Yoká toli mpe ndimá mpamela

Yoká toli mpe ndimá mpamela

Mokapo ya zomi na mitano

Yoká toli mpe ndimá mpamela

1. (a) Mpo na nini biso nyonso tozalaka na mposa ya toli mpe mpamela? (b) Na motuna nini tosengeli kokanisa malamu?

 NA Yakobo 3:2, Biblia elobi ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” Tókanisa naino, mbala boni tokweaki na mabunga mpe tomitambwisaki te ndenge Liloba ya Nzambe esɛngaka biso. Yango wana, tondimi mpenza ete Biblia ezali na elonga ntango elobi ete: “Yoká toli mpe ndimá mpamela, mpo okóma na bwanya nsima.” (Masese 19:20NW) Ntembe ezali te ete tosali mbongwana mingi mpo bomoi na biso eyokana mpenza na mateya ya Biblia. Kasi tosalaka nini soki moninga moko moklisto apesi biso toli na likambo moko boye?

2. Tosengeli kosala nini ntango bapesi biso toli?

2 Bato mosusu balukaka komilongisa, bamonaka ete likambo oyo esalemi ezali mpenza monene te, to bapesaka foti epai ya bato mosusu. Kasi ezali malamu koyoka toli mpe kosalela yango. (Baebele 12:11) Ya solo, moto moko te akoki kokanisa ete basusu básalaka ntango nyonso makambo na ndenge ya kokoka, to apesaka basusu toli ntango nyonso na makambo ya mikemike to na makambo oyo Biblia etikeli moto na moto nzela ya kopona. Lisusu, ekoki kozala ete moto oyo azali kopesa toli ayebi makambo yango nyonso te ndenge ezali, mpe esengeli na limemya mpenza kobenda likebi na ye na makambo yango. Kasi na makambo oyo tolingi kolobela sikoyo, toli to mpamela oyo epesami ebongi mpo euti na Biblia. Na bongo, esengeli kotalela toli yango ndenge nini?

Bandakisa oyo esengeli kokebisa biso

3, 4. (a) Makambo nini ezali na kati ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tótalela toli mpe mpamela na ndenge oyo ebongi? (b) Ndenge nini Mokonzi Saulo atalelaki toli oyo bapesaki ye, mpe asukaki ndenge nini?

3 Liloba ya Nzambe ezali kolobela bato mosusu oyo bapesaki bango toli oyo esengelaki. Mbala mosusu, toli epesamaki elongo na etumbu. Moko na bato yango ezalaki Saulo, mokonzi ya Yisalaele. Atosaki Yehova te na likambo etali ekólo ya Amaleki. Baamaleki batungisaki basaleli ya Nzambe, mpe etumbu oyo Yehova akatelaki bato mabe yango ezalaki ete moto moko te kati na bango to nyama moko te kati na bitonga na bango atikala na bomoi. Kasi Mokonzi Saulo abomaki mokonzi na bango te mpe banyama na bango oyo elekaki kitoko.​—1 Samwele 15:1-11.

4 Yehova atindaki mosakoli Samwele mpo na kopamela Saulo. Saulo atalelaki mpamela yango ndenge nini? Alobaki ete alongaki Baamaleki, kasi azwaki ekateli ya kotika kaka mokonzi na bango na bomoi. Nzokande, yango eyokanaki te na etinda ya Yehova. (1 Samwele 15:20) Saulo alukaki kopesa foti epai ya bato mpo na banyama oyo atikaki na bomoi, alobaki ete: “Nabangaki bato mpe natosaki mongongo na bango.” (1 Samwele 15:24) Azalaki komibanzabanza mingi mpo na lokumu na ye, kutu asɛngaki Samwele ete akumisa ye liboso ya bato. (1 Samwele 15:30) Nsukansuka, Yehova abwakaki Saulo mpe alongolaki ye na bokonzi.​—1 Samwele 16:1.

