Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 26

Mpo na nini makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili?

Mpo na nini makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili?

Soki likambo ya mabe ekómeli moto, ezali mabe te amituna: “Mpo na nini likambo ya boye ekómeli ngai?” Tozali na esengo ya koyeba ete Biblia epesi eyano na motuna yango.

1. Satana asalaki nini mpo mabe ekɔta na mokili?

Satana Zabolo atombokelaki Nzambe. Alingaki kozala mokonzi ya basusu, yango wana atindaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe. Asalaki yango na ndenge akosaki Eva. (Ebandeli 3:1-5) Atindaki Eva akanisa ete Yehova alingi te ete azala na eloko ya malamu. Satana alingaki komonisa ete bato bakozala na esengo soki baboyi kotosa Nzambe. Mbala ya liboso oyo Satana akosaki ezalaki ntango ayebisaki Eva ete akokufa te. Yango wana, Biblia ebengi Satana “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.”​—Yoane 8:44.

2. Adama ná Eva baponaki kosala nini?

Yehova apesaki Adama ná Eva biloko nyonso oyo bazalaki na yango mposa. Alobaki na bango ete bakoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga ya Edene, longola kaka nzete moko oyo apekisaki bango. (Ebandeli 2:15-17) Kasi baponaki kolya mbuma ya nzete yango. Eva “akamataki mbuma na yango mpe alyaki.” Na nsima, Adama “mpe alyaki.” (Ebandeli 3:6) Bango mibale batosaki Nzambe te. Lokola Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka, ezalaki mpasi te básala oyo ezali malamu. Kasi lokola baboyaki kotosa Nzambe na nko, basalaki lisumu mpe baboyaki Nzambe azala mokonzi na bango. Ekateli oyo bazwaki ememelaki bango mpasi mpenza.​—Ebandeli 3:16-19.

3. Ekateli oyo Adama ná Eva bazwaki ememelá biso nini?

Ntango Adama ná Eva basalaki lisumu bakómaki bato ya masumu, mpe bapesaki bana na bango nyonso lisumu. Biblia elobi mpo na Adama boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso.”​—Baroma 5:12.

Tomonaka mpasi mpo na bantina mingi. Ntango mosusu tomonaka mpasi mpo na bikateli ya mabe oyo tozwaka. Tomonaka mpe mpasi mpo na bikateli ya mabe oyo bato mosusu bazwaka. To mpo tozali na esika mpe na ntango oyo likama ebimi.​—Tángá Mosakoli 9:11.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba mpo na nini ezali foti ya Nzambe te ndenge makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili lelo oyo. Luká koyeba mpe ndenge oyo Nzambe ayokaka ntango tozali komona mpasi.

4. Moto oyo abimiselaka biso bampasi

Bato mingi bakanisaka ete Nzambe nde azali mokonzi ya mokili oyo. Ezali solo? Talá VIDEO.

Tángá Yakobo 1:13 mpe 1 Yoane 5:19, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nzambe nde abimiselaka biso bampasi mpe makambo ya mabe?

5. Makambo nini ezali kosalema banda Satana akómá mokonzi?

Tángá Ebandeli 3:1-6, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Lokuta nini Satana alobaki?​—Talá vɛrsɛ 4 mpe 5.

  • Ndenge nini Satana alukaki komonisa ete Yehova azali kopimela bato makambo ya malamu?

  • Ndenge nini Satana amonisaki ete mpo bato bázala na esengo esɛngi te ete Nzambe azala Mokonzi na bango?

Tángá Mosakoli 8:9, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Lokola Yehova azali Mokonzi ya mokili oyo te, makambo nini ezali kosalema?

  1. Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka ntango bazalaki na Paradiso. Kasi, bayokelaki Satana mpe batombokelaki Yehova

  2. Nsima ya botomboki na bango, lisumu, mpasi mpe liwa ekɔtaki na mokili

  3. Yehova akolongola lisumu, mpasi mpe liwa. Bato bakozongela lisusu na nzoto ya kokoka mpe bakofanda na Paradiso

6. Yehova ayokaka mawa ntango tozali komona mpasi

Yehova ayokaka ndenge nini ntango tozali komona mpasi? Talá makambo oyo Mokonzi Davidi mpe ntoma Petro bakomaki. Tángá Nzembo 31:7 mpe 1 Petro 5:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Koyeba ete Yehova amonaka bampasi na biso mpe ayokelaka biso mawa, esali yo nini?

7. Yehova akosilisa bampasi

Tángá Yisaya 65:17 mpe Emoniseli 21:3, 4, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Koyeba ete Yehova akosilisa mabe nyonso ezali kolendisa. Mpo na nini?

Oyebaki yango?

Ntango Satana alobaki lokuta mpo na mbala ya liboso, akoselaki Yehova makambo. Na ndenge yango, atindaki bato bákanisa ete Yehova azali Mokonzi oyo azangi bolingo mpe bosembo. Na mikolo ezali koya, ntango Yehova akosilisa bampasi nyonso ya bato, akosantisa nkombo na ye. Na maloba mosusu, Nzambe akomonisa ete boyangeli na ye nde ezali malamu koleka. Kosantisama ya nkombo ya Yehova ezali likambo oyo ezali na ntina mingi koleka.​—Matai 6:9, 10.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Soki tozali komona mpasi ezali mpo Nzambe nde alingi bongo.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Satana, Adama ná Eva nde bamemelá biso makambo ya mabe oyo ezali lelo na mokili. Yehova ayokaka mawa ntango tozali komona mpasi, mpe etikali moke asilisa bampasi nyonso.

Bozongeli

  • Lokuta nini Satana Zabolo ayebisaki Eva?

  • Botomboki ya Adama ná Eva ememelá biso nini?

  • Ndenge nini toyebi ete Yehova asepelaka te ntango tozali komona mpasi?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá soki Biblia elobi ete lisumu ezali nini.

“Lisumu ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá makambo mosusu mpo na ntembe oyo Satana abimisaki na elanga ya Edene.

“Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2014)

Talá makambo oyo moto moko ayekolaki mpo na bampasi oyo azalaki komona na esika oyo afandi.

Nazali lisusu ngai moko te (5:09)