasi?’ Oyebi eyano na motuna wana?

Ezali nde foti ya Nzambe?

Bampasi mingi oyo bato bazali komona ezali bango moko nde bazali komilukela yango. Na ndakisa, makambo mingi oyo ekoki kobimisa makama eyebani malamu. Ata bongo, bato bazali komipesa na pite, na kolangwa masanga mpe na biloko mosusu oyo elangwisaka, na komɛla makaya, na masano oyo etondi na makama, bazali kokumba mituka mbangumbangu, mpe bongo na bongo. Soki misala wana ya mabe ememi mpasi na nsima, tosengeli kopesa foti na nani? Na Nzambe to na moto oyo azali komipesa na yango na bozoba nyonso? Liloba ya Nzambe, oyo epemami, elobi ete: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—⁠Bagalatia 6:⁠7.

Lisusu, bato basalanaka mabe bango na bango. Na ntembe te, ntango ekólo moko ebundisi ekólo mosusu mpe yango ebimisi bampasi, tokoloba te ete ezali foti ya Nzambe. Ntango bandí moko azokisi moto to abomi ye, tokoloba nde ete ezali foti ya Nzambe? Soki moke te! Ntango mokonzi moko ya mabe azali komonisa bato na ye mpasi, konyokola bango mpe koboma bango, tokoloba nde ete ezali foti ya Nzambe? Ebongi tóloba bongo te.​—⁠Mosakoli 8:⁠9.

Kasi, tokoloba boni mpo na bamilio ya bato oyo bazali konyokwama na bobola to na kozanga bilei? Ezali nde foti ya Nzambe? Te. Mabelé na biso ezali kopesa ebele ya bilei oyo ekoki mpo na koleisa moto nyonso. (Nzembo 10:2, 3; 145:16) Kasi soki nzala mpe bobola epalangani mingi boye, ezali mpo bato bazali kokabola mabe biloko oyo Nzambe apesá. Mpe ezali mpo na moimi ya moto nde mokakatano wana ezali kosila te.

Ntina mpenza oyo bato bazali komona mpasi

Kasi, ntango moto abɛli to akufi mpo akómi mobange, tokoloba ete ezali foti ya nani? Ekokamwisa nde yo soki bayebisi yo ete, ata mpo na likambo wana, ezali foti ya Nzambe te? Nzambe azalisaki moto mpo akómaka mobange te mpe akufaka te.

Ntango atyaki Adama ná Eva, mobali mpe mwasi ya liboso, na elanga ya Edene, Yehova apesaki bango elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé. Kasi, alingaki mpenza ete mabelé etonda na bato oyo bakosepela mingi na esika oyo apesaki bango. Na yango, mpo bázala na bomoi ya seko, basengelaki kokokisa lisɛngami moko. Mpo bátikala na bomoi kati na Paladiso, Adama ná Eva basengelaki kotosa Mozalisi na bango ya bolingo.​—⁠Genese 2:17; 3:2, 3, 17-23.

Likambo ya mawa, Adama ná Eva bakómaki batomboki. Eva aponaki koyokela Satana Zabolo. Satana akosaki ye na kolobáká ete Nzambe azalaki kopimela ye eloko moko ya malamu. Yango wana Eva alandaki nzela ya lipanda mpe alukaki ‘kozala lokola Nzambe, koyeba malamu ná mabe.’ Adama mpe alandaki Eva na botomboki na ye.​—⁠Genese 3:5, 6.

Ntango basalaki lisumu wana, Adama ná Eva bamonisaki ete babongi te kozala na bomoi ya seko. Bakómaki komona bampasi ya lisumu na bango. Makasi na bango mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango ebandaki kokita, mpe nsukansuka bakufaki. (Genese 5:⁠5) Nzokande, mbuma mabe ya botomboki na bango esukaki kaka na bango moko te. Tii lelo, tozali kaka komona mpasi oyo euti na lisumu ya Adama ná Eva. Ntoma Paulo akomaki ete: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.” (Baloma 5:12) Ɛɛ, mpo na botomboki ya Adama ná Eva, lisumu mpe liwa epalangani lokola maladi moko mabe epai ya bato nyonso.

Eloko oyo emonisi polelepolele ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso

Makambo wana elimboli ete bato, oyo bazali bongo bikelamu ya Nzambe, bakobonga lisusu te? Te, kutu sikoyo tokolobela eloko oyo emonisi polelepolele ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso. Atako ezalaki likambo moko ya moke te mpo na ye, Nzambe ye moko abongisaki mwango ya kosikola bato na lisumu mpe na liwa. Mbeka ya lisiko oyo ye andimaki kopesa mpo na biso ezalaki bomoi ya Yesu, bomoi na ye ya moto ya kokoka. (Baloma 3:24) Na yango, ntoma Yoane akomaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Mpo na likambo monene wana ya bolingo, biso mpe tozwi lisusu elikya ya kozala na bomoi ya seko. Paulo akomelaki Baloma ete: “Mosala kaka moko ya kolongisama esali ete bato ya mitindo nyonso bátángama bayengebene mpo na bomoi.”​—⁠Baloma 5:⁠18.

Tóndimisama ete na ntango oyo ebongisami na Nzambe, mpasi mpe liwa ekozala lisusu te awa na Mabelé. Kutu, makambo oyo esakolamaki na mokanda ya Emoniseli ekokokisama: “Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Mbala mosusu, okoloba ete: ‘Ntango makambo wana ekosalema, ngai nakozala na bomoi te.’ Kasi, ezali solo ete okoki kozala na bomoi. Mpe ata okufi, Nzambe akoki kosekwisa yo. (Yoane 5:28, 29) Yango nde Nzambe azali kokana kosala mpo na biso, mpe yango ekosalema solo. Ezali mpenza lokuta monene koloba ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato te!

