Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 36

Banani bakosekwa? Bakofanda epai wapi?

Banani bakosekwa? Bakofanda epai wapi?

NA MIKAPO mibale oyo euti koleka, totángaki ete bato oyo basekwaki bazalaki boni?— Bazalaki bato mitano. Kati na bato yango, bana bazalaki boni?— Misato. Mpe oyo ya minei ezalaki elenge mobali. Mpo na yo, yango emonisi nini?—

Yango emonisi ete Nzambe alingaka bana mpe bilenge. Kasi ata bongo akosekwisa mpe bato mosusu ebele. Nzambe akosekwisa kaka bato oyo basalaki makambo ya malamu?— Tokoki kokanisa bongo. Nzokande, ezali na bato mingi oyo bayekolaki ata moke te solo etali Yehova Nzambe mpe Mwana na ye. Na bongo basalaki makambo ya mabe mpo bateyaki bango makambo ya lokuta. Okanisi ete Yehova akosekwisa bato ya ndenge wana?—

Biblia elobi ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Mpo na nini bato oyo bazalaki bayengebene te, to oyo basalaki makambo ya malamu te, bakosekwa?— Bakosekwa mpo bazwaki libaku ata moke te ya koyekola makambo ya Yehova mpe oyo ye alingi ete bato básala.

Okanisi ete bato bakosekwa ntango nini?— Kanisá lisusu ntango Lazalo akufaki, Yesu apesaki Malata, ndeko mwasi ya Lazalo, elaka oyo: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Malata azongisaki maloba ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” (Yoane 11:23, 24) Malata alingaki koloba nini ntango alobaki ete Lazalo akosekwa na “mokolo ya nsuka”?—

Na ntembe te, Malata ayokaki elaka oyo Yesu apesaki: ‘Baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakobima.’ (Yoane 5:28, 29) Na bongo, “mokolo ya nsuka” yango ezali mokolo oyo bato nyonso oyo bazali na kati ya makanisi ya Nzambe bakozonga na bomoi. Mokolo yango ya nsuka ezali te mokolo ya ngonga 24. Mokolo yango ekoumela mbula nkóto moko. Biblia elobi mpo na mokolo yango ete: ‘Nzambe akosambisa bato oyo bafandi na mabelé.’ Bato yango oyo bakosekwa bakozala na kati ya bato oyo ye akosambisa.​—Misala 17:31; 2 Petelo 3:8.

Mokolo yango ekozala mokolo moko ya esengo mpenza! Na boumeli ya mokolo yango ya mbula nkóto, bamilio ya bato oyo basilá kokufa bakozonga na bomoi. Esika oyo bango bakofanda ntango bakozonga na bomoi, Yesu abengi yango Paladiso. Tiká tómona epai wapi Paladiso yango ekozala mpe ndenge bomoi ekozala na kati na yango.

Ngonga soki misato liboso Yesu akufa likoló ya nzete ya mpasi, alobeli Paladiso epai ya mobali moko oyo azali likoló ya nzete mosusu pembeni na ye. Mobali yango azali kokufa mpo na mabe oyo asali. Kasi ntango mobali yango ya misala mabe atali Yesu mpe ayoki oyo bazali koloba mpo na Ye, abandi kondimela Yesu. Na bongo mobali yango alobi ete: “Kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Yesu azongisi maloba ete: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo, Okozala elongo na ngai na Paladiso.”​—Luka 23:42, 43.

Yesu alingi mpenza koloba nini na maloba wana? Paladiso ezali wapi?— Kanisá naino. Libosoliboso, Paladiso ezalaki wapi?— Kobosana te ete Nzambe atyaki mobali ya liboso, Adama, ná mwasi na ye na paladiso oyo ezalaki kaka awa na mabelé. Babengaki yango elanga ya Edene. Banyama ezalaki na elanga yango, kasi ezalaki kosala moto moko mabe te. Ezalaki mpe na banzete oyo etondi na bambuma kitoko, bakisa mpe ebale moko ya monene. Ezalaki esika moko ya kitoko mpo na kofanda!​—Genese 2:8-10.

