Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini mibeko ebeleebele boye?

Mpo na nini mibeko ebeleebele boye?

Mokapo 22

Mpo na nini mibeko ebeleebele boye?

Tángá mwa mibeko oyo batyá na libota na bino. ․․․․․

Okanisi ete mibeko ya libota ezalaka ntango nyonso malamu?

□ Ɛɛ □ Te

Mobeko nini omonaka ete eleki mpasi kotosa? ․․․․․

MIBEKO YA NDAKO, ndenge ebengamaka mbala mosusu, ezali makambo oyo baboti na yo balobi osala to osala te. Mibeko yango ekoki kozala kosala badevuare ya kelasi, misala ya ndako mpe ngonga ya kozonga na ndako na butu, ata mpe ndenge ya kosalela telefone, televizyo, mpe ordinatɛrɛ. Mbala mosusu mibeko mosusu ekosuka kaka na ndako na bino te; ekoki kotalela ezaleli oyo osengeli kozala na yango na kelasi mpe baninga oyo ozali kopona.

Oyokaka ete mibeko yango etyaka yo nkaka? Mbala mosusu oyokaka lokola bilenge mosusu oyo:

“Ngonga ya kozonga na ndako na butu oyo batyelaki ngai ezalaki kopesa ngai nkanda! Ezalaki kosala ngai mabe komona ete baninga bazalaki na ndingisa ya kozonga ndako na butu makasi, kasi ngai te.”​Allen.

“Esalaka mpenza mpasi soki bazali koluka koyeba moto nyonso oyo obengaki na telefone to otindelaki mesaje. Namonaka ete bazwaka ngai lokola mwana moke!”​Elizabeth.

“Nazalaki koyoka nɛti baboti na ngai bazalaki koluka kobebisa bomoi na ngai, lokola nde balingi nazala na baninga te!”​Nicole.

Atako bilenge mosusu babukaka mibeko ya baboti na bango, mingi na bango bandimaka ete mpo libota etambola na molɔngɔ esengeli mibeko ezala. Kasi soki mibeko ya ndako ezali na ntina, mpo na nini mibeko mosusu etungisaka?

“Nazali mwana moke lisusu te!”

Mbala mosusu kotya mibeko ezali kosepelisa yo te mpo ozali komona ete bazali kotalela yo lokola mwana moke. Okoki komilela boye: “Nazali mwana moke lisusu te!” Kasi, ntango mosusu baboti na yo bazali komona ete mibeko oyo bazali kotyela yo, ezali na ntina mpo na kobatela yo mpe kobongisa yo mpo okokisa malamu mikumba na yo ntango okokola.

Nzokande, ekoki kozala ete lokola mikolo ezali koleka, mbula na yo epusani, kasi mibeko ya ndako na bino etikali kaka ndenge ezalaki ntango ozalaki mwana moke, mpe na ndenge yango eyokani te na mbula na yo. Okoki koyoka ete ozali na nkaka, ndenge mwana mwasi moko na nkombo Brielle ayokaki, mpe alobaki mpo na baboti na ye boye: “Babosani mpenza ndenge moto oyo akómi na mbula na ngai ayokaka. Balingi te napesa likanisi, nazwa ekateli, to nakóma mokóló. Elenge mwasi moko na nkombo Allison ayokaka mpe ndenge wana. Alobi boye: “Baboti na ngai bamonaka lokola naza mwana ya mbula 10, kasi babosanaka ke naza na mbula 18. Basengeli kotyela ngai motema mingi koleka!”

Ekoki kozala mpasi kotosa mibeko ya ndako mingimingi soki ozali komona lokola mibeko oyo bapesá bandeko na yo ezali makasi mingi te. Na ndakisa, soki akanisi ntango azalaki na mbula zomi na ndambo, elenge mobali moko na nkombo Matthieu alobi mpo na bandeko na ye ya basi boye: “Bazalaki kopesa bana basi etumbu te, ata soki basali mabe!”

