Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NZAMBE ATYELAKA YO LIKEBI?

Nzambe atyelaka yo likebi?

Nzambe atyelaka yo likebi?

“Ngai nazali moto ya mpasi mpe mobola.Yehova ye moko azali kotyela ngai likebi.” *DAVIDI MOKONZI YA YISRAELE, SIƐKLƐ YA 11 LIBOSO YA NTANGO NA BISO.

“Bikólo ezali lokola litangá ya mai na katini.”​—YISAYA 40:15

Ebongaki mpenza Davidi akanisa ete Nzambe akoki kotyela ye likebi? Nzambe atyelaka yo likebi? Mpo na nini bato mingi bandimaka te ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki kotyela bango likebi?

Mbala mosusu ezali mpo Nzambe akeseni mosika mpenza na bato. Na esika na ye ya lokumu kuna na likoló amonaka bikólo nyonso “lokola litangá ya mai na katini; mpe etalelami lokola mwa putulu moke likoló ya bimekeli-kilo.” (Yisaya 40:15) Kutu mokomi moko ya mikolo na biso oyo andimaka likambo yango te alobi ete “kokanisa ete ezali na Nzambe moko oyo atyaka mbala moko likebi na makambo oyo osalaka ezali bozoba mpenza.”

Na ngámbo mosusu, bato mosusu bamonaka ete ebongi te Nzambe atyela bango likebi mpo na makambo oyo basalaka. Na ndakisa mobali moko na nkombo Jim, alobi boye: “Nazalaki kobondela ntango nyonso mpo nazala na kimya mpe nayebaka komipekisa, kasi na nsima, nazalaki kaka kozongela ezaleli na ngai ya nkanda. Nsukansuka, namonaki ete nazali moto mabe mpe ete Nzambe akokaki te kosalisa ngai.”

Nzambe azali nde mosika na bato, yango wana mwaye atyela bango likebi ezali te? Ayokaka ndenge nini mpo na bikelamu na ye ya kozanga kokoka? Soki Nzambe ayebisi biso te ndenge azalaka, moto moko te akoki koloba na bosikisiki makambo etali Nzambe mpe koyanola na mituna yango. Kasi, Biblia, Liloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, emonisi biso ete azali mosika te na bato, mpe atyelaka bango likebi. “Kutu” Biblia elobi ete, “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Na masolo minei oyo elandi, tokotalela makambo oyo emonisi ete Nzambe atyelaka bato likebi mpe ndenge oyo atyelaki bato lokola yo likebi.

^ par. 3 Nzembo 40:17; Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.