Mokanda ya mibale ya 2:1-25

  • Eliya amemami na kati ya mopɛpɛ makasi (1-18)

    • Elisha azwi elamba ya Eliya (13, 14)

  • Elisha akómisi mai ya Yeriko pɛto (19-22)

  • Baurse ebomi bilenge mibali na Betele (23-25)

2  Ntango Yehova alingaki komatisa Eliya+ na likoló* na mopɛpɛ makasi,+ Eliya ná Elisha+ balongwaki na Gilgale.+ 2  Eliya alobaki na Elisha boye: “Nabondeli yo, tikalá awa, mpo Yehova atindi ngai na Betele.” Kasi Elisha alobaki na ye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola yo ozali* solo na bomoi, nakotika yo te.” Bongo bakendaki na Betele.+ 3  Na nsima, bana ya basakoli* oyo bazalaki kofanda na Betele bayaki epai ya Elisha mpe balobaki na ye: “Oyebi ete Yehova akozwa nkolo na yo lelo, mpe akozala lisusu mokonzi na yo te?”+ Elisha ayanolaki: “Ɛɛ, nayebi yango malamu. Bófanda nyɛɛ.” 4  Na nsima Eliya alobaki na ye: “Elisha, nabondeli yo, tikalá awa, mpo Yehova atindi ngai na Yeriko.”+ Kasi Elisha alobaki na ye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola ozali* solo na bomoi, nakotika yo te.” Bongo bakendaki na Yeriko. 5  Nsima na yango, bana ya basakoli oyo bazalaki na Yeriko bayaki epai ya Elisha mpe balobaki na ye: “Oyebi ete Yehova akozwa nkolo na yo lelo, mpe akozala lisusu mokonzi na yo te?” Bongo Elisha ayanolaki: “Ɛɛ, nayebi yango malamu. Bófanda nyɛɛ.” 6  Na nsima Eliya alobaki na ye: “Nabondeli yo, tikalá awa, mpo Yehova atindi ngai na Yordani.” Kasi Elisha alobaki na ye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola ozali* solo na bomoi, nakotika yo te.” Bongo bakendaki bango mibale. 7  Mpe bana ya basakoli 50 balandaki bango. Ntango Eliya ná Elisha batɛlɛmaki penepene na Yordani, bana ya basakoli yango bazalaki kotala bango na mosika. 8  Na nsima Eliya azwaki elamba na ye,*+ alíngaki yango mpe abɛtaki yango na mai. Mpe mai ya ebale ekabwanaki na ngámbo mibale. Bongo bango mibale bakatisaki ebale yango na mabele oyo ekauki.+ 9  Ntango kaka bakatisaki ebale, Eliya atunaki Elisha: “Olingi nasalela yo nini liboso ete nakabwana na yo?” Elisha alobaki na ye: “Nabondeli yo, tiká ete nazwa ndambo* mibale+ ya elimo na yo.”+ 10  Eliya ayanolaki: “Osɛngi ngai likambo moko ya makasi. Mabe te, soki omoni ngai ntango nakotika yo, wana likambo oyo osɛngi ekokokisama. Kasi soki omoni ngai te, wana ekokokisama te.” 11  Wana bazalaki kotambola mpe kosolola nzelanzela, bampunda ya mɔtɔ oyo ememi likalo moko ya mɔtɔ+ eyaki na mbalakaka mpe ekabolaki bango mibale. Bongo Eliya amataki na likoló* na mopɛpɛ makasi.+ 12  Wana Elisha azalaki kotala, azalaki koganga boye: “Tata na ngai, tata na ngai! Likalo ya Yisraele mpe ya bato na ye oyo batambolaka na mpunda!”+ Ntango Elisha azalaki lisusu komona Eliya te, asimbaki bilamba na ye moko mpe apasolaki yango na biteni mibale.+ 13  Nsima na yango, Elisha alɔkɔtaki elamba*+ ya Eliya oyo ekweaki, azongaki mpe atɛlɛmaki na bokula ya Yordani. 14  Bongo azwaki elamba yango ya Eliya, abɛtaki yango na mai, mpe alobaki: “Wapi Yehova, Nzambe ya Eliya?” Ntango abɛtaki elamba yango na mai, ebale ekabwanaki na ngámbo mibale, bongo Elisha akatisaki.+ 15  Ntango bana ya basakoli oyo bazalaki kofanda na Yeriko bamonaki ye na mosika, balobaki: “Elimo ya Eliya ekiteli Elisha.”+ Na yango, bakendaki kokutana na ye mpe bagumbamelaki ye tii na nse. 16  Balobaki na ye: “Biso basaleli na yo tozali na mibali ya mpiko 50. Tobondeli yo, tiká bákende koluka nkolo na yo. Mbala mosusu, elimo* ya Yehova etomboli ye mpe ebwaki ye likoló ya ngomba moko to na lobwaku moko.”+ Kasi Elisha alobaki: “Bótinda bango te.” 17  Kasi, batyaki ye mbamba tii ayokaki nsɔni, bongo alobaki: “Bótinda bango.” Na yango batindaki bato yango 50. Bakobaki koluka Eliya mikolo misato, kasi bamonaki ye te. 18  Na nsima, bazongaki epai ya Elisha na Yeriko,+ esika azalaki kofanda. Bongo alobaki na bango: “Nayebisaki bino te ete bókende koluka ye te?” 19  Na nsima, bato ya engumba yango balobaki na Elisha: “Nkolo na biso, yo moko okoki komona ete engumba na biso ezali na esika ya malamu.+ Nzokande, mai na yango ezali mabe, mpe mabele na yango ebotaka te.”* 20  Na yango, Elisha alobaki na bango: “Bóyela ngai mwa kibakuli moko ya sika mpe bótya mungwa na kati.” Bongo bayelaki ye yango. 21  Na nsima, abimaki mpe akendaki na liziba ya mai yango mpe abwakaki mungwa na kati ya mai yango+ mpe alobaki: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Napɛtoli mai oyo. Ekomema lisusu liwa te to kozanga kobota.’”* 22  Mpe banda ntango wana tii lelo, mai yango epɛtolamá, kaka ndenge Elisha alobaki yango. 23  Elisha alongwaki kuna mpe akendaki na Betele. Ntango azalaki komata, na nzela, bana mibali ya mike bautaki na engumba mpe babandaki kosɛka ye+ mpe koloba na ye: “Matá, yo moto ya libandi! Matá, yo moto ya libandi!” 24  Nsukansuka, Elisha abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na nkombo ya Yehova. Bongo urse mibale ya basi+ eutaki na zamba mpe epasolaki bana 42 kati na bango.+ 25  Elisha alongwaki wana mpe akendaki na Ngomba Karamele,+ na nsima azongaki na Samaria.

Maloba na nse

Awa liloba “likoló” elimboli esika oyo bandɛkɛ epumbwaka.
To, “molimo na yo.”
Maloba “bana ya basakoli” ekoki kozala kelasi ya koteya basakoli, to lisangá ya basakoli.
To, “molimo na yo ezali.”
To, “molimo na yo ezali.”
To, “elamba na ye ya mosakoli.”
To, “biteni.”
Awa liloba “likoló” elimboli esika oyo bandɛkɛ epumbwaka.
To, “elamba ya mosakoli.”
To, “mopɛpɛ.”
To mbala mosusu, “esalaka ete bazemi esopana.”
To mbala mosusu, “kosopa zemi.”