Yobo 36:1-33
-
Elihu akumisi bonene ya Nzambe oyo ekoki kososolama te (1-33)
36 Elihu akobaki koloba ete:
2 “Moniselá ngai motema molai mwa moke lisusu wana nazali koloba,Mpo nazali naino na maloba ya koloba mpo na Nzambe.
3 Nakoloba makambo nyonso oyo nayebi,Mpe nakopesa bosembo* epai ya Mokeli na ngai.+
4 Ya solo, maloba na ngai ezali ya lokuta te;Moto* oyo akoká na boyebi+ azali awa liboso na yo.
5 Ya solo, Nzambe azali na nguya+ mpe abwakaka moto te;Likoki na ye ya kososola ezali likoló mpenza.*
6 Akotika moto mabe ata moko te na bomoi,+Kasi akokata na bosembo likambo ya bato ya mpasi.+
7 Alongolaka miso na ye te epai ya bato ya sembo;+Atyaka bango lokola bakonzi,*+ mpe batombwamaka mpo na libela.
8 Kasi soki bato bakangisami na bikanga-makoloMpe bakangami na bansinga ya mpasi,
9 Nzambe alakisaka bango likambo ya mabe oyo basali,Amonisaka ete babuki mibeko mpo na lolendo na bango.
10 Afungolaka matoi na bango mpo básembolamaMpe ayebisaka bango bátika kosala mabe.+
11 Soki batosi mpe basaleli ye,Bakolekisa bomoi ya malamu mikolo na bango oyo etikali,Mpe bambula na bango ekozala ya esengo.+
12 Kasi soki batosi te, bakobomama na mopanga,*+Mpe bakokufa kozanga boyebi.
13 Bato oyo babangaka Nzambe te* bakobomba nkanda na motema.
Babelelaka te mpo na kosɛnga lisalisi ata ntango apesi bango etumbu.
14 Bakufaka* wana bazali naino bilenge,+Balekisaka* bomoi na bango elongo na mibali oyo bazali bandumba ya tempelo.+
15 Kasi Nzambe* abikisaka bato ya mpasi na mpasi na bango;Afungolaka litoi na bango ntango bazali konyokola bango.
16 Alongoli yo na mpasi+Amemi yo na esika ya libateli, epai monyoko ezali te,+Mpe mpo na libɔndisi, mesa na yo etondi na bilei oyo eleki kitoko.+
17 Nsima na yango, okosepela na lisambisi ya moto mabe,+Ntango bakokatela ye etumbu na bosembo nyonso.
18 Kasi kebá ete nkanda emema yo te na kosala mabe,*+Mpe kotika te ete kanyaka moko monene ebungisa yo nzela.
19 Koganga na yo mpo na kosɛnga lisalisiTo milende na yo ya makasi oyo ozali kosala ekolongola yo na mpasi?+
20 Koyoka mposa makasi te ete butu eya,Ntango bato bazali lisusu te na bisika na bango.
21 Kebá omipesa te na makambo ya mabe,Kopona te kosala mabe, kasi poná nde koyikela mpasi mpiko.+
22 Talá! Nzambe atombwami mpenza mpo na nguya na ye;Molakisi nani azali lokola ye?
23 Nani akoki kotambwisa* nzela na ye?+To nani alobá na ye: ‘Likambo oyo osali ezali mabe’?+
24 Kobosana te kokumisa misala na ye,+Oyo bato bayembelá.+
25 Bato nyonso bamoná yango,Moto, mowei mpamba, atali yango na mosika.
26 Ya solo, Nzambe atombwani koleka oyo biso tokoki koyeba;+Bambula na ye ekoki kotángama te.*+
27 Abendaka matangá ya mai;+Londende esanganaka mpe ekómaka mbula;
28 Bongo mapata esopaka yango na nse;+Ekitelaka bato lokola mbula makasi.
29 Nani akoki kokanga ntina ya maboke ya mapata,Ya bankake oyo euti na hema na ye?*+
30 Talá ndenge atandá mokalikali* na ye+ likoló na yangoMpe azipá mozindo* ya mbu.
31 Na nzela na yango abatelaka* bato ya bikólo na bomoi;Apesaka bango ebele ya bilei.+
32 Na mabɔkɔ na ye, azipaka mokalikali,Mpe atindaka yango esika oyo akani.+
33 Nkake na ye eyebisaka koya na ye,Ata bibwɛlɛ eyebisaka nani azali* koya.
Maloba na nse
^ To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
^ Elingi koloba, Nzambe.
^ To, “Atondi na nguya na ye ya motema.”
^ To mbala mosusu, “Atyaka bakonzi.”
^ To, “ebundeli ya kobwakela.”
^ To, “Bapɛngwi.”
^ To, “Milimo na bango ekufaka.”
^ To mbala mosusu, “Basilisaka.”
^ Lil., “Ye.”
^ To, “ebenda yo obɛta mabɔkɔ na lityo.”
^ To mbala mosusu, “alobelá ye mabe; asɛngá ye azongisa monɔkɔ.”
^ To, “eyabani te.”
^ To, “ndako na ye ya matiti.”
^ Lil., “pole.”
^ Lil., “misisa.”
^ To mbala mosusu, “asambaka makambo ya.”
^ To mbala mosusu, “nini ezali.”

