Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 45

Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ndenge ya komonisa ete tolingi eya

Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ndenge ya komonisa ete tolingi eya

OYEBI libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye?— Soki oyebi yango te, tokoki kotánga yango elongo na Biblia na Matai 6:9-13. Libondeli yango, oyo bato mingi babengaka Tata na Biso, ezali na maloba oyo: “Tiká bokonzi na yo eya.” Oyebi soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini?—

Tiká nalimbolela yo yango, mokonzi ezali moto oyo ayangelaka mboka moko to ekólo moko. Mpe babengaka guvɛrnema na ye bokonzi. Na bamboka mosusu, mokambi ya guvɛrnema babengaka ye prezida. Moyangeli ya guvɛrnema ya Nzambe bakobenga ye nani?— Mokonzi. Ezali mpo na yango nde guvɛrnema ya Nzambe ebengamaka Bokonzi.

Oyebi moto oyo Yehova Nzambe aponá mpo azala Mokonzi ya guvɛrnema na Ye?— Mwana na ye, Yesu Klisto. Mpo na nini Yesu azali moyangeli malamu koleka bayangeli nyonso oyo bato bakoki kopona?— Ezali mpo Yesu alingaka mpenza Yehova, Tata na ye. Na yango, asalaka kaka makambo oyo ezali malamu.

Banda kala, liboso kutu Yesu abotama na Beteleme, Biblia eyebisaki ete akobotama mpe elobaki ete akozala Moyangeli oyo Nzambe aponi. Tiká tótánga yango na Yisaya 9:6, 7. Yango elobi ete: ‘Baboteli biso mwana moko, bapesi biso mwana moko ya mobali; bokonzi ekozala na lipeka na ye, nkombo na ye . . . Nkolo ya kimya. Bokonzi na ye ekozala monene mpe na kimya oyo ekosuka te.’

Awa, Yesu, Moyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, abengami “Nkolo.” Azali mpe Mwana ya Mokonzi Monene, Yehova. Kasi Yehova akómisi mpe Yesu Mokonzi ya guvɛrnema na Ye, oyo ekoyangela mabelé na boumeli ya mbula nkóto. (Emoniseli 20:6) Nsima ya kozwa batisimo, Yesu abandaki “kosakola mpe koloba ete: ‘Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.’”​—Matai 4:17.

Oyebi mpo na nini Yesu alobaki ete Bokonzi yango ekómi pene?— Alobaki bongo mpo Mokonzi, oyo na nsima akoyangela na likoló, azalaki wana elongo na bango! Yango wana Yesu ayebisaki bato ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.” (Luka 17:21) Soki ozalaki wana, olingaki mpenza kosepela kozala penepene ya Mokonzi oyo Yehova aponi, ata mpe kosimba ye; ezali bongo te?—

Yebisá ngai naino, mosala nini ya ntina Yesu ayaki kosala awa na mabelé?— Yesu ayanolaki na motuna wana ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Yesu ayebaki ete akosala mosala nyonso ya kosakola ye moko te. Na yango, oyebi likambo asalaki?—

Yesu azwaki bato mpe alakisaki bango ndenge ya kosakola. Bato ya liboso oyo ye alakisaki mosala yango ezali bantoma 12 oyo aponaki. (Matai 10:5, 7) Kasi Yesu alakisaki kaka bantoma na ye? Te, Biblia elobi ete alakisaki mpe ebele ya bato mosusu ndenge ya kosakola. Na nsima, atindaki bayekoli mosusu 70 bákende mibalemibale liboso na ye. Makambo nini bateyaki?— Yesu alobaki ete: “Bókoba koyebisa bango ete, ‘Bokonzi ya Nzambe ekómi pene na bino.’” (Luka 10:9) Ezali na ndenge wana nde bato bayokaki makambo ya guvɛrnema ya Nzambe.

Na ntango ya kala na Yisalaele, bakonzi ya sika bazalaki na momeseno ya kotambola na engumba likoló ya mwana ya mpunda mpo na komilakisa epai ya bato. Yango nde Yesu asali sikoyo ntango akei na Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka, mpamba te akozala Moyangeli na Bokonzi ya Nzambe. Bato balingi ete ye azala Mokonzi?—

Ntango azali kotambola, ebele ya bato babandi kotanda bilamba na bango ya likoló na nzela. Basusu bakati bitape ya banzete mpe batye yango na nzela. Bazali kosala bongo mpo na komonisa ete balingi Yesu azala Mokonzi na bango. Bazali koganga makasi ete: “Apambolami Moto oyo azali koya lokola Mokonzi na nkombo ya Yehova!” Kasi bato nyonso te nde bazali na esengo. Kutu, bakonzi mosusu ya lingomba balobi na Yesu ete: ‘Yebisá bayekoli na yo báfanda nyɛɛ.’​—Luka 19:28-40.

