Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ebongolaka bato

Biblia ebongolaka bato

MPO na nini moto oyo azalaki kala na basi ebele mpe azalaki kolinga Batatoli ya Yehova te azwaki ekateli ya kokóma Motatoli? Nini etindaki pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Pantekote atika lingomba yango? Nini esalisaki mwasi moko oyo anyokwamaki na bomwana atika kokanisa ete azali na ntina moko te mpe apusana penepene na Nzambe? Mpo na nini moto moko oyo azalaki kolinga miziki babengi heavy-metal, akómaki Motatoli ya Yehova? Tángá masolo oyo mpo ozwa biyano.

“Nakómi mobali malamu.”​—RIGOBERT HOUETO

  • ABOTAMAKI NA: 1941

  • EKÓLO: BÉNIN

  • BOMOI NA YE YA KALA: ABALAKI BASI EBELE, AZALAKI KOLINGA BATATOLI YA YEHOVA TE

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Cotonou, engumba-mokonzi ya ekólo Bénin. Baboti na ngai bateyaki ngai mateya ya Katolike na bomwana, kasi nazalaki kokende mpenza na ndako-nzambe te. Na mboka na biso, bato mingi ya Katolike bazalaki na basi ebele, mpamba te na ntango wana, Leta apekisaki te kobala basi ebele. Yango wana nabalaki basi minei.

Ntango botomboki ebimaki na bambula ya 1970, nakanisaki ete ekomemela ekólo na biso bolamu. Napesaki mpenza mabɔkɔ na botomboki yango mpe nakɔtaki na makambo ya politiki. Batomboki bazalaki kolinga Batatoli ya Yehova te mpo bazalaki kokɔta na makambo ya politiki te. Nazalaki na kati ya baoyo bazalaki konyokola Batatoli. Ntango babenganaki bamisionɛrɛ ya Batatoli na ekólo, nakanisaki ete bakozonga lisusu ata mokolo moko te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Botomboki esilaki na mobu 1990. Nakamwaki mpo eumelaki te bamisionɛrɛ bazongaki lisusu. Nakómaki kokanisa ete ntango mosusu Nzambe azali na bato yango. Na ntango wana, nazwaki mosala mosusu. Moninga na ngai moko ya mosala azalaki Motatoli, mpe mosika te abandaki koteya ngai. Alakisaki ngai bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisaka ete Yehova azali Nzambe ya bolingo mpe ya bosembo. (Kolimbola Mibeko 32:4; 1 Yoane 4:8) Bizaleli wana esepelisaki ngai. Nazalaki na mposa ya koyekola makambo mingi mpo na Yehova; na yango, nandimaki koyekola Biblia.

Eumelaki te nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Bolingo oyo namonaki ekamwisaki ngai​—kuna bazalaki komona te ete bato ya mposo boye baleki, to bazwi baleki babola. Lokola nazalaki koyangana mingi na Batatoli, namonaki polele ete bazali bayekoli ya solo ya Yesu.​—Yoane 13:35.

Namonaki malamu ete soki nalingi kosalela Yehova, esengeli nalongwa na Lingomba ya Katolike. Yango ezalaki ekateli ya pɛtɛɛ te, mpo nazalaki kobanga soki basusu bakoloba nini. Nsima ya ntango molai mpe na lisalisi ya Yehova, nazwaki mpiko mpe nalongwaki na lingomba yango.

Ezalaki na mbongwana mosusu monene oyo nasengelaki kosala. Koyekola Biblia esalisaki  ngai namona ete Nzambe andimaka te kozala na basi ebele. (Ebandeli 2:18-24; Matai 19:4-6) Mpo na ye, kaka libala na ngai ya liboso nde endimamaki. Nakomisaki libala yango na buku ya Leta mpe nakabwanaki na basi mosusu; nazwaki mpe bibongiseli mpo na kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Na nsima, na kati ya basi na ngai wana ya kala, mibale bakómaki Batatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI:

Atako mwasi na ngai azali kaka na Lingomba ya Katolike, amemyaka ekateli na ngai ya kosalela Yehova. Namonaka ete nakómá mobali malamu mpenza, mwasi na ngai mpe amonaka bongo.

