Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MITUNA YA BATÁNGI . . .

Nani asalá Nzambe?

Nani asalá Nzambe?

Tózwa ndakisa ya tata moko oyo azali kosolola na mwana na ye ya mobali ya mbula nsambo. Alobi na mwana boye: “Banda kala mpenza, Nzambe asalaki mabele mpe biloko nyonso oyo ezali na mabele, asalaki mpe moi, sanza mpe minzoto.” Mwana akanisi mwa moke na likambo yango mpe na nsima atuni boye: “Tata, nani asalá Nzambe?”

Tata ayanoli ye boye: “Moto moko te asalá Nzambe. Azalaka kaka.” Eyano yango esepelisi ye mpo azali naino mwana. Kasi ntango azali kokola, motuna wana ezali kaka kotungisa ye. Azali kondima te ete moto moko akoki kozanga ebandeli. Azali komituna boye: ‘Nzambe autá wapi?’ Mpo ata likoló mpe mabele ezali na ebandeli.

Biblia epesi eyano nini? Epesi eyano ndenge moko na oyo ya tata oyo tolobeli na ebandeli. Moize akomaki boye: “Ee Yehova, . . . liboso bangomba ebotama, to obanda kobimisa mokili mpe mabele oyo ebotaka, lokola na mpasi ya kobota, Ɛɛ, libela na libela yo ozali Nzambe.” (Nzembo 90:1, 2) Ndenge moko mpe, mosakoli Yisaya akamwaki boye: “Naino oyebi te to naino oyoká te? Yehova, Mozalisi ya mabele nsuka tii nsuka, azali Nzambe mpo na libela”! (Yisaya 40:28) Ndenge moko, mokanda ya Yuda emonisi ete Nzambe azali “seko na bileko nyonso oyo eleká.”​—Yuda 25.

Bavɛrsɛ yango emonisi biso ete Nzambe azali “Mokonzi ya seko,” ndenge ntoma Paulo amonisi. (1 Timote 1:17) Yango elimboli ete Nzambe azalaka kaka, ata soki toluki koyeba soki aumeli mbula boni, tokoyeba kaka te. Mpe akokoba kaka kozala. (Emoniseli 1:8) Boye, lokola azali seko na seko, yango ezali moko ya bizaleli minene ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.

Mpo na nini ezali mpasi tókanga ntina ya likanisi yango? Lokola bomoi na biso ezali mokuse, yango esalaka ete ndenge biso totalelaka ntango ekesana mpenza na ndenge Yehova atalelaka yango. Lokola Nzambe azali seko na seko, mpo na ye, mbula nkóto ezali lokola mokolo moko. (2 Petro 3:8) Tózwa ndakisa: Liyoyo to libanki oyo eumelaka na bomoi kaka mikolo 50 mpamba, ekoki mpenza koyeba bomoi na biso, oyo eumelaka mbula 70 to 80? Soki moke te! Biblia emonisi ete na miso ya Mozalisi na biso Monene, tozali lokola mayoyo to mabanki. Ata likoki na biso ya kokanisa ekopusana ata kopusana te na oyo ya Yehova. (Yisaya 40:22; 55:8, 9) Yango wana tokoki kokamwa te soki ezali mpasi bato báyeba mpenza makambo mosusu oyo etali bomoto ya Yehova.

Atako likanisi oyo ete Nzambe azali seko na seko ekoki kozala mpasi tókanga ntina na yango, likanisi yango ebongi mpenza. Soki moto moko nde asalá Nzambe, moto yango asengeli kozala Mozalisi. Kasi, ndenge Biblia emonisi yango, Yehova nde ‘azalisaki biloko nyonso.’ (Emoniseli 4:11) Lisusu, toyebi ete liboso, likoló mpe mabele ezalaki te. (Ebandeli 1:1, 2) Eutaki wapi? Esengelaki naino Mozalisi na yango azala. Azalaki mpe liboso ya ekelamu nyonso ya mayele, na ndakisa Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpe baanzelu. (Yobo 38:4, 7; Bakolose 1:15) Boye, emonani polele ete liboso azalaki ye moko. Akokaki kokelama te mpo eloko moko te ezalaki oyo ekokaki kosala ye.

Bomoi na biso mpe likoló ná mabele emonisaka ete Nzambe azali seko na seko. Ye oyo asalá ete likoló ná mabele ebalukaka, oyo atya mibeko oyo etambwisaka yango, asengeli kozala seko na seko. Mpe ye nde apesá eloko mosusu nyonso mpema ya bomoi.​—Yobo 33:4.