Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mateya ya lingomba na yo eyokani na mateya ya Biblia?

Mateya ya lingomba na yo eyokani na mateya ya Biblia?

OMIBENGAKA mokristo? Soki ezali bongo, ozali na kati ya bato koleka miliare 2 oyo bamibengaka bayekoli ya Kristo; elingi koloba soki ozwi bato misato, moko na bango azali mokristo. Mangomba mingi lelo balobaka ete bazali bakristo, kasi mateya na bango ezali ndenge moko te mpe bato na bato batalelaka makambo na ndenge na bango. Boye, mateya oyo ondimaka ekoki kokesana na mateya ya bakristo mosusu. Ezali na ntina otalela mateya oyo ondimaka? Ɛɛ, mpo soki olingi ozala mokristo ya solosolo ndenge Biblia esɛngi, ezali na ntina otalela yango.

Bayekoli ya liboso ya Yesu Kristo bakómaki kobengama “bakristo.” (Misala 11:26) Mpo báyebana bongo bazalaki na mposa ya bankombo mosusu te, mpo lingomba ya bokristo ezalaki kaka moko. Bakristo nyonso bazalaki kolanda mateya mpe malako ya Yesu Kristo Mobandisi ya lingomba ya bokristo. Bongo lingomba na yo? Okanisaka ete eteyaka makambo oyo Kristo ateyaki mpe oyo bayekoli na ye ya liboso bazalaki kondima? Nini ekoki kondimisa yo? Ezali na likambo kaka moko ya kosala​—kosalela Biblia.

Tótalela likambo oyo: Yesu Kristo azalaki kotalela Makomami ete ezali Liloba ya Nzambe mpe azalaki na limemya makasi mpo na yango. Atɛmɛlaki baoyo bazalaki kotya bonkɔkɔ na bango na esika ya liboso mpe kozongisa mateya ya Biblia nsima. (Marko 7:9-13) Boye, tokoloba ete mateya ya bayekoli ya solosolo ya Yesu esengeli kouta na Biblia. Yango wana mokristo mokomoko asengeli komituna boye: ‘Mateya ya lingomba na ngai eyokani na oyo ya Biblia?’ Mpo opesa eyano na motuna yango esɛngi okokanisa mateya ya lingomba na yo na oyo Biblia eteyaka.

Yesu alobaki ete tosengeli kosambela Nzambe na solo; solo oyo ezali na Biblia. (Yoane 4:24; 17:17) Ntoma Paulo mpe alobaki ete mpo tóbika tosengeli kozwa “boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Yango wana ezali na ntina ete mateya na biso euta na Biblia. Mpo yango nde ekosala ete tóbika!

NDENGE YA KOKOKANISA MATEYA NA BISO NA OYO YA BIBLIA

Tosɛngi yo otánga mituna motoba oyo ezali na lisolo oyo mpe otala biyano oyo Biblia epesi na mituna yango. Talá bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali wana, mpe kanisá na mozindo na biyano yango. Na nsima omituna boye: ‘Mateya ya lingomba na ngai ekokani na oyo ya Biblia?’

Kosala bongo ekoki kosalisa yo oyeba soki mateya ya lingomba na yo ekokani na oyo ya Biblia. Okosepela kokokanisa mateya mosusu ya lingomba na yo na oyo Biblia eteyaka? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyeba polele solo ya Biblia. Mpo na nini te osɛnga moko na bango ayekola na yo Biblia ofele? To mpe okoki kokɔta na site Internet na biso, jw.org.