Liboso, nazalaki kokanisa ete nakobongisa ekólo na biso na makambo ya politiki, kasi milende wana ezalaki mosala ya mpunda. Lelo oyo, namonaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato. (Matai 6:9, 10) Nazali mpenza kotɔnda Yehova oyo alakisi ngai ndenge ya kozala na bomoi ya esengo mpenza.

“Ezalaki pɛtɛɛ te mpo nabongwana mpenza.”​—ALEX LEMOS SILVA

  • ABOTAMAKI NA: 1977

  • EKÓLO: BRÉSIL

  • BOMOI NA YE YA KALA: PASTƐRƐ YA LINGOMBA YA PANTEKOTE

NDENGE NAZALAKI:

Nakolaki na mwa kartye moko ya mosika na engumba Itu, na etúká ya São Paulo. Kartye yango eyebanaki mpo mobulu ezalaki kosalema mingi kuna.

Nazalaki mpenza moto ya mobulu mpe ya bomoi ya mbindo. Namipesaki mpe na kotɛka bangi. Na nsima, namonaki ete bomoi yango ekomema ngai na bolɔkɔ to na liwa; yango wana natikaki. Nakómaki kosambela na Lingomba ya Pantekote, mpe nsukansuka nakómaki pastɛrɛ.

Nakanisaki ete nakosalisa mpenza bato na mosala na ngai na lingomba. Kutu, nazalaki koleka na radio ya mboka mpo na koteya makambo ya Nzambe mpe yango esalaki ete nayebana mingi. Kasi, mokemoke nayaki kondima ete na makambo mingi, lingomba ezalaki komibanzabanza mpo na bolamu ya bandimi te; kutu, ezalaki komibanzabanza mingi te mpo na kokumisa Nzambe. Namonaki ete mokano monene ya lingomba ezalaki kaka kozwa mbongo. Namonaki malamu nalongwa na lingomba yango.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Ntango Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia na ngai, namonaki mbala moko ete bakeseni mpenza na mangomba mosusu. Makambo mibale ekamwisaki ngai. Ya liboso, Batatoli ya Yehova basukaka te kaka na koteya bato bálinga Nzambe mpe mozalani; kasi bamonisaka mpe yango. Ya mibale, bakɔtaka te na politiki to na bitumba. (Yisaya 2:4) Makambo wana mibale endimisaki ngai ete nazwi lingomba ya solo​—nzela ya nkaka oyo ememaka na bomoi ya seko.​—Matai 7:13, 14.

Namonaki ete soki nalingi kosepelisa Nzambe, nasengeli mpe kotika makambo mosusu. Nasengelaki kotyela libota na ngai likebi mingi. Nasengelaki mpe komikitisa mpenza. Ezalaki pɛtɛɛ te nasala mbongwana oyo  esengeli, kasi na lisalisi ya Yehova, nalongaki. Mbongwana yango ekamwisaki mwasi na ngai. Abandaki koyekola Biblia liboso na ngai, kasi ntango wana nde, akómaki mpenza kokola noki na elimo. Eumelaki te, ngai ná ye tomonaki esengeli tókóma Batatoli ya Yehova. Tozwaki batisimo mokolo moko.

MATOMBA OYO NAZWI:

Ngai ná mwasi na ngai tozali na esengo ya kosalisa bana na biso misato bákóma mpenza baninga ya Yehova. Tozali libota ya esengo. Natɔndaka Yehova ndenge abendá ngai nayeba solo ya Biblia, Liloba na ye. Ebongolaka mpenza bato! Emonani mpenza na bomoi na ngai.