Makambo elingaki kozala ndenge nini soki mibeko ezalaka te?

Ezali likambo ya kokamwa te soki mbala mosusu ozali koyoka mposa makasi ya kolongwa na nse ya bokonzi ya baboti na yo. Okozala mpenza malamu soki ozali na nse ya mibeko ya baboti te? Mbala mosusu oyebi bilenge ya mbula na yo oyo bazongaka ndako tii ntango oyo balingi, bakoki kolata nyonso oyo balingi, mpe bakoki kobima ná baninga na bango bisika nyonso oyo balingi. Mbala mosusu baboti na bango bazali na ntango te ya komona makambo oyo bana na bango bazali kosala. Ezala ndenge nini, Biblia emonisi ete kobɔkɔla bana ndenge wana ekolonga te. (Masese 29:15) Kozanga bolingo oyo tozali komona na mokili euti nde na bato oyo balukaka kaka matomba na bango moko, mingi na bango bakolá na bandako oyo ezangá mibeko.​—2 Timote 3:1-5.

Na esika ya kolula bilenge oyo batiká bango básalaka oyo balingi, talelá mibeko ya baboti na yo lokola ete balingaka yo mpe bamibanzabanzaka mpo na yo. Bapekisi makambo mosusu mpo bazali komekola Yehova oyo ayebisaki bato na ye ete: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende. Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.”​—Nzembo 32:8.

Kasi, na ntango mosusu okoki koyoka ete mibeko ya baboti na yo elekeli yo. Okosala ndenge nini mpo bálɛmbisa yango mwa moke?

Yebá kosolola

Ezala olingi kozwa mwa bonsomi to kolɛmbisa mibeko oyo baboti na yo batyeli yo, lolenge malamu ya kosala, ezali ya koyeba kosolola. Bamosusu bakoloba mbala mosusu ete: ‘Nameká kosolola na baboti na ngai, mpe esalaka eloko moko te!’ Soki yo mpe oyokaka ndenge wana, omituna boye: ‘Nakoki nde kobongisa ndenge na ngai ya kosolola?’ Kosolola ezali eloko moko ya ntina mingi mpo ekoki (1) kosalisa basusu báyeba makanisi na yo to (2) kosalisa yo oyeba mpo na nini baboyeli yo makambo oyo ozali kosɛnga. Ya solo, soki olingi básalela yo makambo lokola mokóló, osengeli koyeba ndenge ya kosolola lokola mokóló. Ndenge nini okoki kosala yango?

Yebá kokanga motema. Kosolola malamu esɛngaka koyeba komipekisa. Biblia elobi boye: “Zoba abimisaka elimo na ye nyonso, kasi ye oyo azali na bwanya abatelaka yango ezala kimya tii na nsuka.” (Masese 29:11) Yango wana, tiká kolelalela, kovimbana mpe kosala bipale ya bomwana. Ya solo, okoki ntango mosusu kotutatuta baporte makasi to kobalukabaluka na ndako ntango baboti bapekisi yo likambo moko. Kasi, kosala ndenge wana ekoki kotinda bango bátyela yo mibeko mosusu​—na esika bápesa yo bonsomi mingi.

Meká komitya na esika ya baboti na yo. Tracy, elenge mokristo moko oyo abɔkɔlamá kaka na mama na ye, alobi boye: “Namitunaka soki mama alingaka koteya ngai nini na mibeko atyaka?” Tracy asukisi boye: “Azali koluka kosalisa ngai nakóma moto malamu.” (Masese 3:1, 2) Komitya na esika ya baboti ndenge wana ekosalisa yo bósololaka malamu.

Na ndakisa, kanisá ete baboti na yo bazali kolinga te kopesa yo nzela ya kokende esika moko boye. Na esika ya kobendana ná bango, okoki kotuna boye: “Bokanisi boni soki moninga moko ya mokóló, oyo bato batyelaka motema akei na ngai?” Mbala mosusu baboti na yo bakoboya kaka. Kasi soki oyebi makambo oyo ezali kotungisa bango, okoki kopesa likanisi mosusu oyo bakondima.