5. Nini ekómelaki Mokonzi Uziya ntango aboyaki koyoka toli?

5 Uziya, mokonzi ya Yuda “amimonisaki sembo te epai na Yehova Nzambe na ye mpe akɔtaki na Tempelo ya Yehova mpo na kotumba mpaka na malasi.” (2 Ntango 26:16NW) Nzokande mobeko esɛngaki ete kaka banganga-nzambe nde basengeli kotumba mpaka na malasi. Ntango nganga-nzambe mokonzi amekaki kopekisa Mokonzi Uziya, mokonzi asilikaki. Likambo nini ekómelaki ye? Biblia elobi: “Akomaki na maba na elongi na ye . . . mpo ete Yehova abɛti ye. Mokonzi Uziya azalaki na maba kino mokolo ya liwa na ye.”​—2 Ntango 26:19-21NW.

6. (a) Mpo na nini Saulo na Uziya baboyaki koyoka toli? (b) Mpo na nini ezaleli ya koboya toli ezali mokakatano monene lelo oyo?

6 Mpo na nini Saulo na Uziya bandimaki toli te? Ezalaki mpenza mpo na lolendo, bazalaki komimona na lokumu mingi. Bato mingi bamipesaka mpasi mpo na ezaleli yango. Bakanisaka ete soki bandimi toli, yango ekokitisa bango to ekobebisa lokumu na bango. Nzokande, lolendo ezali bolɛmbu. Lolendo ebebisaka makanisi ya moto mpe etindaka ye aboya lisalisi oyo Yehova apesaka na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye. Yango wana, Yehova akebisi ete: “Lolendo ezalaka liboso ya kokweya, mpe liboso ya kobɛta libaku, elimo ya komitombola.”​—Masese 16:18NW; Baloma 12:3.

Tosengeli kondima toli

7. Liteya nini ya kolendisa tokoki kozwa na lolenge Moize atalelaki toli?

7 Makomami ezali mpe na bandakisa ya malamu ya bato oyo bandimaki toli, mpe tokoki kozwela yango liteya. Na ndakisa, bokilo ya Moize apesaki ye toli na lolenge asengelaki kosala mosala monene oyo azalaki na yango. Moize ayokelaki ye, mpe na mbala moko asalelaki toli yango. (Exode 18:13-24) Atako Moize azalaki mokonzi monene, mpo na nini andimaki toli? Mpamba te azalaki na komikitisa. “Mose azalaki na bopɔlɔ mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse.” (Mituya 12:3) Bopɔlɔ ezali na ntina nini? Sefania 2:3 ezali komonisa ete ekoki kopesa biso bomoi.

8. (a) Masumu nini Davidi asalaki? (b) Ndenge nini Davidi atalelaki mpamela ya Natana? (c) Masumu ya Davidi ebimiselaki ye mikakatano nini?

8 Mokonzi Davidi asalaki ekobo na Bata-seba mpe mpo na komeka kobomba lisumu yango, abomisaki kutu mobali na ye Ulia. Yehova atindaki mosakoli Natana mpo na kopamela Davidi. Davidi abongolaki motema mpe andimaki mbala moko ete: “Nasaleli [Yehova] lisumu.” (2 Samwele 12:13) Atako Nzambe andimaki Davidi ndenge abongolaki motema, kasi Davidi anyokwamaki mpo na mabe na ye. Yehova ayebisaki ye ete mopanga “ekolongwa na ndako na [ye] libela te,” basi na ye bakopesama epai ya “mozalani na [ye],” mpe mwana na ye oyo abotamaki na ekobo “akokufa solo.”​—2 Samwele 12:10, 11, 14.

9. Eloko nini tosengeli kobosana te soki bapesi biso toli to soki bapameli biso?

9 Mokonzi Davidi ayebaki ete koyoka toli ya malamu epesaka litomba. Mokolo moko, apesaki Nzambe matɔndi mpo na moto oyo Nzambe asalelaki mpo na kopesa ye toli. (1 Samwele 25:32-35) Tozali lokola ye? Soki ezali bongo, tokomibatela ete tóloba te mpe tósala te makambo oyo ekoki koyokisa biso mawa na nsima. Kasi tokosala nini soki tokutani na makambo oyo ezali kosɛnga ete bápesa biso toli to mpamela? Tóbosana te ete kozwa toli to mpamela ezali komonisa bolingo ya Yehova, mpe yango ezali mpo na bolamu na biso ya seko.​—Masese 3:11, 12; 4:13.