“Nakómi na bomoi ya malamu mpe ya esengo.”​—VICTORIA TONG

  • ABOTAMAKI NA: 1957

  • EKÓLO: AUSTRALIE

  • BOMOI NA YE YA KALA: ANYOKWAMAKI MINGI NA BOMWANA

NDENGE NAZALAKI:

Nakolá na engumba Newcastle, na etúká ya Nouvelle-Galles du Sud. Nazali mwana ya liboso na libota ya bana nsambo ya tata moko ya mobulu mpe molangwi masanga mpe ya mama moko ya mobulu. Mama azalaki kobɛta ngai mpe koloba na ngai maloba mabe. Azalaki ntango nyonso koyebisa ngai ete nazalaki mabe mpe nakonyokwama na lifelo. Maloba ya ndenge wana ezalaki kobangisa ngai.

Lokola mama azalaki kozokisa ngai bampota, mbala mingi nazalaki kokende na kelasi te. Ntango nakómaki na mbula 11, bakonzi ya Leta balongolaki ngai na mabɔkɔ ya baboti na ngai mpe batyaki ngai na esika oyo babatelaka bana mpe na nsima batindaki ngai epai ya bamamɛlo. Ntango nakómaki na mbula 14, nakimaki. Naboyaki mpe kozonga na ndako, yango wana nakómaki kofanda na babalabala ya Kings Cross, kartye moko ya engumba Sydney.

Ntango nazalaki kofanda na babalabala, namipesaki na bangi, masanga, pornografi mpe bondumba. Likambo moko oyo nakutanaki na yango ebangisaki ngai mpenza. Nazalaki kofanda na apartema ya moto moko oyo azalaki na nganda moko ya butu. Mokolo moko na mpokwa, mibali mibale bayaki epai na ye. Atindaki ngai nakɔta na shambrɛ, kasi nazalaki koyoka masolo na bango. Nkolo nganda yango azalaki koyokana na bato yango mpo atɛka ngai epai na bango. Balingaki kobomba ngai na kati ya masuwa mpe komema ngai na Japon mpo nasalaka na nganda moko kuna. Nabangaki, napumbwaki na balcon mpe nakimaki mpo na koluka lisalisi.

Namonaki mobali moko oyo ayaki kotala engumba Sydney, mpe nayebisaki ye likambo na ngai, na elikya ete akopesa ngai mwa mbongo. Kasi, moto yango amemaki ngai na esika oyo azalaki kofanda mpo nasukola mpe nalya mwa eloko. Makambo ebalukaki, natikalaki kaka wana. Mbula moko na nsima, tobalanaki.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Ntango Batatoli ya Yehova babandaki koyekola na ngai Biblia, makanisi ndenge na ndenge eyelaki ngai na motó. Nayokaki nkanda ntango nayebaki ete Satana nde abimiselaka bato mikakatano. Liboso, bazalaki koteya biso ete Nzambe nde anyokolaka bato. Motema na ngai ekitaki ntango nayebaki ete Nzambe anyokolaka bato na lifelo te,  liteya oyo ezalaki kobangisa ngai banda bambula mingi.

Nakamwaki ndenge Batatoli balandaka Biblia mpo na kozwa bikateli. Basalelaka makambo oyo bateyaka. Nazalaki moto ya matata, kasi ezala likambo nini nazalaki koloba to kosala, Batatoli bazalaki kosalela ngai makambo na bolingo mpe limemya.

Mokakatano monene oyo nazalaki na yango ezalaki makanisi ya komimona lokola nazangi ntina. Nazalaki komiyina, mpe makanisi yango ekobaki ntango molai ata nsima ya batisimo na ngai, ntango nakómaki Motatoli ya Yehova. Nayebaki ete nalingaka Yehova, kasi nandimaki te ete akoki mpenza kolinga moto lokola ngai.

Makanisi na ngai ebongwanaki mpenza mbula 15 nsima ya batisimo na ngai. Na diskur moko oyo esalemaki na Ndako ya Bokonzi, molobi atángaki Yakobo 1:23, 24. Bavɛrsɛ yango emonisaki ete Liloba ya Nzambe ezali lokola talatala oyo tokoki komimona ndenge Yehova amonaka biso. Nakómaki komituna soki ndenge oyo namimonaka ekeseni na ndenge oyo Yehova amonaka ngai. Liboso, naboyaki kondima likanisi wana. Nazalaki kaka komona ete koluka ete Yehova alinga ngai, ezali kosɛnga ye mingi.