Luká baboti na yo bátyela yo motema. Kanisá ete moto moko azali na nyongo ya banki moko. Soki afutaka nyongo na ye mbala na mbala, banki ekotyela ye motema mpe ekoki kutu kodefisa ye bambongo mosusu. Ezali mpe bongo na ndako. Yo ozali na nyongo ya kotosa baboti. Soki okómi moto oyo bakoki kotyela motema​—ata na makambo mikemike—​mbala mosusu baboti na yo bakobanda kotyela yo motema na makambo mingi koleka. Kasi, soki ozali kaka kobuka mibeko ya baboti na yo, bakobanda kotyela yo motema mingi te to kutu bakotika mpenza kotyela yo motema.

Soki obuki mobeko

Mokolo mosusu, okoki kobuka mobeko moko​—kozanga kosala misala ya ndako, kosolola ntango molai na telefone, to kozonga ndako na retare. (Nzembo 130:3) Na ntango wana ekosɛnga oyebisa baboti na yo mpo na nini obuki mibeko na bango! Okosala ndenge nini mpo likambo yango ya mabe ekóma mabe koleka te?

Lobá solo. Kokosakosa te. Soki okosi, ekobebisa nde makambo, baboti na yo bakotyela yo motema lisusu te. Zalá sembo mpe lobá makambo nyonso ndenge ezali. (Masese 28:13) Tiká komilongisa to kozwa likambo oyo osali na lisɛki. Kobosana te ete “eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ.”​—Masese 15:1.

Sɛngá bolimbisi. Komonisa ete oyoki mawa ndenge otungisi baboti na yo, olɛmbisi bango nzoto, to obakiseli bango mosala, ezali malamu mpe ekoki kotinda bango bálɛmbisa etumbu. Kasi, mawa na yo esengeli kouta na motema.

Ndimá mpasi oyo ekoyela yo. (Bagalatia 6:7) Na ebandeli okoki koluka koboya etumbu, mingimingi soki omoni ete ebongi te. Nzokande, kondima komona mpasi mpo na misala na yo, ekomonisa ete okoli. Likambo ya malamu oyo okoki kosala ezali nde ya kosala makasi mpo baboti na yo bázongisa konfianse oyo bazalaki na yango epai na yo.

Na makambo misato oyo touti kolobela, koma moko oyo omoni ete osengeli mpenza kobongisa. ․․․․․

Kobosana te, baboti na yo bazali na mokumba ya kokɛngɛla makambo oyo ozali kosala. Yango wana, Biblia elobeli “mitindo ya tata na yo” mpe “mobeko ya mama na yo.” (Masese 6:20) Atako bongo, osengeli komona te ete mibeko ya ndako ekobebisa bomoi na yo. Kutu, soki otosi bokonzi ya baboti na yo, Yehova alaki ete, na nsima ‘makambo na yo ekotambola malamu’!​—Baefese 6:1-3.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 3, NA VOLIMI 1

NA MOKAPO OYO ELANDI

Ozali na moboti oyo azali moombo ya bangi to masanga? Talá ndenge okoki kosala.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Kumisá tata na yo mpe mama na yo . . . mpo makambo na yo etambola malamu.”​—Baefese 6:2, 3.

TOLI

Soki olingi baboti na yo bápesa yo bonsomi mingi, liboso tosáká mibeko nyonso oyo batyeli yo. Soki bamoni ete ozali kotosa, na ntembe te bakosepela kopesa yo makambo oyo ozali kosɛnga.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Bato ya mayele bamonisi ete mbala mingi, bilenge oyo baboti na bango batyelaka bango mibeko na bolingo bazalaka mayele mingi na kelasi, bayokanaka malamu na basusu, mpe bazalaka na esengo.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nabuki mobeko moko ya ndako, nakoloba ․․․․․

Mpo baboti na ngai batyela ngai motema, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ekoki komonana ntango mosusu lokola baboti na yo bazali kolekisa ndelo mpo na kobatela yo?

