Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 31

Epai tokoki kozwa libɔndisi

Epai tokoki kozwa libɔndisi

EKÓMELAKA yo ete oyoka mawa mpe omimonaka lokola nde ozali yo moko?— Omitunaka ntango mosusu soki ezali na moto oyo alingaka yo?— Bana mosusu bayokaka ndenge wana. Kasi Nzambe apesi elaka ete: “Ngai nakobosana yo te.” (Yisaya 49:15NW) Elaka wana ezali mpenza kosepelisa, ezali bongo te?— Ɛɛ, Yehova Nzambe alingaka mpenza biso!

Mokomi moko ya Biblia alobaki ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Koyeba likambo yango ekoki mpenza kobɔndisa biso, ezali bongo te?— Ɛɛ, Yehova ayebisi biso ete: “Kobanga te, mpo nazali elongo na yo. . . . Nakosunga yo mpenza.”​—Yisaya 41:10NW.

Ata bongo, na bantango mosusu, Yehova atikaka ete Satana abimisela biso mikakatano. Kutu, Yehova atikaka ete Satana ameka basaleli na Ye. Mokolo moko, Zabolo ayokisaká Yesu mpasi makasi mpe Yesu abelelaki Yehova ete: ‘Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?’ (Matai 27:46) Atako Yesu anyokwamaki bongo, azalaki kaka koyeba ete Yehova azali kolinga ye. (Yoane 10:17) Kasi Yesu ayebaki mpe ete Nzambe atikaka Satana ameka basaleli na Ye mpe atikelaka Satana nzela anyokola bango. Na mokapo mosusu tokolimbola mpo na nini Nzambe atikaka Satana asala bongo.

Ntango tozali bana mike, tobangaka na bantango mosusu. Na ndakisa, osilá kobunga?— Na ntango yango obangaki?— Bana mingi babangaka. Mokolo moko, Moteyi Monene abɛtaki lisolo moko oyo elobelaki likambo ya kobunga. Kasi ezalaki kobunga ya mwana te. Mpate moko nde ebungaki.

Na makambo mosusu, yo okokani na mpate. Na ndenge nini? Ezali mpo mpate ezalaka na makasi mingi te. Mpe esɛngaka bábatela yango mpe bákɛngɛla yango. Moto oyo abatelaka bampate babengaka ye mobateli ya mpate.

Na lisolo na ye, Yesu alobelaki mobateli moko ya mpate oyo azalaki na bampate monkama. Kasi, na nsima, mpate moko ebungaki. Ekoki kozala ete mpate yango ezalaki na mposa ya komona biloko oyo ezali na ngámbo mosusu ya ngomba. Kasi nokinoki, mpate yango ekómaki mosika, etiki bampate mosusu. Mpo na yo, mpate yango emiyokaki ndenge nini ntango etalaki epai na epai mpe emoni ete ezali kaka yango moko, baninga bazali te?—

Mobateli ya mpate asalaki nini ntango amonaki ete mpate moko ezangi? Alobaki nde ete ezali foti ya mpate yango, na bongo ntina amitungisa mpo na yango ezali te? To atikaki nde bampate 99 na esika ya malamu mpe akendaki koluka moko wana? Ebongaki nde amitungisa mingi kaka mpo na mpate wana moko?— Soki yo nde ozalaki mpate yango, olingaki kosepela ete mobateli ya mpate aya koluka yo?—

Mobateli ya mpate azalaki kolinga bampate na ye nyonso mingi, ata mpe oyo ebungaki. Yango wana akendaki koluka oyo ezangaki. Kanisá naino esengo mpate oyo ebungaki eyokaki ntango emonaki mobateli na yango azali koya! Mpe Yesu alobaki ete mobateli ya mpate asepelaki mpo amonaki mpate na ye. Asepelaki na yango mingi koleka bampate 99 oyo ebungaki te. Mpo na yo, nani akokani na mobateli ya mpate oyo Yesu alobelaki? Nani abatelaka biso ndenge mobateli wana ya mpate azalaki kobatela bampate na ye?— Yesu alobaki ete Tata na ye na likoló nde asalaka bongo. Mpe Tata na ye ezali Yehova.

