Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

“Omonisi yango bana mike”

“Omonisi yango bana mike”

Okosepela koyeba solo na ntina na Nzambe; koyeba soki azali na nani, makambo nini alingaka mpe aboyaka? Yehova Nzambe amonisi makambo nyonso oyo etali ye na Biblia, Liloba na ye. Kasi moto nyonso te nde akoki kotánga Biblia mpe koyeba solo malamumalamu. Mpo na nini? Mpamba te koyeba solo ya Biblia ezali libaku oyo epesameli moto nyonso te. Tótala oyo Yesu alobaki mpo na likambo yango.​—Tángá Matai 11:25.

Vɛrsɛ yango ebandi na maloba oyo: “Na ntango yango Yesu azongisaki ete.” Boye, soki Yesu alobaki maloba wana, ekoki kozala mpo na likambo moko oyo eutaki kosalema. Autaki kopamela baoyo baboyaki kobongola motema na bingumba misato ya Galile epai asalaki misala ya nguya. (Matai 11:20-24) Okoki komituna boye: ‘Ndenge nini moto oyo amoni makamwisi ya Yesu akoki koboya kondima mateya na ye?’ Soki bato yango baboyaki kobongola motema, ezali mpo bazalaki mitema makasi.​—Matai 13:10-15.

Yesu ayebaki ete koyeba solo na ntina na Nzambe, esɛngaka makambo mibale: Lisalisi ya Nzambe mpe kozala na motema oyo ebongi. Yesu alobaki boye: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya ná bato ya mayele makambo oyo kasi omonisi yango bana mike.” Omoni ntina oyo tolobi ete koyeba solo ya Biblia ezali libaku moko malamu? Yehova “Nkolo ya likoló mpe ya mabele,” azali na lotomo ya kopona kobomba to komonisa solo na ye epai ya moto oyo ye alingi. Kasi moto nyonso akoki koyeba solo mpo Nzambe aponaka bilongi te. Atalelaka nini mpo na komonisa to kobombela bato mosusu solo ya Biblia?

Yehova asepelaka na bato ya komikitisa kasi bato ya lolendo te. (Yakobo 4:6) Abombelaka “bato ya bwanya ná bato ya mayele” solo mpamba te bato ya mayele ya mokili oyo mpe baoyo batángá bakelasi mingi bazalaka na lolendo mpe bamityelaka motema, yango wana bazalaka te na mposa ya lisalisi ya Nzambe. (1 Bakorinti 1:19-21) Kasi amonisaka solo epai ya “bana mike” elingi koloba baoyo bayaka epai na ye na motema sembo mpe bamikitisaka lokola bana mike. (Matai 18:1-4; 1 Bakorinti 1:26-28) Yesu, Mwana ya Nzambe ayebaki bato ya lolenge wana nyonso mibale. Bakonzi mingi ya mangomba oyo bazalaki na lolendo mpo batángaki bakelasi mingi, bakangaki ntina ya mateya ya Yesu te, kasi baluki-mbisi mpamba bakangaki ntina ya mateya yango. (Matai 4:18-22; 23:1-5; Misala 4:13) Atako bongo, bato mosusu ya bozwi mpe oyo batángaki bakelasi mingi bamonisaki komikitisa ya solosolo mpe bakómaki bayekoli ya Yesu.​—Luka 19:1, 2, 8; Misala 22:1-3.

Tózongela naino motuna oyo totunaki na ebandeli: Okosepela koyeba solo na ntina na Nzambe? Soki ɛɛ, Koyeba ete Nzambe asepelaka te na bato oyo bamimonaka bato ya mayele ya mokili oyo, ekoki kokitisa yo motema. Kutu, asepelaka nde na bato oyo bamonanaka mpamba na miso ya bato ya mayele ya mokili oyo. Soki oyekoli Liloba ya Nzambe na makanisi mpe na motema oyo ebongi, okoki kozala na kati ya baoyo Yehova apesaka likabo ya motuya mingi; elingi koloba koyeba solo na ntina na ye. Koyeba solo yango ekosala ete bomoi na yo ekóma na ntina sikoyo, mpe ekoki komemela yo “bomoi ya solosolo” to bomoi ezangi nsuka na mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe alaki, oyo etikali moke eya. *​—1 Timote 6:12, 19; 2 Petro 3:13.

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya yambo

Matai 1-21

^ par. 5 Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye. Bayekolaka Biblia na bato ofele na buku Biblia eteyaka mpenza nini?