Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Lisumu ezali nini?

Lisumu ezali nini?

Eyano ya Biblia

Lisumu ezali likambo nyonso, mayoki to makanisi oyo eyokani te na mibeko ya Nzambe. Esangisi mpe kosala likambo ya mabe oyo ebuki mibeko ya Nzambe, to oyo ezali sembo te na miso na ye. (1 Yoane 3:4; 5:17) Biblia emonisi mpe ete koboya kosala oyo ezali malamu ezali mpe lisumu.​—Yakobo 4:17.

Na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia maloba oyo basaleli mpo na kolobela lisumu elimboli “kolonga te kokokisa mokano moko.” Na ndakisa, etuluku moko ya basoda ya Yisraele bayebaki mpenza kobɛta lansi mpe ezalaki “kozwa kaka na esika oyo babɛti,” soki babongoli yango liloba ná liloba bakoki kotánga yango boye: “ekosala lisumu te.” (Basambisi 20:16) Na yango, kosala lisumu elakisi kolonga te kotosa mibeko ya Nzambe.

Nzambe azali na lotomo ya kotyela bato mibeko mpo akelá biloko nyonso. (Emoniseli 4:11) Tokozongisa monɔkɔ epai na ye mpo na makambo oyo tosalaka.​—Baroma 14:12.

Ekoki kosalema ete moto asala ata lisumu moko te?

Te. Biblia elobi ete “bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Baroma 3:23; 1 Bakonzi 8:46; Mosakoli 7:20; 1 Yoane 1:8) Mpo na nini ezali bongo?

Na ebandeli, Adama ná Eva bato ya liboso bazalaki na lisumu te. Ezali mpo bakelamaki bato ya kokoka, na elilingi ya Nzambe. (Ebandeli 1:27) Kasi, bazalaki lisusu bato ya kokoka te mpo batosaki Nzambe te. (Ebandeli 3:5, 6, 17-19) Ntango babotaki, batikelaki bana na bango lisumu mpe kozanga kokoka. (Baroma 5:12) Ndenge Davidi mokonzi ya Yisraele alobaki, “na libunga nabotamaki na kati ya mpasi.”​—Nzembo 51:5.

Masumu mosusu ezali mabe koleka mosusu?

Ɛɛ. Na ndakisa, Biblia elobi ete bato ya Sodoma bazalaki “mabe mpe bazalaki basumuki minene” mpe masumu na bango ezalaki “kilo mingi.” (Ebandeli 13:13; 18:20) Tótalela makambo misato oyo emonisaka soki lisumu ezali monene to kilo.

  1. Monene ya likambo. Biblia ekebisi biso na masumu minene lokola pite to ekobo, losambo ya bikeko, koyiba, molangwa, kobɔtɔla, koboma mpe misala ya bilimo mabe. (1 Bakorinti 6:9-11; Emoniseli 21:8) Biblia ekesenisi yango na masumu mosusu oyo tosalaka kozanga kokana, na ndakisa, koloba to kosala likambo oyo esali basusu mpasi na motema. (Masese 12:18; Baefese 4:31, 32) Kasi, Biblia elendisi biso ete tolobaka te ete masumu mosusu ezali mike, mpo ekoki kosala ete tóbuka mpenza mibeko ya Nzambe.​—Matai 5:27, 28.

  2. Makanisi. Bato basalaka masumu mosusu mpo bayebi mibeko ya Nzambe te. (Misala 17:30; 1 Timote 1:13) Atako Biblia endimi masumu ya ndenge wana te, kasi ekesenisi yango na masumu oyo moto abuki mibeko ya Nzambe na nko. (Mitángo 15:30, 31) Masumu ya nko eutaka na “motema mabe.”​—Yirimia 16:12.

  3. Mbala oyo yango esalemi. Biblia emonisi mpe bokeseni oyo ezali kati na lisumu moko mpe momeseno ya kosala masumu. (1 Yoane 3:4-8) Baoyo bazali “na momeseno ya kosala lisumu na nko,” ata nsima ya koyekola ndenge ya kosala oyo ezali malamu, Nzambe akosambisa bango.​—Baebre 10:26, 27.

Baoyo bazali komiyoka lokola bamemi ngambo mpo na masumu minene oyo basali bakoki komiyoka lokola bamemi kilo mpo na mabunga na bango. Na ndakisa, Mokonzi Davidi akomaki boye: “Mabunga na ngai eleki na motó na ngai; lokola mokumba moko ya kilo, yango eleki ngai na kilo.” (Nzembo 38:4) Kasi Biblia epesi elikya oyo: “Moto mabe atika nzela na ye, mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye; mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa, azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.”​—Yisaya 55:7.