Nsima ya mwa mikolo, natángaki vɛrsɛ moko oyo ebongolaki bomoi na ngai. Ezalaki Yisaya 1:18, epai Yehova azali koloba boye: “Sikoyo, bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso. Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ; ata soki ezali motane lokola elamba ya motane makasi, ekokóma lokola lɛnɛ.” Nayokaki lokola nde Yehova azalaki koloba na ngai: “Yaká Vicky, tóbongisa makambo kati na biso. Nayebi yo, nayebi masumu na yo, nayebi motema na yo mpe nalingaka yo.”

Nakokaki kolala te butu wana. Nazalaki kaka kondima te ete Yehova akokaki kolinga ngai, kasi nabandaki kokanisa na mbeka ya lisiko ya Yesu. Mbala moko, namonaki ete Yehova azalaki motema molai epai na ngai banda kala, azalaki komonisa ngai na ndenge mingi ete azalaki kolinga ngai. Kasi, nazalaki nde koyebisa ye ete: “Bolingo na yo ezali mpenza monene te mpo omonisela ngai yango. Mbeka ya mwana na yo ekoki te kozipa masumu na ngai.” Ezalaki lokola nde nazalaki koboya lisiko oyo Yehova abongisaki mpo na ngai. Kasi, ntango nakanisaki na mozindo likabo ya lisiko, nakómaki komona ete Yehova alingaka ngai.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nakómi na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Libala na ngai ebongi, mpe nazali na esengo ete nakoki kolobela makambo oyo nakutaná na yango mpo na kosalisa basusu. Nakómi komona ete nazali kaka kopusana penepene ya Yehova.

“Yango ezalaki eyano na libondeli na ngai.”​—SERGEY BOTANKIN

  • ABOTAMAKI NA: 1974

  • EKÓLO: RUSSIE

  • BOMOI NA YE KALA: ALINGAKI MINGI MIZIKI BABENGI HEAVY-METAL

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Votkinsk, engumba epai alanga-nzembo monene Pyotr Ilich Tchaikovsky abotamá. Libota na biso ezalaki na bozwi te. Tata azalaki na bizaleli mingi ya kitoko, kasi azalaki molangwi masanga, yango wana libota na biso ezalaki ntango nyonso na matata.

Nazalaki mpenza mayele te na kelasi, mpe ntango bambula ezalaki koleka, nakómaki komona lokola nde basusu baleki ngai na makambo nyonso. Nakómaki kokima bato mpe kokanisela  bango mabe. Nakómaki kobanga kokende kelasi. Na ndakisa, soki basɛngi ngai nasala lisolo liboso ya baninga, mbala mingi nazalaki kokoka te kolimbola ata makambo mike oyo nakokaki koloba na bisika mosusu. Ntango nasilisaki kelasi ya minei na eteyelo ya ntei, na bulletin na ngai bakomaki boye: “Akokaka kosolola to kobimisa makanisi na ye te.” Maloba wana esilisaki ngai makasi mpe nakómaki komona lisusu ete nazangi ntina. Nakómaki komituna soki bomoi na ngai ezali mpenza na ntina.

Na bolenge na ngai, nabandaki komɛla masanga makasi. Na ebandeli, nazalaki koyoka malamu. Kasi, ntango nazalaki komɛla masanga mingi, lisosoli na ngai ezalaki kotungisama. Nakómaki komona ete bomoi na ngai ezali na ntina te. Nakómaki kotungisama mingi na makanisi; na bantango mosusu, nazalaki kobima na ndako te mikolo mingi. Nakómaki na makanisi ya komiboma.

Ntango nakómaki na mbula 20, likambo moko ya sika ebɔndisaki ngai mpo na mwa ntango. Nayaki koyeba ete miziki moko babengi heavy-metal ezalaka. Nasepelaki na yango mingi mpe nalukaki bato mosusu oyo bazalaki kolinga miziki yango. Nakolisaki nsuki na ngai, natɔbɔlaki matoi, mpe nakómaki kolata lokola baalangá-nzembo oyo nazalaki kolinga. Mokemoke nakómaki mafumafu mpe mobulu, mbala mingi nazalaki koswana na bandeko na ngai.