Bizaleli ya malamu oyo tosengeli kolona

10. Ezaleli nini Yesu amonisaki oyo ezali na ntina mingi mpo na baoyo balingi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe?

10 Mpo na kozala na boyokani malamu na Yehova mpe na bandeko na biso baklisto, tosengeli kolona bizaleli mosusu. Yesu alobelaki moko ya bizaleli yango ntango atɛlɛmisaki mwana moko ya moke na kati ya bayekoli na ye mpe alobaki: “Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta soki moke te na bokonzi ya likoló. Na yango, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo ya moke nde aleki bamosusu nyonso na kati ya bokonzi ya likoló.” (Matai 18:3, 4) Bayekoli ya Yesu basengelaki kolona ezaleli ya komikitisa, mpamba te bawelanaki kati na bango mpo na koyeba nani aleki.​—Luka 22:24-27.

11. (a) Liboso ya nani tosengeli komikitisa, mpe mpo na nini? (b) Soki tozali na ezaleli ya komikitisa, ndenge nini tokotalela toli?

11 Ntoma Petelo akomaki ete: “Bino nyonso bólata elimo ya komikitisa na kati na bino, mpamba te Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene na ye epai ya bato ya komikitisa.” (1 Petelo 5:5) Toyebi ete tosengeli komikitisa liboso ya Nzambe, kasi vɛrsɛ yango ezali komonisa ete tosengeli mpe komikitisa liboso ya baninga na biso bandimi. Soki tozali na komikitisa, tokoboya te makanisi oyo baninga na biso bandimi bazali kopesa biso kasi nde tokoyekola makambo mosusu epai na bango.​—Masese 12:15.

12. (a) Wapi ezaleli ya ntina oyo ezali mpenza na boyokani na komikitisa? (b) Mpo na nini tosengeli komibanzabanza mpo na lolenge etamboli na biso esengeli kosala bato mosusu?

12 Komibanzabanza mpo na bolamu ya basusu ezali mpe ezaleli oyo ezali na boyokani na komikitisa. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu. . . . Na yango, ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe. Bókeba ete bókóma te bantina ya kobɛtisa libaku epai ya Bayuda mpe Bagrɛki mpe epai ya lisangá ya Nzambe.” (1 Bakolinti 10:24-33) Paulo alobi te ete tóboya makambo nyonso oyo moto ye moko asepelaka na yango, kasi asɛngi biso nde tósala eloko moko te oyo ekoki kobɛtisa moto mosusu libaku mpo asala oyo lisosoli na ye ezali koyebisa ye ete ezali mabe.

13. Ndakisa nini ekoki komonisa soki tozali kosalela mpenza toli ya Makomami?

13 Ondimaka ete bolamu ya bato mosusu ezala liboso ya oyo ya yo? Biso nyonso tosengeli koyekola kosalaka bongo. Tokoki kosala yango na ndenge ebele. Tókamata na ndakisa, elateli na biso mpe ndenge tosalaka monzɛlɛ. Yango ezali makambo oyo esɛngaka moto ye moko atalela yango soki abosani te toli ya Makomami ya kozala na bokatikati, kolongobana mpe kozala pɛto. Kasi soki oyei koyeba ete mpo na mimeseno ya bato na esika ofandaka, elateli na yo mpe lolenge na yo ya kosala monzɛlɛ ezali kopekisa bato mosusu báyoka nsango ya Bokonzi, okoki kosala mwa mbongwana? Ya solo, kosalisa moto mosusu azwa bomoi ya seko ezali na ntina mingi koleka komisepelisa yo moko.