Mikolo mitano na nsima, bakangi Yesu mpe bamemi ye na ndako ya guvɛrnɛrɛ Ponsi Pilato mpo asambisa ye. Banguna ya Yesu balobi ete Yesu azali koloba ete azali mokonzi mpe balobi ete azali monguna ya guvɛrnema ya Loma. Na bongo, Pilato atuni Yesu mpo na makambo oyo bafundi ye na yango. Yesu amonisi ete azali koluka kobɔtɔla bokonzi na bango te. Ayebisi Pilato ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.”​—Yoane 18:36.

Na nsima, Pilato abimi libándá mpe ayebisi bato ete azwi Yesu ata na likambo moko ya mabe te. Kasi sikoyo, bato balingi te ete Yesu azala na bango. Balingi te ete bátika ye. (Yoane 18:37-40) Nsima ya kosolola na Yesu lisusu, Pilato andimi mpenza ete Yesu asali likambo moko ya mabe te. Nsima ya kobimisa Yesu libándá mpo na mbala ya nsuka, Pilato alobi ete: “Talá! Mokonzi na bino!” Kasi bato bagangi makasi ete: ‘Longolá ye! Longolá ye! Baká ye na nzete!’

Pilato atuni ete: “Esengeli nde nabaka mokonzi na bino na nzete?” Banganga-nzambe bakonzi bayanoli ete: “Tozali na mokonzi mosusu te kaka Kaisala.” Oyo nde likambo ya nsɔmɔ! Banganga-nzambe wana ya mabe basali nyonso mpo bato báboya Yesu!​—Yoane 19:1-16.

Lelo oyo makambo ezali kaka ndenge moko. Bato mingi bazali mpenza kolinga te ete Yesu azala Mokonzi na bango. Bakoki koloba ete bandimelaka Nzambe, nzokande balingaka te ete Nzambe to Klisto ayebisa bango oyo basengeli kosala. Balingaka nde baguvɛrnema na bango moko oyo ezali awa na mabelé.

Bongo biso? Ntango tozali koyekola makambo ya Bokonzi ya Nzambe mpe makambo nyonso ya kitoko oyo Bokonzi yango ekosala, tozali kotalela Nzambe ndenge nini?— Tozali kolinga ye, ezali bongo te?— Na bongo, ndenge nini tokoki komonisa Nzambe ete tozali kolinga ye mpe tozali na mposa ete Bokonzi na ye eyangela biso?—

Tokoki komonisa ye yango soki tozali kolanda ndakisa ya Yesu. Mpe Yesu asalaki nini mpo na komonisa ete alingaka Yehova?— Yesu alimbolaki ete: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoane 8:29) Yesu ayaki awa na mabelé ‘mpo na kosala mokano ya Nzambe’ mpe “kosilisa mosala na ye.” (Baebele 10:7; Yoane 4:34) Tótala oyo Yesu asalaki liboso abanda mosala na ye ya kosakola.

Yesu akendaki na Ebale ya Yolodani epai Yoane Mobatisi azalaki. Na nsima, bakitaki na mai, Yoane azindisaki Yesu mobimba na kati ya mai mpe abimisaki ye lisusu. Oyebi mpo na nini Yoane abatisaki Yesu?—

Yesu asɛngaki Yoane abatisa ye. Kasi ndenge nini toyebi ete Nzambe alingaki ete Yesu azwa batisimo?— Toyebi yango mpo ntango abimaki na mai, ayokaki mongongo ya Nzambe euti na likoló, elobi ete: “Yo ozali Mwana na ngai, molingami; nandimi yo.” Kutu, Nzambe atindaki elimo santu na ye na lolenge ya ebenga ekitela Yesu. Na bongo, ntango Yesu azwaki batisimo, amonisaki ete alingaki kosalela Yehova bomoi na ye mobimba, libela na libela.​—Malako 1:9-11.

Sikoyo ozali naino mwana. Kasi okosala nini ntango okokóma mokóló?— Okozwa batisimo lokola Yesu?— Osengeli komekola ye, mpo Biblia elobi ete atikelaki yo ‘ndakisa mpo olanda matambe na ye malamumalamu.’ (1 Petelo 2:21) Soki ozwi batisimo, okomonisa ete olingi mpenza ete Bokonzi ya Nzambe eyangela yo. Kasi esuki kaka te na kozwa batisimo.

Tosengeli kotosa makambo nyonso oyo Yesu ateyaki. Yesu alobaki ete tosengeli kozala “bato ya mokili te.” Soki tomikɔtisi na makambo ya mokili, tokomonisa nde ete tozali kotosa ye? Yesu ná bantoma na ye bamikɔtisaki na makambo ya mokili te. (Yoane 17:14) Kasi bazalaki nde na kosala nini?— Bazalaki koyebisa bato mosusu makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Yango nde ezalaki mosala ya ntina mingi na bomoi na bango. Biso mpe tokoki kosala mosala yango?— Tokoki kosala yango, mpe tokosala yango soki tondimaka mpenza maloba oyo tolobaka ntango tobondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya.

Tosɛngi yo otánga mikapo mosusu oyo eyebisaka biso makambo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingi Bokonzi ya Nzambe eya: Matai 6:24-33; 24:14; 1 Yoane 2:15-17; mpe 5:3.