● Mpo na nini ntango mosusu osilikaka soki batyeli yo mibeko?

● Ndenge nini okoki kobongisa lolenge ya kosolola ná baboti na yo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 183]

“Ntango ozali elenge, makanisi ekoki kozala ete oyebi makambo nyonso. Yango wana, soki baboti na yo bapekisi yo likambo, okoki kosilika noki. Kasi, mibeko na bango ezali mpenza mpo na bolamu na yo.”​—Megan

[Etanda na lokasa 186]

Ezali mpenza kopona bilongi?

Osilá komituna boye: ‘Mpo na nini baboti bakoki kosalela bana nyonso makambo ndenge moko te?’ Soki ezali bongo, yebá likambo oyo: Ekozala ntango nyonso malamu te ete baboti na yo basalelaka yo ná bandeko na yo makambo ndenge moko. Motuna yango oyo: bakipaka mpenza te bamposa na yo? Na ndakisa, soki ozali na mposa baboti na yo bápesa yo toli to básalisa yo, basalaka yango? Soki basalaka yango, okoki mpenza koloba ete basalelaka yo makambo na bosembo te? Lokola yo ná bandeko na bozali na bamposa ndenge moko te, baboti na bino bakoki te kosalela bino ntango nyonso makambo ndenge moko. Yango nde likambo Beth ayaki koyeba na nsima. Lelo azali na mbula 18; alobi boye: “Ngai ná ndeko na ngai ya mobali tozali bato mibale bakeseni mpe esengeli básalela biso makambo ndenge moko te. Soki nazongisi makanisi na nsima, nandimaka te ete nakokaki koyeba likambo yango te ntango nazalaki mwana moke.”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 189]

Etanda ya mituna

Sololá na baboti na yo!

Mikapo mibale oyo eleki elobeli ndenge okoki kosala soki baboti na yo bapameli yo mpe mpo na mibeko ya ndako. Okosala nini soki omoni ete baboti na yo balekisi ndelo na likambo moko to makambo yango nyonso mibale? Ndenge nini okoki kobanda kosolola na bango likambo yango?

Poná ntango oyo makanisi na yo ezali kimya mpe baboti na yo bazali na misala mingi te.

Lobá makambo oyo euti na motema, kasi yebá komipekisa. Sololá na baboti na yo na limemya nyonso.

Soki omoni ete baboti na yo bapamelaka yo mingi, okoki koloba boye: “Nazali kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu, kasi ezali mpasi ntango nazali komona ete bapamelaka ngai ntango nyonso. Tokoki kolobela likambo yango?”

Komá awa na nse ndenge oyo okobanda lisolo yango na baboti na yo.

․․․․․

TOLI: Salelá makanisi oyo ezali na mokapo 21 mpo na kobanda lisolo. Mbala mosusu baboti na yo bakondima kotalela makambo oyo ezali na mokapo yango ná yo.

Soki omoni ete baboti na yo bapesaka yo bonsomi mingi te, okoki koloba boye: “Nazali na mposa ya kosala makambo mingi oyo ekomonisa ete nazali mokóló, mpo bópesa ngai bonsomi mingi. Bokanisi ete nasengeli kosala makasi na likambo nini?”

Komá awa na nse ndenge oyo okoki kobanda lisolo yango na baboti na yo.

TOLI: Zongelá mokapo 3 na volimi 1. Elobi “Ndenge nini nakoki kosala mpo baboti na ngai bápesa ngai bonsomi mingi?” Na nsima, komá mituna nyonso oyo ekoki koyela yo na makambo oyo okotánga.

[Elilingi na lokasa 184, 185]

Kotosa mibeko ya baboti na yo ezali lokola kofuta nyongo na banki​—soki ofutaka malamu, bakobanda kotyela yo motema (to kopesa yo nyongo mosusu)