Yobo 39:1-30

  • Moto ayebi te ndenge oyo banyama ekelamaki (1-30)

    • Bantaba ya ngomba mpe bishe (1-4)

    • Mpunda ya zamba (5-8)

    • Ngɔmbɛ-mobali ya zamba (9-12)

    • Maligbanga (13-18)

    • Mpunda (19-25)

    • Kombekombe ya matɔnɔmatɔnɔ mpe mpongo (26-30)

39  “Oyebi ntango oyo bantaba ya ngomba ebotaka?+ Omoná ntango nyama ebengami bishe ebotaka bana na yango?+  2  Otángaka basanza oyo yango esengeli kokokisa? Oyebi ntango oyo yango ebotaka?  3  Egumbamaka mpo na kobota bana na yango,Mpe mpasi na yango esilaka.  4  Bana na yango ekómaka makasi, mpe ekolaka na esobe;Ekendaka mpe ezongelaka yango te.  5  Nani apesaki mpunda ya zamba bonsomi,+Mpe nani afungolaki bansinga ya mpunda ya zamba?  6  Nasalá ete mokili patatalu oyo ekauká ezala ndako na yangoMpe mokili ya mungwa ezala esika na yango ya kofanda.  7  Etyolaka makɛlɛlɛ ya engumba;Eyokaka te koganga ya moto oyo azali kotambwisa banyama.  8  Etambolaka na bangomba mike mpo na koluka matiti ya kolyaElukaka lolenge nyonso ya matiti ya mobesu.  9  Ngɔmbɛ-mobali ya zamba ekolinga nde kosalela yo mosala?+ Ekolekisa nde butu na elyelo ya bibwɛlɛ na yo? 10  Okoki nde kokanga ngɔmbɛ-mobali ya zamba na bansinga mpo elanda nzela ya mikala na yo,To ekolanda yo mpo na kobalola mabele ya lobwaku? 11  Okotya nde motema na makasi mingi na yangoMpe okotika yango esalela yo mosala makasi? 12  Okotyela yango motema ete ememela yo mbuma oyo babuki na elanga,*Mpe ekoyanganisa yango na esika na yo ya kotutatuta mbuma? 13  Mapapu ya maligbanga* ebɛtabɛtaka na esengo,Kasi nsala ya mapapu mpe nsala ya nzoto na yango ekokani na oyo ya nkɔngi?+ 14  Mpo etikaka maki na yango na mabeleMpe eyokisaka yango mɔtɔ na kati ya putulu, 15  Ebosanaka ete lokolo ya moto ekoki kopanza yangoTo mpe ata nyama moko ya zamba ekoki konyata yango. 16  Esalelaka bana na yango makambo makasimakasi, lokola nde ezali bana na yango te;+Ebangaka te ete mosala makasi na yango ekoki kozala mpamba. 17  Mpo Nzambe apimelá yango* bwanya,Mpe apesá yango te likabo ya mayele. 18  Kasi ntango etɛlɛmaka mpe ebɛtaka mapapu na yango,Esɛkaka mpunda mpe motambwisi na yango. 19  Yo nde opesaka mpunda makasi?+ Olatisaka nkingo na yango nsuki milai oyo eninganaka? 20  Okoki nde kotinda yango epumbwapumbwa lokola liyoyo? Koganga* na yango ya kokamwisa epesaka nsɔmɔ.+ 21  Ebɛtabɛtaka makolo na mabele na lobwaku mpe epumbwapumbwaka na nguya;+Ebimaka mpo na kokende etumba.*+ 22  Esɛkaka nsɔmɔ mpe ebangaka eloko te.+ Ezongaka nsima te mpo na mopanga. 23  Libenga ya makula esalaka makɛlɛlɛ ntango etutanaka na yango,Likɔnga mpe likɔnga moke ebimisaka mintɛntɛi. 24  Na motema likoló mpenza epotaka mbangu,*Soki lokito ya liseke eyokani, ezelaka lisusu te.* 25  Ntango bayuli liseke, elobaka: Aha! Eyokaka nsolo ya etumba na mosika,Mpe eyokaka koganga ya bakomanda ná makɛlɛlɛ ya etumba.+ 26  Na mayele na yo nde kombekombe ya matɔnɔmatɔnɔ epumbwaka,Mpe esembolaka mapapu na yango na sudi? 27  To na etinda na yo nde mpongo epumbwaka likoló+Mpe etongaka zumbu* na yango na esika etombwaná mpenza likoló,+ 28  Elekisaka butu na ngomba ya libanga,Efandaka na esika na yango ya libateli na nsɔngɛ ya libanga?* 29  Uta kuna, elukaka bilei;+Miso na yango etalaka mosika mpenza. 30  Bana na yango bamɛlaka makila;Mpe esika bibembe ezali, yango mpe ezalaka wana.”+

Maloba na nse

Lil., “mboto.”
To, “otrishe.”
Lil., “asalá ete ebosana.”
Lil., “Konguluma ya zolo.”
Lil., “Ebimaka mpo na kokutana na bibundeli.”
Lil., “emɛlaka mabele.”
To mbala mosusu, “Endimaka te ete ezali lokito ya liseke.”
To, “zála.”
Lil., “na lino ya libanga.”