“Bópusana penepene na Nzambe”

Koyeba ete Nzambe abongisá mwango ya kosilisa bampasi ya bato mbala moko mpo na libela na mikolo ezali koya ezali mpenza likambo ya kobɔndisa. Kasi, tokoloba boni lelo oyo? Tokoki kosala nini soki ndeko na biso oyo tolingaka akufi to mwana na biso abɛli? Tósimba likambo oyo: ntango oyo Nzambe abongisi mpo na kolongola maladi mpe liwa ekómi naino te. Biblia emonisi ete tosengeli kozela lisusu mwa ntango moke liboso ete likambo yango esalema. Kasi ata bongo, Nzambe atiki biso te. Moyekoli Yakobo alobaki ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:⁠8) Ɛɛ, Mozalisi na biso azali kobyanga biso mpo tózala na boyokani makasi elongo na ye, mpe baoyo bazali kosala bongo bamonaka ete ata na ntango ya mpasi, Nzambe azali kotika bango te.

Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Nzambe? Esili koleka soki mbula nkóto misato, mokonzi Davidi atunaki motuna ndenge moko, ntango alobaki ete: “E! Yehova, . . . nani akofanda na ngomba na yo na bulɛɛ?” (Nzembo 15:⁠1) Davidi ayanolaki ye moko na motuna na ye, ntango alobaki lisusu ete: “Ye oyo akotambolaka sembo mpe akobilaka boyengebene, mpe akolobaka solo kati na motema na ye. Ye oyo azali kotɔnga na lolemo na ye te to kosalela moninga na ye mabe te.” (Nzembo 15:2, 3) Na maloba mosusu, Yehova azali koyamba baoyo nyonso bazali kolanda nzela oyo Adama ná Eva baboyaki kolanda. Ye apusanaka penepene na baoyo bazali kosala mokano na ye.​—⁠Deteronome 6:24, 25; 1 Yoane 5:⁠3.

Ndenge nini tokoki kosala mokano ya Nzambe? Tosengeli koyekola oyo ezali “malamu mpe endimami na miso ya Mobikisi na biso, Nzambe,” mpe na nsima kosalela yango. (1 Timote 2:⁠3) Yango esɛngi koyekola koyeba malamumalamu Biblia, Liloba ya Nzambe. (Yoane 17:3; 2 Timote 3:16, 17) Yango esuki te kaka na kotánga Biblia likolólikoló. Tosengeli kolanda ndakisa ya Bayuda ya ekeke ya liboso, oyo bazalaki na Beloya, oyo bayokaki makambo Paulo asakolaki. Tozali kotánga na ntina na bango ete: “Bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.”​—⁠Misala 17:⁠11.

Ndenge moko mpe lelo oyo, koyekola Biblia malamumalamu elendisaka kondima na biso epai ya Nzambe mpe esalisaka biso na kozala na boyokani makasi elongo na ye. (Baebele 11:⁠6) Yango mpe esalisaka biso na koyeba malamumalamu makambo oyo Yehova asalelaka bato​—⁠kaka mpo na bolamu ya mwa ntango moke te, kasi mingimingi nde mpo na bolamu ya seko ya baoyo nyonso bazali mpenza na ezaleli oyo ebongi.

Tótalela maloba ya baklisto mosusu oyo bazali na boyokani makasi elongo na Nzambe. Danielle, mwana mwasi moko ya mbula 16, alobi boye: “Nalingaka Yehova mingi, mpe ezali na makambo mingi oyo mpo na yango napesaka ye matɔndi. Apesá ngai baboti moko ya bolingo, oyo balingaka ye mpenza mpe oyo bateyi ngai makambo oyo eyokani na Liloba na ye.” Christian, elenge mobali moko, na mboka Uruguay akomi boye: “Motema na ngai etondi na makambo mingi ya kopesa Yehova matɔndi, mpe yango etindaka ngai napesa ye matɔndi mpo na boboto monene na ye mpe mpo na boninga na ye.” Nzambe ayambaka ata bana mike. Gabriela, mwana mwasi ya mbula nsambo, alobi boye: “Nalingaka Nzambe koleka biloko nyonso oyo ezali na mokili mobimba! Nazali na Biblia na ngai moko. Nalingaka koyekola makambo etali Nzambe mpe Mwana na ye.”

Lelo oyo, na mokili mobimba, bamilio ya bato bandimi na motema moko maloba oyo ya mokomi na nzembo: “Kopusana penepene na Nzambe ezali malamu mpo na ngai.” (Nzembo 73:28NW) Bato yango bazwaki lisalisi mpo na koyeba oyo bakoki kosala na mikakatano oyo bazali kokutana na yango lelo, mpe bazali na elikya makasi ya kozala na bomoi ya seko kati na Paladiso awa na mabelé. (1 Timote 4:⁠8) Mpo na nini te komityela mokano ya “kopusana penepene na Nzambe”? Ya solo mpenza, tondimisami na likambo oyo ete: “Azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Ɛɛ, Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo!

[Bililingi na lokasa 5]

Yehova amibanzabanzaka mpo na biso na ndenge ebele

[Elilingi na lokasa 7]

Ata bana mike mpe bakoki kopusana penepene na Nzambe

[Bililingi na lokasa 7]

Lelo oyo, Yehova asalisaka biso na koyika mpiko. Na ntango oyo ebongi, akolongola maladi mpe liwa