Yisaya 9:1-21
9 Nzokande, molili ekozala te lokola ntango mokili ezalaki na mpasi, lokola na ntango ya kala oyo bazalaki kotyola mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali.+ Kasi na nsima, akosala ete bákumisa nzela oyo ezali pene na mbu, na etúká ya Yordani, Galile ya bato ya bikólo.
2 Bato oyo bazalaki kotambola na moliliBamoni pole moko monene.
Mpe bato oyo bafandaki na mokili ya molili makasi,Pole engɛngɛli bango.+
3 Okómisi ekólo yango bato ebele;Osali ete esepela makasi mpenza.
Basepeli liboso na yoNdenge bato basepelaka na ntango ya kobuka mbuma,Ndenge bato bayokaka esengo ntango bazali kokabola biloko oyo bapunzi.
4 Mpo obukibuki ekanganeli ya mokumba na bango,Fimbo oyo ezalaki kobɛta mapeka na bango, lingenda ya moto oyo azalaki kotinda bango básala mosala,Lokola na mokolo ya Midiane.+
5 Sapato nyonso ya basoda oyo eningisaka mabele wana bazali kotambolaMpe bilamba na bango oyo epoli na makilaEkokóma biloko ya kopelisela mɔtɔ.
6 Mpo baboteli biso mwana,+Bapesi biso mwana mobali;Mpe boyangeli* ekozala na lipeka na ye.+
Bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko, Nkumu ya Kimya.
7 Bonene ya boyangeli* na ye mpe kimya,Kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.+Ekopikama makasi+ mpe ekosimbamaNa bosembo+ mpe na boyengebene,+Banda sikoyo mpe libela na libela.Molende ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.
8 Yehova atindaki liloba mpo na kokebisa Yakobo,Mpe yango ekwelaki Yisraele.+
9 Mpe bato nyonso bakoyeba yangoEfraime mpe bato oyo bafandi na Samaria,Baoyo na lolendo na bango mpe na lofundo ya motema na bango balobi:
10 “Babriki ekwei,Kasi tokotonga na mabanga oyo bakatá.+
Banzete ya sikomore ekatami,Kasi na esika na yango tokotya banzete ya sɛdrɛ.”
11 Yehova akotika banguna ya Rezine bátɛmɛla yeMpe akosala ete banguna ya Yisraele bábundisa ye,
12 Siri ekouta na ɛsti mpe Bafilistia bakouta na wɛsti,*+Bakofungola monɔkɔ na bango mpe bakolya Yisraele.+
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
13 Mpo bato bazongeli te Moto oyo azali kobɛta bango;Baluki Yehova ya mampinga te.+
14 Na Yisraele, Yehova akokataMotó ná mokila, etape ná nkɛkɛlɛ kaka na mokolo moko.+
15 Nkulutu mpe moto oyo bapesaka limemya mingi nde motó,Mpe mosakoli oyo ateyaka lokuta nde mokila.+
16 Baoyo bazali kokamba bato oyo nde bazali kosala ete báyengayenga,Mpe baoyo bazali kokambama, babulunganisami.
17 Yango wana Yehova akosepela na bilenge mibali na bango te,Mpe akoyoka mawa te mpo na bana na bango oyo batata bakufá mpe basi na bango oyo mibali bakufáMpo bango nyonso bazali bapɛngwi mpe basali-mabe+Mpe moto nyonso azali koloba makambo ya bozoba.
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
18 Mpo mabe epeli lokola mɔtɔ,Ezikisi mwa banzete ya nzubɛ mpe matiti mabe.
Ekopelisa mwa banzete oyo ezali na zamba,Mpe mwa banzete yango ekotombwana na likoló lokola lipata ya milinga.
19 Na nkanda makasi ya Yehova ya mampingaMokili epeli mɔtɔ,Mpe bato bakokóma lokola biloko oyo epelisaka mɔtɔ.
Moto moko te akobikisa ata ndeko na ye.
20 Bakokata eloko ya kolya na lobɔkɔ ya mobali,Kasi bakozala kaka na nzala;Bakolya eloko na lobɔkɔ ya mwasi,Kasi bakotonda te.
Moto na moto akolya mosuni ya lobɔkɔ na ye,
21 Manase akolya Efraime,Mpe Efraime akolya Manase.
Bango nyonso elongo bakobunda na Yuda.+
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
Maloba na nse
^ To, “guvɛrnema; boyangeli ya nkumu.”
^ To, “guvɛrnema; boyangeli ya nkumu.”
^ Lil., “na nsima.”