Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 28

Monisá botɔndi mpo na oyo Yehova ná Yesu basalelá yo

Monisá botɔndi mpo na oyo Yehova ná Yesu basalelá yo

Oyokaka ndenge nini soki moninga moko akabeli yo eloko moko ya kitoko? Na ntembe te, oyokaka esengo mpe ozalaka na mposa ya komonisa moninga yango ete osepeli na eloko yango. Yehova ná Yesu bapesá biso likabo moko ya monene oyo eleki makabo nyonso. Likabo yango nini, mpe tokoki kosala nini mpo na komonisa ete tozali na botɔndi mpo na yango?

1. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na oyo Yehova ná Yesu basalelá biso?

Biblia elobi ete “moto nyonso oyo azali kondimela [Yesu]” akoki kozwa bomoi ya libela na libela. (Yoane 3:16) Kondimela Yesu elakisi nini? Esuki kaka te na kozala na kondima epai na ye. Tosengeli mpe komonisa kondima na makambo oyo toponaka mpe oyo tosalaka. (Yakobo 2:17) Ntango tozali komonisa kondima na makambo oyo tosalaka mpe oyo tolobaka, boninga na biso ná Yesu mpe Tata na ye, Yehova ekómaka makasi.​—Tángá Yoane 14:21.

2. Molulu nini ya ntina mingi esalisaka biso tómonisa botɔndi mpo na oyo Yehova ná Yesu basalelá biso?

Na mpokwa ya nsuka liboso Yesu akufa, ayebisaki bayekoli na ye eloko bakoki kosala mpo na komonisa botɔndi na mbeka na ye. Asalaki molulu moko ya ntina mingi oyo Biblia ebengi “bilei ya mpokwa ya Nkolo,” ebengamaka mpe Ekaniseli ya liwa ya Yesu. (1 Bakorinti 11:20) Yesu asalaki yango mpo alingaki ete bantoma na ye mpe bakristo nyonso ya solo bábosanaka te ete apesá bomoi na ye mpo na bango. Mpo na molulu yango, Yesu apesaki mobeko ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Soki oyangani na Ekaniseli, okomonisa ete ozali na botɔndi mpo na bolingo monene oyo Yehova ná Yesu bazali na yango mpo na biso.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu mpo na komonisa botɔndi na bolingo monene oyo Yehova ná Yesu bamoniselaki biso. Luká koyeba mpe mpo na nini Ekaniseli ya liwa ya Yesu ezali mpenza na ntina.

3. Tokoki kosala nini mpo na komonisa ete tozali na botɔndi?

Kanisá ete moto moko abikisaki yo na liwa. Okobosana likambo oyo moto yango asalelaki yo? To okoluka nde kosala makambo oyo ekomonisa ete ozali na botɔndi mpo na oyo asalaki?

Tozali na likoki ya kozala na bomoi ya seko mpo Yehova apesaki mwana na ye mpo na biso. Tángá 1 Yoane 4:8-10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini mbeka ya Yesu ezali likabo oyo eleki makabo nyonso?

  • Oyokaka ndenge nini mpo na oyo Yehova ná Yesu basalelá yo?

Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na yango? Tángá 2 Bakorinti 5:15 mpe 1 Yoane 4:11; 5:3. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

  • Na kotalela bavɛrsɛ oyo, tokoki kosala nini mpo na komonisa ete tozali na botɔndi?

4. Mekolá Yesu

Ndenge mosusu ya komonisa ete tozali na botɔndi ezali ya komekola Yesu. Tángá 1 Petro 2:21, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini okoki kolanda matambe ya Yesu malamumalamu?

5. Yanganáká na Ekaniseli ya liwa ya Kristo

Mpo na koyeba makambo oyo esalemaki na molulu ya liboso ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo, tángá Luka 22:14, 19, 20. Na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Makambo nini esalemaki na molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo?

  • Limpa mpe vinyo elakisi nini?​—Talá vɛrsɛ 19 mpe 20.

Yesu alingaki ete bayekoli na ye básalaka Ekaniseli ya liwa na ye mbala moko na mbula na dati oyo akufaki. Yango wana, Batatoli ya Yehova bayanganaka mbula na mbula mpo na kokanisa liwa ya Kristo ndenge asɛngaki bango básala. Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali likita yango ya ntina mingi, talá VIDEO. Mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Makambo nini esalemaka na Ekaniseli?

Limpa mpe vinyo elakisi nini? Limpa elakisi nzoto ya kokoka ya Yesu oyo apesaki yango mbeka mpo na biso. Vinyo elakisi makila na ye

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Mpo obika osengeli kaka kondimela Yesu.”

  • Ndenge nini okoki kosalela Yoane 3:16 mpe Yakobo 2:17 mpo na komonisa ete esengeli mpe kosala makambo mosusu?

NA MOKUSE

Tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na oyo Yesu asalelá biso soki tondimeli ye mpe tozali koyangana na Ekaniseli ya liwa na ye.

Bozongeli

  • Kondimela Yesu elakisi nini?

  • Okoki kosala nini mpo na komonisa botɔndi na oyo Yehova ná Yesu basalelá yo?

  • Mpo na nini ezali na ntina mingi koyangana na Ekaniseli ya liwa ya Kristo?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Liwa ya Kristo etindi yo osala nini?

Asalelaki nzoto na ye mpo na kokumisa Yehova (9:28)

Luká koyeba makambo mosusu etali kondima mpe oyo okoki kosala mpo na komonisa ete ozali na kondima.

“Monisá kondima na bilaka ya Yehova” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2016)

Tángá lisolo “Nakómi na bomoi ya malamu mpe ya esengo,” mpo na komona ndenge bomoi ya mwasi moko ebongwanaki ntango ayebaki malamumalamu bolamu oyo mbeka ya Kristo ememeli ye.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2011)

Talá ntina oyo bato moke kaka nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli.

“Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka elambo ya Nkolo ndenge moko te na mangomba mosusu?” (Lisolo oyo ezali na Internet)