Nakanisaki ete koyoka miziki babengi heavy-metal ekopesa ngai esengo, kasi ezalaki bongo te. Nakómaki nde kobeba mpenza! Mpe ntango nayokaki makambo mabe oyo baalangá-nzembo mosusu oyo nazalaki kolinga bazalaki kosala, nalɛmbaki mpenza nzoto.

Nakómaki lisusu na makanisi ya komiboma; ya mbala oyo ezalaki lisɛki te. Likambo kaka moko oyo ezalaki kopekisa ngai ezalaki kokanisa mpasi oyo mama akoyoka. Alingaki ngai mingi mpenza, mpe asalaki mingi mpo na ngai. Likambo yango ezalaki mpenza kotungisa ngai. Nalingaki lisusu kozala na bomoi te, kasi nakokaki mpe kokata bomoi na ngai te.

Nabandaki kotánga babuku ya monɔkɔ ya Russe mpo na kolekisa ntango. Lisolo moko oyo natángaki elobelaki moto moko oyo azalaki kosala na ndako-nzambe. Mbala moko nayokaki mposa makasi ya kosalela Nzambe mpe kosalisa bato mosusu. Nabondelaki Nzambe na motema mobimba, likambo oyo nasalaki naino liboso te. Nasɛngaki Nzambe alakisa ngai ndenge oyo nakoki kozala na bomoi oyo ezali na ntina. Ntango nazalaki kobondela, nayokaki mpenza ete motema ekiti. Eloko ekamwisaki ngai lisusu mingi ezali likambo oyo esalemaki na nsima. Kaka ngonga mibale na nsima, Motatoli ya Yehova moko abɛtaki na porte na ngai mpe asɛngaki ngai nayekola Biblia. Nandimaki ete yango ezalaki eyano na libondeli na ngai. Yango ezalaki mokolo ya liboso ya bomoi ya sika ya esengo mpo na ngai.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Atako ezalaki mpasi, nabwakaki biloko na ngai nyonso oyo ezalaki na boyokani na miziki ya heavy-metal. Atako bongo, miziki yango etikalaki na bɔɔngo na ngai ntango molai. Mbala nyonso oyo nazalaki koleka na esika oyo bazali kobɛta miziki yango, nazalaki mbala moko kokanisa bomoi na ngai ya kala. Nalingaki te kosangisa makambo wana ya kala ná nyonso oyo ya kitoko ezalaki kokɔta na makanisi mpe motema na ngai. Yango wana, ngai moko naboyaki bisika ya ndenge wana. Mpe soki nakanisi bomoi na ngai ya kala, nazalaki kobondela makasi. Kosala bongo esalisaki ngai nazwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”​—Bafilipi 4:7.

Ntango nazalaki koyekola Biblia, namonaki ete bakristo basengeli koyebisa basusu makambo na yango. (Matai 28:19, 20) Nakanisaki ete nakosala yango ata mokolo moko te. Kaka na ntango yango, makambo ya sika oyo nazalaki koyekola ememelaki ngai esengo mingi mpe kimya. Nayebaki ete bato mosusu mpe basengelaki koyeba solo yango. Atako nazalaki kobanga, nabandaki koyebisa basusu makambo oyo nazalaki koyekola. Eloko ekamwisaki ngai mpenza, koyebisa basusu makambo ya Biblia esalisaki ngai nakóma komona ete nazali na ntina. Esalaki mpe ete mateya wana ya sika efanda mpenza na motema na ngai moko.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nazali lelo na libala ya esengo mpe nasalisi bato mingi báyeba solo ya Biblia, na kati ya bato yango, leki na ngai ya mwasi mpe mama na ngai. Kosalela Nzambe mpe kosalisa basusu báyeba ye esali ete bomoi na ngai ekóma mpenza na ntina.