Mokanda ya mibale ya 12:1-21
12 Na mbula ya nsambo ya boyangeli ya Yehu,+ Yehoashe+ akómaki mokonzi mpe ayangelaki mbula 40 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Zibia, moto ya Beere-sheba.+
2 Yehoashe akobaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova mikolo nyonso oyo nganga-nzambe Yehoyada azalaki mopesi-toli na ye.
3 Nzokande, bisika oyo etombwaná+ elongwaki te na ekólo. Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.
4 Mokolo moko Yehoashe alobaki na banganga-nzambe boye: “Bózwa mbongo nyonso oyo bazali komema na ndako ya Yehova mpo na makabo mosantu,+ ezala mpako oyo moto* mokomoko asengeli kofuta,+ mbongo oyo bokozwa na bato oyo basalaki elako, mpe mbongo nyonso oyo moto apesi na ndako ya Yehova+ ndenge motema na ye etindi ye.
5 Banganga-nzambe bango moko bakozwa mbongo yango epai ya bato oyo bakopesa yango,* mpe bakosalela yango mpo na kobongisa ndako ya Nzambe, bisika nyonso oyo ebebi.”*+
6 Nzokande na mbula ya 23 ya boyangeli ya Yehoashe, banganga-nzambe babongisaki naino te bisika oyo ebebaki na tempelo.*+
7 Bongo Mokonzi Yehoashe+ abengaki nganga-nzambe Yehoyada ná banganga-nzambe mosusu mpe alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kobongisa te bisika oyo ebebi na tempelo? Sikoyo bózwa lisusu mbongo te epai ya bato oyo bapesaka yango, longola kaka soki bokosalela yango mpo na kobongisa tempelo.”+
8 Na yango banganga-nzambe bandimaki ete bakozwa lisusu mbongo epai ya bato te mpe ete mokumba ya kobongisa tempelo ezali lisusu na motó na bango te.
9 Bongo nganga-nzambe Yehoyada azwaki sanduku*+ moko mpe atɔbɔlaki lidusu na ezipeli na yango mpe atyaki yango pembeni ya etumbelo, na lobɔkɔ ya mobali ntango moto azali kokɔta na ndako ya Yehova. Kuna nde banganga-nzambe oyo bazalaki bakɛngɛli ya porte bazalaki kotya mbongo nyonso oyo bato bazalaki koya na yango na ndako ya Yehova.+
10 Mbala nyonso oyo bamoni ete mbongo ekómi mingi mpenza na kati ya kɛsi yango, sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi mpe nganga-nzambe monene bazalaki koya kozwa* mbongo oyo bato bayaki na yango na ndako ya Yehova+ mpe bazalaki kotánga yango.
11 Mbongo oyo batángi, bazalaki kopesa yango bato oyo batyamaki mpo na kotambwisa misala na ndako ya Yehova. Na ngala na bango, bato yango bazalaki kofuta bato ya misala ya mabaya ná batongi oyo bazalaki kosala mosala na ndako ya Yehova,+
12 ezala mpe bamasɔ ná bakati-mabanga. Bazalaki mpe kosomba banzete ná mabanga oyo bakatá mpo na kobongisa bisika oyo ebebi na ndako ya Yehova. Bazalaki mpe kosalela mbongo yango mpo na kosomba biloko mosusu nyonso oyo esengelaki mpo na kobongisa ndako yango.
13 Kasi mbongo oyo bato bazalaki koya na yango na ndako ya Yehova, basalelaki yango te mpo na kosala basaani ya palata, biloko ya koboma mɔtɔ, mabakuli, bakelelo,+ to eloko mosusu nyonso ya wolo to ya palata mpo na ndako ya Yehova.+
14 Bazalaki kopesa mbongo yango kaka bato oyo bazalaki kosala mosala, mpe na mbongo yango, bazalaki kobongisa ndako ya Yehova.
15 Bato oyo mbongo epesamaki na mabɔkɔ na bango mpo na kofuta bato ya mosala, bazalaki kotuna bango te ndenge oyo basaleli mbongo, mpo bazalaki bato oyo babongi kotyelama motema.+
16 Kasi mbongo ya makabo mpo na ngambo+ mpe mbongo ya makabo mpo na lisumu, bazalaki koya na yango na ndako ya Yehova te; ezalaki ya banganga-nzambe.+
17 Ezalaki na ntango yango nde Hazaele+ mokonzi ya Siri akendaki kobundisa engumba Gate,+ mpe azwaki yango. Nsima na yango, azwaki mokano ya kobundisa* Yerusaleme.+
18 Na yango Yehoashe mokonzi ya Yuda azwaki makabo mosantu nyonso oyo bankɔkɔ na ye Yehoshafate, Yehorame ná Ahazia, bakonzi ya Yuda, basantisaki.* Azwaki mpe makabo mosantu na ye moko, ná wolo nyonso oyo ezalaki na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova mpe ya ndako ya mokonzi, mpe atindelaki yango Hazaele mokonzi ya Siri.+ Bongo Hazaele abundisaki lisusu Yerusaleme te.
19 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehoashe, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda.
20 Nzokande, basaleli ya Yehoashe basanganaki, basalelaki ye likita,+ mpe babomaki ye na ndako ya Mwa Ngomba,*+ na nzela oyo ekiti tii na Sila.
21 Basaleli na ye oyo babomaki ye ezalaki Yozakare mwana ya Shimeate mpe Yehozabade mwana ya Shomere.+ Bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi, mpe mwana na ye Amazia akómaki mokonzi na esika na ye.+
Maloba na nse
^ To, “molimo.”
^ To, “esali minkaka.”
^ To, “epai ya bato oyo bayebani na bango.”
^ Lil., “ndako.”
^ To, “kɛsi.”
^ To, “kotya na saki.” Lil., “kokangisa.”
^ Lil., “Hazaele abalusaki elongi na ye mpo na komata mpe kobundisa.”
^ To, “bapesaki.”
^ To, “na Bete-milo.”