Yehova Nzambe azali Mobateli Monene ya basaleli na ye. Alingaka bato nyonso oyo basalelaka ye, ná bana oyo bazali lokola yo. Alingaka te ete moko na biso azwa likama to abomama. Ya solo, koyeba ete Nzambe amibanzabanzaka mingi mpo na biso, ebɔndisaka!​—Matai 18:12-14.

Yo ondimaka mpenza Yehova Nzambe?— Mpo na yo, ye azali mpenza moto ya solosolo?— Ezali solo ete biso tokoki komona Yehova te. Tomonaka ye te mpo azali Elimo. Azali na nzoto oyo miso na biso ekoki komona te. Kasi azali moto ya solosolo, mpe akoki komona biso. Ayebaka ntango nini tozali na mposa ya lisalisi. Mpe tokoki kosolola na ye na libondeli, kaka ndenge tosololaka na bato oyo bazali awa na mabelé. Yehova alingaka ete tósala bongo.

Na bongo, osengeli kosala nini soki ozali mawa to omoni lokola nde ozali yo moko?— Sololá na Yehova. Pusaná penepene na ye, mpe ye akobɔndisa yo mpe akosalisa yo. Kobosana te ete Yehova alingaka yo, ata ntango omoni lokola nde ozali yo moko. Tókamata naino Biblia na biso. Awa na Nzembo 23, bayebisi biso, kobanda na vɛrsɛ 1 ete: ‘Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te. Azali kolalisa ngai na esika etondi na matiti; azali kotambwisa ngai pembeni na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.’

Talá oyo mokomi yango abakisi, na vɛrsɛ 4: ‘Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi, nakobanga eloko moko ya mabe te, mpo ozali elongo na ngai; fimbo na yo mpe lingenda na yo ezali biloko oyo ezali kobɔndisa ngai.’ Bato oyo Yehova azali Nzambe na bango bayokaka ndenge wana. Babɔndisamaka ntango bakutani na mikakatano. Yo mpe oyokaka ndenge wana?—

Kaka ndenge mobateli ya mpate abatelaka etonga na ye, Yehova mpe abatelaka basaleli na ye malamu. Alakisaka bango nzela ya malamu oyo basengeli kolanda, mpe basepelaka kolanda ye. Ata soki makambo ya yikiyiki ezali na bisika bazalaka, basengeli kobanga te. Mobateli ya mpate asalelaka fimbo to lingenda na ye mpo na kobatela bampate liboso ya banyama oyo ekoki kosala bango mabe. Biblia elobeli lolenge oyo elenge Davidi, mobateli ya mpate, abatelaki bampate na ye liboso ya nkɔsi mpe ya ursi. (1 Samwele 17:34-36) Basaleli ya Nzambe bayebi mpe ete Yehova akobatela bango. Bakoki kobanga likama moko te mpo Nzambe azali na bango.

Yehova alingaka mpenza bampate na ye, mpe abatelaka bango na bolingo. Biblia elobi ete: ‘Akotambwisa bampate na ye ndenge mobateli ya mpate asalaka. Akosangisa bana ya mpate esika moko na mabɔkɔ na ye.’​—Yisaya 40:11.

Koyeba ete Yehova azali ndenge wana esepelisi yo mpenza, ezali bongo te?— Olingi kozala moko ya bampate na ye?— Bampate bayokaka mongongo ya mobateli na bango. Bampate bazalaka penepene na ye. Yo oyokelaka Yehova?— Ozalaka penepene na ye?— Soki ezali bongo, osengeli kobanga te. Yehova akozala elongo na yo.

Yehova abatelaka na bolingo mpenza baoyo basalelaka ye. Tótánga ndenge Biblia elobeli likambo yango, na Nzembo 37:25; 55:22; mpe Luka 12:29-31.