Na bongo ntango tozali kotánga ete mobali wana ya misala mabe akozala na Paladiso, tosengeli komona na makanisi na biso ndenge mabelé oyo ekómi esika moko kitoko mpo na kofanda. Yesu akozala nde awa na mabelé na Paladiso elongo na mosali na mabe wana?— Te. Oyebi mpo na nini akozala awa na mabelé te?—

Ezali mpo Yesu akozala Mokonzi na likoló mpo na koyangela Paladiso oyo ekozala awa na mabelé. Na bongo, Yesu akozala elongo na mobali wana na ndimbola oyo ete Yesu akosekwisa ye mpe akokokisa bamposa na ye. Kasi mpo na nini Yesu akotika ete mosali na mabe wana ya kala afanda na Paladiso?— Tóluka kozwa eyano na motuna wana.

Liboso mosali na mabe wana asolola na Yesu, ayebaki mikano ya Nzambe?— Te, ayebaki yango te. Azalaki kosala makambo ya mabe mpo ayebaki solo etali Nzambe te. Na Paladiso, bakoteya ye mikano ya Nzambe. Na ndenge yango, akozwa libaku ya kosala mokano ya Nzambe mpo na ete alingi ye.

Moto nyonso oyo akosekwa akozala nde na bomoi na Paladiso awa na mabelé?— Te, ezali bongo te. Oyebi mpo na nini ezali bongo te?— Ezali mpo bamosusu bakosekwa mpo na kozala na bomoi elongo na Yesu na likoló. Elongo na ye, bakoyangela Paladiso oyo ekozala awa mabelé. Tiká namonisa yo ndenge toyebi likambo yango.

Na butu oyo ezalaki liboso Yesu akufa, ayebisaki bayekoli ete: ‘Na ndako ya Tata na ngai na likoló, bisika ya kofanda ezali mingi, mpe nazali kokende kobongisela bino esika.’ Na nsima Yesu apesaki bango elaka ete: “Nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai mpenza, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana.”​—Yoane 14:2, 3.

Nsima ya lisekwa ya Yesu, akendaki wapi?— Azongaki na likoló mpo na kozala elongo na Tata na ye. (Yoane 17:4, 5) Na bongo, Yesu apesaki bantoma na ye mpe bayekoli na ye elaka ete akosekwisa bango mpo bákoka kozala elongo na ye na likoló. Bakosala nini kuna elongo na Yesu?— Biblia elobi ete bayekoli na ye oyo bakozwa “lisekwa ya liboso” bakofanda na likoló mpe ‘bakoyangela mabelé elongo na ye mbula nkóto.’​—Emoniseli 5:10; 20:6; 2 Timote 2:12.

Bato oyo bakozwa “lisekwa ya liboso” mpe bakoyangela elongo na Yesu bazali boni?— Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bóbanga te, etonga moke, mpamba te Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) “Etonga moke” yango ya bato oyo bakosekwa mpo na kozala elongo na Yesu na Bokonzi ya likoló, motuya na bango eyebani. Biblia emonisi ete bato “nkóto nkama moko na ntuku minei na minei,” oyo bauti awa na mabelé, bakosekwa.​—Emoniseli 14:1, 3.

Bato boni bakozala na bomoi na Paladiso awa na mabelé?— Biblia epesi motángo na bango te. Kasi ntango Adama ná Eva bazalaki na elanga ya Edene, Nzambe ayebisaki bango ete bábota bana mpe bátondisa mabelé. Ya solo, bango bakokisaki likambo yango te. Ata bongo, Nzambe akosala ete mokano na ye ekokisama: mabelé etonda na bato ya malamu.​—Genese 1:28; Yisaya 45:18; 55:11.

Kanisá esengo bato bakozala na yango ya kofanda na Paladiso! Mabelé mobimba ekokóma lokola elanga moko ya kitoko. Yango ekotonda na bandɛkɛ, banyama, banzete ya kitoko mpe bafololo ya ndenge na ndenge. Moto moko te akomona mpasi mpo azali kobɛla, moto moko mpe te akokufa. Bato nyonso bakozala baninga. Soki tolingi kozala na bomoi libela na libela na Paladiso, ntango ya komibongisa yango oyo.

Mpo na koyeba makambo mosusu etali mokano ya Nzambe mpo na mabelé, tángá Masese 2:21, 22; Mosakoli 1:4; Yisaya 2:4; 11:6-9; 35:5, 6; mpe 65:21-24.