Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka elambo ya Nkolo ndenge moko te na mangomba mosusu?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka elambo ya Nkolo ndenge moko te na mangomba mosusu?

Tolandaka mpenza Biblia ntango tosalaka elambo ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, oyo ebengamaka mpe “elambo ya Nkolo,” bilei ya nsuka mpe ekaniseli ya liwa ya Yesu. (1 Bakorinti 11:20) Kasi, mateya mpe makambo mingi oyo mangomba mosusu esalaka mpo na elambo yango euti na Biblia te.

Mokano

Mokano ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo ezalaka ya kokanisa Yesu, komonisa botɔndi mpo na mbeka oyo apesaki mpo na biso. (Matai 20:28; 1 Bakorinti 11:24) Molulu yango ezali sakramento te to molulu moko ya mangomba oyo esalaka ete Nzambe andima moto to alimbisama masumu na ye. * Biblia eteyaka ete masumu na biso ekoki kolimbisama kaka na nzela ya kondimela Yesu kasi te mpo na molulu moko ya lingomba.​—Baroma 3:25; 1 Yoane 2:1, 2.

Mbala boni?

Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye, kasi ayebisaki bango te mbala boni basengeli kosala yango. (Luka 22:19) Bamosusu bamonaka ete esengeli kosala yango sanza nyonso, bamosusu basalaka yango pɔsɔ nyonso, mikolo nyonso, mbala ebele na mokolo to ndenge moto ye moko asepeli. * Kasi, talá mwa makambo oyo esengeli kotalela.

Yesu abandisaki molulu ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo na dati oyo Bayuda bazalaki kosala fɛti ya Pasika mpe akufaki kaka mokolo wana. (Matai 26:1, 2) Ezalaki kaka mpamba te. Biblia ekokanisi liwa ya Yesu na oyo ya mwana-mpate oyo bazalaki koboma na Pasika. (1 Bakorinti 5:7, 8) Pasika ezalaki kosalema mbala moko na mbula. (Kobima 12:1-6; Balevi 23:5) Ndenge moko mpe, bakristo ya liboso bazalaki kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu mbala moko na mbula, * Batatoli ya Yehova mpe basalaka kaka bongo na kolanda Biblia.

Mokolo mpe ngonga

Ndenge oyo Yesu asalaki esalisi biso mpe tóyeba mokolo ná ngonga ya kosala Ekaniseli. Abandisaki molulu yango nsima ya kolala ya moi na mokolo ya 14 Nisana na mobu 33 ya ntango na biso, na kotalela kalandriye ya Bayuda ya ntango wana. (Matai 26:18-20, 26) Mbula nyonso, tosalaka Ekaniseli mokolo yango na kolanda ndenge bakristo ya liboso bazalaki kosala. *

Atako 14 Nisana ezalaki mokolo ya mitano, dati ya anivɛrsɛrɛ yango ekoki kokwea mpe mokolo mosusu na pɔsɔ. Tosalelaka mayele oyo bato ya ntango ya Yesu bazalaki kosalela mpo na koyeba soki dati ya 14 Nisana ekokwea mokolo nini na esika ya kosalela kalandriye ya lelo ya Bayuda. *

Limpa mpe vinyo

Ntango abandisaki molulu yango, Yesu asalelaki limpa ezangá levire mpe vinyo ya motane oyo etikalaki nsima ya fɛti ya Pasika. (Matai 26:26-28) Na kolanda ndakisa na ye, tosalelaka limpa ezangá levire to oyo babakisá eloko te na kati mpe vinyo ya motane mpenza kasi te mai ya mbuma ya vinyo oyo bauti kobuka sika, oyo batyá sukali mpe biloko mosusu na kati.

Mangomba mosusu esalelaka limpa batyá levire, kasi na Biblia, mbala mingi levire ezalaka elembo ya lisumu to kopɔla. (Luka 12:1; 1 Bakorinti 5:6-8; Bagalatia 5:7-9) Na yango, kaka limpa oyo ezangá levire mpe biloko mosusu oyo babakisaka na limpa nde ebongi kozala elembo ya nzoto ya Kristo oyo ezangá lisumu. (1 Petro 2:22) Likambo mosusu oyo Biblia endimi te ezali ya kosalela mai ya mbuma ya vinyo ya sika na esika ya vinyo mpenza. Mangomba mosusu esalelaka bongo mpo baboyaka komɛla masanga atako Biblia epekisi yango te.​—1 Timote 5:23.

Ezali limpa mpe makila ya solosolo te

Limpa ezangá levire mpe vinyo ya motane oyo basalelaka na Ekaniseli ezali nde elembo ya nzoto mpe makila ya Yesu. Ebongwanaki te na ndenge ya likamwisi, nzoto mpe makila mpenza ya Yesu ndenge bato mosusu bakanisaka. Tótalela bavɛrsɛ oyo endimisi likanisi yango.

  • Soki Yesu ayebisaki bayekoli na ye bámɛla makila na ye, elingaki kozala lokola ayebisi bango bábuka mobeko ya Nzambe oyo epekisi kolya makila. (Ebandeli 9:4; Misala 15:28, 29) Ekoki kozala bongo te mpo Yesu akokaki te kotinda basusu bábuka mobeko ya Nzambe oyo etali bosantu ya makila.​—Yoane 8:28, 29.

