ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NZAMBE ATYELAKA YO LIKEBI?
Nzambe ayebi yo malamu
“Ee Yehova, otalitali ngai, mpe oyebi ngai.”—NZEMBO 139:1.
“Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki.”—NZEMBO 139:16
MPO NA NINI BATO MOSUSU BATYAKA NTEMBE? Bato mingi bamonaka ete Nzambe atalelaka biso lokola kaka bato ya masumu, ya mbindo mpe ebongi te atyela biso likebi. Kendra, oyo abɛlaki maladi ya makanisi amonaki lokola amemi ngambo mpo akokaki te kosala mpenzampenza makambo oyo Nzambe asɛngaka. Alobi boye: mpo na yango nde “natikaki kobondela.”
OYO LILOBA YA NZAMBE ETEYAKA: Yehova asukaka kaka te na kotala mabunga na biso kasi ayebi mpenza bomoto na biso. Biblia elobi boye: “Ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.” Kutu, asalelaka biso makambo te “na kolanda masumu na biso,” kasi na motema mawa nyonso alimbisaka biso soki tobongoli motema.—Nzembo 103:10, 14.
Tózwa ndakisa ya Davidi, mokonzi ya Yisraele oyo tolobelaki na lisolo ya liboso. Ntango abondelaki Nzambe, Davidi alobaki boye: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo . . . Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai.” (Nzembo 139:16, 23) Davidi andimaki ete atako asalaki lisumu moko monene, Yehova akotala motema na ye mpe akomona ete abongoli mpenza motema.
Yehova ayebi yo malamu koleka moto mosusu nyonso. Biblia elobi boye: “Moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.” (1 Samwele 16:7) Nzambe ayebaka mpo na nini ozali na ezaleli boye to boye, makambo oyo ozwá epai ya bankɔkɔ na yo, ndenge oyo babɔkɔlá yo, esika ofandaka, mpe bomoto na yo, nyonso wana nde esali ozala ndenge ozali. Amonaka mpe azwaka na valɛrɛ milende oyo osalaka mpo obongwana, atako osalaka mabunga.
Kasi, ndenge nini Nzambe asalelaka likoki na ye ya ‘koyeba yo malamumalamu’ mpo na kobɔndisa yo?