14. Mpo na nini ezali na ntina kokolisa ezaleli ya komikitisa mpe komibanzabanza mpo na basusu?

14 Yesu apesaki ndakisa na likambo etali komikitisa mpe komibanzabanza mpo na basusu, kutu asukolaki bayekoli na ye makolo mpo na komonisa ezaleli yango. (Yoane 13:12-15) Liloba ya Nzambe elobi mpo na ye ete: “Bóbatela na kati na bino ezaleli oyo ya makanisi oyo ezalaki mpe na kati ya Klisto Yesu, oyo, atako azalaki na ndenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla esika, elingi koloba, ete akokana na Nzambe. Te, kasi amikómisaki mpamba akamataki motindo ya moombo mpe ayaki kokóma motindo moko na bato. Longola oyo wana, ntango akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa, ɛɛ, liwa likoló ya nzete ya mpasi.”​—Bafilipi 2:5-8; Baloma 15:2, 3.

Koboya mpamela ya Yehova te

15. (a) Mbongwana nini tosengeli kosala mpo na kozala na bomoto oyo ekosepelisa Nzambe? (b) Na nzela nini Yehova apesaka biso nyonso toli mpe mpamela?

15 Lokola biso nyonso tozali bato ya masumu, tosengeli kosala mbongwana na bizaleli na biso mpe na etamboli na biso soki tolingi komonisa bomoto ya Nzambe na biso. Tosengeli kolata “bomoto ya sika.” (Bakolose 3:5-14) Toli mpe mpamela esalisaka biso mpo tóyeba na makambo nini tosengeli kosala mbongwana mpe na nsima komona ndenge tosengeli kosala yango. Biblia ezali liziba ya mateya oyo tosengeli na yango. (2 Timote 3:16, 17) Mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe makita oyo ebongiseli ya Yehova ebongisi, esalisaka biso tósalela Liloba ya Nzambe. Ata soki toyokaki toli yango liboso, tokomona esika mposa na biso ezali mpe tokoluka kobongisa?

16. Lisalisi nini Yehova apesaka mokomoko na biso?

16 Na bolingo mpenza Yehova amibanzabanzaka mpo na biso mpe asalisaka biso na mikakatano na biso. Bamilio ya bato bazwaki lisalisi na nzela ya boyekoli ya Biblia. Baboti bapesaka bana na bango toli mpe mpamela mpo na kobatela bango na bizaleli oyo ekoki kopesa mpasi. (Masese 6:20-23) Na kati ya lisangá, mbala mingi bandeko mosusu basɛngaka toli mpe makanisi epai na basaleli ya Nzambe oyo bayebi makambo mingi mpo ete bákóma na milende na mosala ya kosakola. Na bantango mosusu, bankulutu bakoki kosɛnga toli epai ya baninga na bango bankulutu to epai ya bandeko mosusu oyo bameseni na mosala ya kosakola. Baoyo bazali na makoki mingi na makambo ya elimo basalelaka Biblia mpo na kosalisa baoyo bazali na mposa ya toli, mpe basalaka yango na elimo ya komikitisa. Soki ozali kopesa toli, kobosana te ete osengeli kosala yango wana “yo moko mpe ozali komitala, noki te yo moko mpe omekama.” (Bagalatia 6:1, 2) Ɛɛ, biso nyonso tozali na mposa ya toli mpe mpamela mpo na kosambela Nzambe kaka moko ya solo na kati ya bomoko.

Bozongeli

• Ndenge nini Yehova asalisaka biso na bolingo mpenza mpo tómona na makambo nini tosengeli moto na moto kosala mbongwana?

• Mpo na nini bato mingi bazalaka na mokakatano ya kondima toli oyo esengeli, mpe yango ekoki kobimisa likama nini?

• Bizaleli nini ya ntina ekosalisa biso tózala bato oyo bandimaka toli, mpe ndenge nini Yesu apesaki ndakisa na likambo yango?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 142]

Uziya aboyaki toli yango wana abɛlaki maladi ya maba

[Elilingi na lokasa 142]

Moize azwaki matomba ndenge andimaki toli ya Yetelo