  • Soki bantoma bamɛlaki mpenza makila ya Yesu, alingaki koloba te ete makila na ye “ekosopama,” mpo na komonisa ete apesi naino mbeka yango te.​—Matai 26:28.

  • Yesu apesaki mbeka “mbala moko mpo na libela.” (Baebre 9:25, 26) Kasi, soki limpa ná vinyo ebongwanaki nzoto mpe makila na ye na elambo ya mpokwa ya Nkolo, boye, baoyo basanganaki na molulu yango basengelaki kolya nzoto mpe komɛla makila na ye mbala na mbala.

  • Yesu alobaki boye: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai,” kasi te “mpo na mbeka na ngai.”​—1 Bakorinti 11:24.

Baoyo bandimaka ete limpa ebongwanaka mpenza nzoto ya Yesu mpe vinyo makila na ye, bazwá makanisi yango na maloba ya bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Na ndakisa, Babiblia mingi ebongolá maloba ya Yesu boye: “Oyo ezali makila na ngai.” (Matai 26:28) Kasi, maloba ya Yesu ekoki mpe kobongolama na: “Oyo elakisi makila na ngai,” “oyo emonisi makila na ngai,” to “oyo elimboli makila na ngai.” * Yesu asalelaki nde maloba ya elilingi ndenge amesanaki kosala na mateya na ye.​—Matai 13:34, 35.

Banani balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo?

Ntango Batatoli ya Yehova basalaka molulu ya kokanisa liwa ya Yesu, kaka bato moke nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo. Mpo na nini bongo?

Yesu asalaki “kondimana ya sika” na makila oyo asopaki, yango ezwaki esika ya kondimana ya kala oyo Yehova Nzambe asalaki ná ekólo Yisraele. (Baebre 8:10-13) Baoyo bazali na kondimana ya sika balyaka mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli. Yango esangisi kaka “baoyo babengami” epai ya Nzambe na ndenge moko ya sipesiale, kasi bakristo nyonso te. (Baebre 9:15; Luka 22:20) Bato yango bakoyangela elongo na Kristo na likoló mpe Biblia elobi ete kaka bato 144 000 nde bazwi libaku yango.​—Luka 22:28-30; Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3.

Na kokesana na “etonga moke” ya baoyo babengami mpo na koyangela na Kristo, biso oyo totikali tozali na elikya ya kozala na kati ya “ebele mpenza ya bato” oyo bakozwa bomoi ya seko na mabele. (Luka 12:32; Emoniseli 7:9, 10) Atako biso baoyo tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele tolyaka limpa te mpe tomɛlaka vinyo te na Ekaniseli, toyanganaka mpo na komonisa botɔndi na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na biso.​—1 Yoane 2:2.

^ par. 4 Buku Cyclopedia, Volimi IX, lokasa 212 ya McClintock ná Strong; elobi boye: “Liloba sakramento ezali te na Testama ya Sika; ezala mpe liloba ya Grɛki μυστήριον [my·steʹri·on] esalelami te mpo na batisimo to elambo ya Nkolo to molulu mosusu nyonso.”

^ par. 6 Mpo na kolobela Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, mabongoli mosusu ya Biblia esaleli maloba “mbala nyonso oyo” mpo na komonisa mbala boni esengeli kosalaka molulu yango. Kasi, na monɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia maloba yango na vɛrsɛ wana ezali kopesa likanisi ya “mbala nyonso” to “ntango nyonso.”​—1 Bakorinti 11:25, 26.

^ par. 7 Talá buku (The New Schaff-Herzog Encyclopedia of Religious Knowledge), Volimi IV, nkasa 43-44, mpe buku (Cyclopedia), ya McClintock ná Strong, Volimi VIII, lokasa 836.

^ par. 9 Talá buku (The New Cambridge History of the Bible), Volimi 1, lokasa 841.

^ par. 10 Kalandriye ya lelo ya Bayuda esalelaka mayele ya astronomi ya kotala sanza mpo na koyeba soki Nisana ebandi, kasi na siɛklɛ ya liboso bazalaki kosalela mayele wana te. Kutu, sanza ya Nisana ezalaki kobanda soki bamoni liboso sanza ya sika ebimi na Yerusaleme, yango ekoki kozala mokolo moko to koleka nsima ya dati ya bato ya astronomi. Bokeseni yango nde ntina oyo dati oyo Batatoli ya Yehova basalaka Ekaniseli eyokanaka ntango nyonso te na dati oyo Bayuda ya lelo basalaka Pasika.

^ par. 20 Talá buku (A New Translation of the Bible), ya James Moffatt; buku (The New Testament​—A Translation in the Language of the People), ya Charles Williams mpe buku (The Original New Testament), ya Hugh Schonfield.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

‘Oyo ezali ekaniseli mpo na bino’

Bakristo basenglei koyeba nini na likambo etali Elekeli? Bilei ya mpokwa ya Nkolo elimboli nini mpo na biso nyonso?

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Ndenge nini mbeka ya Yesu ezali ‘lisiko mpo na bato mingi’?

Ndenge nini lisiko elongolaka bato na lisumu?