Ndenge ekomamá na Yoane 9:1-41

  • Yesu abikisi moto moko oyo abotamá miso ekufá (1-12)

  • Bafarisai batuni moto oyo abikisami mituna (13-34)

  • Bafarisai bazali bato oyo bakufá miso (35-41)

9  Ntango Yesu azalaki koleka, amonaki moto moko oyo akufá miso banda kobotama na ye.  Mpe bayekoli na ye batunaki ye: “Rabi,+ nani asalaki lisumu, moto oyo to baboti na ye, mpo abotama moto akufá miso?”  Yesu ayanolaki: “Moto oyo asalaki lisumu te, baboti na ye mpe te, kasi ezali mpo misala ya Nzambe emonana polele na likambo na ye.+  Tosengeli kosala misala ya Moto oyo atindaki ngai wana moi ezali naino;+ butu ezali koya mpe moto moko te akokoka kosala mosala.  Ntango nazali naino na mokili, nazali pole ya mokili.”+  Nsima ya koloba makambo wana, Yesu abwakaki nsoi na mabele, asalaki pɔtɔpɔtɔ ya mabele na nsoi yango, mpe apakolaki yango na miso ya moto yango+  mpe alobaki na ye: “Kende kosukola na mai ya Siloame”* (liloba oyo ebongolami “Motindami”). Bongo moto yango akendaki, asukolaki, mpe azongaki akómi komona.+  Na yango bato oyo bazalaki kofanda penepene mpe baoyo liboso bamonaki ye azali kosɛnga biloko babandaki koloba: “Oyo ezali moto oyo azalaki kofanda mpe kosɛngasɛnga, boye te?”  Bato mosusu bazalaki koloba: “Ezali ye.” Basusu bazalaki koloba: “Ye te, akokani nde na ye.” Moto yango azalaki se koloba: “Ezali ngai.” 10  Na yango batunaki ye: “Bongo ndenge nini miso na yo efungwami?” 11  Ayanolaki: “Moto oyo babengi Yesu asalaki pɔtɔpɔtɔ ya mabele mpe apakolaki ngai yango na miso, mpe alobaki na ngai: ‘Kende kosukola na Siloame.’+ Bongo nakendaki, nasukolaki mpe nakómaki komona.” 12  Na yango, balobaki na ye: “Wapi moto yango?” Ye alobaki: “Nayebi te.” 13  Bamemaki moto yango oyo azalaki liboso miso ekufá epai ya Bafarisai. 14  Nzokande mokolo oyo Yesu asalaki pɔtɔpɔtɔ wana ya mabele mpe afungolaki ye miso,+ ezalaki Sabata.+ 15  Na ntango yango, Bafarisai mpe babandaki kotuna moto yango ndenge nini akómaki komona. Alobaki na bango: “Atyaki ngai pɔtɔpɔtɔ ya mabele na miso, nasukolaki mpe nazali komona.” 16  Bongo Bafarisai mosusu babandaki koloba: “Moto oyo auti epai ya Nzambe te, mpo azali kotosa Sabata te.”+ Basusu balobaki: “Ndenge nini moto oyo azali mosumuki akoki kosala makamwisi ya boye?”+ Bongo bokabwani ekɔtaki na kati na bango.+ 17  Mpe balobaki lisusu na moto yango ete: “Lokola afungolaki nde miso na yo, olobi nini mpo na ye?” Moto yango alobaki: “Azali mosakoli.” 18  Nzokande, Bayuda bandimaki te ete ye azalaki liboso moto akufá miso mpe akómaki komona, tii babengaki baboti ya moto yango oyo akómaki komona. 19  Mpe batunaki bango: “Oyo nde mwana na bino, oyo bolobi ete abotamaki miso ekufá? Bongo ndenge nini azali komona sikoyo?” 20  Baboti na ye bazongisaki: “Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotamaki miso ekufá. 21  Kasi ndenge nini azali sikoyo komona, toyebi te, to nani afungoli ye miso, toyebi te. Bótuna ye. Azali mokóló. Ye moko aloba.” 22  Baboti na ye balobaki makambo wana mpo bazalaki kobanga Bayuda,+ mpamba te Bayuda basilaki koyokana ete, soki moto andimi ete Yesu azali Kristo, moto yango bakobengana ye na sinagoga.+ 23  Yango wana baboti na ye balobaki: “Azali mokóló. Bótuna ye.” 24  Bongo mpo na mbala ya mibale, babengaki moto yango oyo azalaki liboso moto akufá miso mpe balobaki na ye: “Pesá Nzambe nkembo; biso toyebi ete moto wana azali mosumuki.” 25  Bongo ayanolaki: “Soki azali mosumuki, ngai nayebi te. Likambo kaka moko oyo nayebi ezali ete, nazalaki moto akufá miso, kasi sikoyo nazali komona.” 26  Na yango balobaki na ye: “Asalaki yo nini? Ndenge nini afungolaki miso na yo?” 27  Ayanolaki bango: “Nasilaki koyebisa bino, kasi boyokaki te. Mpo na nini bolingi koyoka yango lisusu? Bino mpe bolingi nde kokóma bayekoli na ye?” 28  Na yango balobaki na ye na kotyola ete: “Yo moto ozali moyekoli ya moto wana, kasi biso tozali bayekoli ya Moize. 29  Biso toyebi ete Nzambe alobaki na Moize, kasi moto wana, toyebi te soki auti wapi.” 30  Moto yango azongiselaki bango: “Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge bino boyebi te soki auti wapi, nzokande afungolaki ngai miso. 31  Toyebi ete Nzambe ayokaka basumuki te,+ kasi soki moto abangaka Nzambe mpe asalaka mokano na ye, ye ayokaka moto yango.+ 32  Banda na ntango ya kala toyoká ata mokolo moko te ete moto moko afungolá miso ya moto oyo abotamá miso ekufá. 33  Soki moto wana autaki epai ya Nzambe te, akokaki kosala ata eloko moko te.”+ 34  Bazongiselaki ye: “Yo obotamá mobimba na kati ya lisumu, kasi ozali koteya biso?” Mpe babwakaki ye libándá!+ 35  Yesu ayokaki ete babwakaki moto wana libándá, mpe ntango amonaki ye, atunaki ye: “Ozali kondimela Mwana ya moto?” 36  Moto yango ayanolaki: “Tata, ye azali nani mpo nandimela ye?” 37  Yesu alobaki na ye: “Omoni ye. Kutu, ye nde moto oyo azali koloba na yo.” 38  Bongo alobaki: “Nandimeli ye, Nkolo.” Mpe agumbamelaki* ye. 39  Na yango Yesu alobaki: “Nayaki na mokili mpo na lisambisi oyo: ete baoyo bamonaka te bámona+ mpe baoyo bamonaka bákóma bato bakufá miso.”+ 40  Baoyo na kati ya Bafarisai oyo bazalaki elongo na ye bayokaki makambo wana, mpe balobaki na ye: “Biso mpe tozali bato bakufá miso te, boye te?” 41  Yesu alobaki na bango: “Soki bozalaki bato bakufá miso, bolingaki kozala na lisumu te. Kasi sikoyo bozali koloba ete: ‘Tomonaka.’ Lisumu na bino ezali kaka.”+

Maloba na nse

To, “pisini ya Siloame.”
To, “akumisaki.”