Yobo 21:1-34
21 Yobo ayanolaki ete:
2 “Bóyoka na likebi oyo nazali koloba;Tiká ezala libɔndisi mpo na ngai.
3 Bókanga motema ntango nazali koloba;Soki nasilisi koloba, wana bokoki kotyola ngai.+
4 Nazali nde koyebisa mitungisi na ngai epai ya moto?
Soki ezalaki bongo, nalingaki* te kozanga motema molai?
5 Bótala ngai mpe bótikala monɔkɔ polele na kokamwa;Bótya lobɔkɔ na monɔkɔ na bino.
6 Soki nakanisi yango, nazali kobulungana,Mpe nzoto na ngai mobimba ezali kolɛnga.
7 Mpo na nini bato mabe bazali kokoba kozala na bomoi,+Bakómaka mibange mpe bazwi?*+
8 Bana na bango bazalaka ntango nyonso pene na bango,Mpe bamonaka bana ya bana na bango.
9 Bandako na bango ebatelami, kobanga ezalaka kuna te,+Mpe lingenda ya Nzambe epesaka bango etumbu te.
10 Bangɔmbɛ na bango ya mibali ezangaka te kobotisa;Bangɔmbɛ na bango ya basi ebotaka mpe zemi na yango esopanaka te.
11 Bana na bango ya mibali bazali kokimakima libándá lokola etonga,Mpe bana na bango ya mike bazali kopumbwapumbwa epai na epai.
12 Bazali koyemba na mbonda moke mpe na nzɛnzɛMpe bazali kosepela na lokito ya piololo.+
13 Balekisaka mikolo na bango na esengo,Mpe bakitaka na kimya nyonso* na Nkunda.*
14 Kasi balobaka na Nzambe ya solo ete: ‘Tiká biso!
Tozali na mposa ya koyeba banzela na yo te.+
15 Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali nani, mpo biso tósalela ye,+
Eloko nini tokozwa soki toyebi ye?’+
16 Kasi nayebi ete bazali na bokonzi te na bozwi na bango moko.+
Makanisi* ya bato mabe ezali mosika na ngai.+
17 Mbala boni mwinda ya bato mabe ebomamaka?+
Mbala boni likama eyelaka bango?
Mbala boni Nzambe, na nkanda na ye, ayeiselaka bango libebi?
18 Bakómaka nde lokola matiti ya kokauka liboso ya mopɛpɛMpe lokola mposo ya blé oyo mopɛpɛ makasi ememaka?
19 Nzambe akobomba etumbu ya moto mabe mpo na bana na ye moko.
Kasi Nzambe afuta ye mpo ayeba yango.+
20 Miso na ye moko emona libebi na ye,Mpe ye nde amɛla nkanda ya kongala ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+
21 Oyo ekokómela ndako na ye nsima na ye etali ye na niniSoki bomoi na ye ekómi mokuse?*+
22 Moto akoki nde koteya Nzambe boyebi,*+Nzokande Ye nde asambisaka ata baoyo batombwami mpenza?+
23 Moto akokufa ntango azali naino makasi mpenza+Wana azali na motungisi ata moko te mpe azali na kimya,+
24 Wana bibɛlɔ* na ye etondi na mafutaMpe mikuwa na ye ezali makasi.*
25 Kasi moto mosusu akokufa na mawa makasi,*Kozanga ete ameka ata biloko ya malamu.
26 Bongo mibali bakolala na putulu,+Mpe nkusu ekozipa bango.+
27 Talá! Nayebi malamu makambo oyo bozali kokanisaMpe myango oyo bozali na yango ya kosala ngai mabe.+
28 Mpo bozali koloba boye: ‘Ndako ya moto ya lokumu ezali wapi,Mpe wapi hema oyo bato mabe bazalaki kofanda?’+
29 Botuni bato oyo basalaka mibembo te?
Boyekoli te bilembo na bango malamumalamu,
30 Ete moto mabe abatelamaka na mokolo ya likamaMpe abikisamaka na mokolo ya nkanda makasi?
31 Nani akoyebisa ye ete etamboli na ye ezali malamu te?Mpe nani akofutisa ye mpo na makambo oyo asali?
32 Ntango bakomema ye na malita,Bakokɛngɛla nkunda na ye.
33 Mabele oyo ekangamá ya lobwaku* ekokóma elɛngi epai na ye,+Mpe bato nyonso bakolanda ye*+Ndenge kaka bato oyo bazalaki liboso na ye bakoki kotángama te.
34 Bongo mpo na nini bolingi kopesa ngai libɔndisi ezanga ntina?+
Biyano na bino ezali kaka bokosi!”
Maloba na nse
^ Lil., “elimo na ngai elingaki.”
^ To, “bato ya nguya.”
^ To, “na mbala moko,” elingi koloba, liwa ya mbangumbangu kozanga konyokwama.
^ To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
^ To, “Toli.”
^ To, “ekatani na mibale.”
^ To, “koteya Nzambe eloko moko.”
^ Ebɛlo ezali eteni ya nzoto oyo ezali kati na libɔlɔngɔ mpe loketo.
^ Lil., “mafuta ya mikuwa na ye ekauki naino te.”
^ To, “na molimo ya bololo.”
^ To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
^ Lil., “Mpe akobenda bato nyonso nsima na ye.”

