Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bana-kelasi ya Gileadi batindami mpo na kozala babuki-mbuma ya molende!

Bana-kelasi ya Gileadi batindami mpo na kozala babuki-mbuma ya molende!

Bana-kelasi ya Gileadi batindami mpo na kozala babuki-mbuma ya molende!

“BAMBUMA ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Na yango, bósɛnga na Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma ete atinda basali na kati ya mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Matai 9:​37, 38) Maloba yango ezalaki na ndimbola monene mpo na bana-kelasi ya mbala ya 116 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, ntango bakómaki pene ya kokende na bamboka oyo batindi bango na mosala ya misionɛrɛ.

Mokolo ya pɔsɔ, 13 Marsi 2004, bato 6 684 bayanganaki na eteyelo monene ya la Société Watchtower, na Patterson, na etúká ya New York, mpe na bisika mosusu epai bazalaki kolanda na televizyo likita ya kopesa bana-kelasi badiplome; na likita yango, bana-kelasi bazwaki batoli mpe bilendiseli ya nsuka. Biso nyonso oyo tozali kosala na molende mosala ya kobuka mbuma ya elimo tokoki kozwa litomba na batoli wana.

Na maloba na ye ya ebandeli, Theodore Jaracz, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe azwá diplome na kelasi ya mbala ya nsambo ya Gileadi, alobelaki maloba ya Yesu oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 28:​19, 20) Maloba yango ebongaki mpenza, mpamba te bana-kelasi oyo bazwi badiplome batindami na mikili 20! Amonisaki bana-kelasi ete mateya euti na Liloba ya Nzambe ebongisi bango mpenza mpo na kozala basali ya molende na mosala ya ntina mingi ya kobuka mbuma ya elimo, mpe alendisaki bango na kopesa Yehova nkembo na maloba mpe misala na bango.​—Matai 5:16.

Ndenge ya kozala babuki-mbuma ya malamu

Molobi ya liboso ezalaki Ndeko Robert Wallen oyo, banda bambula ebele sikoyo, asalaka mosala ya makambo ya Eteyelo ya Gileadi. Motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki “Motema mawa: Ezaleli ya malamu mingi.” Alobaki na bana-kelasi boye: “Motema mawa ezali mongongo oyo ata bato bakufá matoi bakoki koyoka mpe eloko oyo ata bato bakufá miso bakoki komona.” Yesu ayebaki malamu mpasi oyo bato bazalaki komona mpe alukaki kosalisa bango. (Matai 9:36) Bana-kelasi bakokutana na makambo mingi oyo ekotinda bango bálanda ndakisa ya Yesu​—na mosala ya kosakola, na kati ya lisangá, na ndako ya bamisionɛrɛ, mpe epai ya balongani na bango. Molobi apesaki bana-kelasi toli oyo: “Tiká ete motema mawa emonana na bomoi na bino wana bozali kosalela basusu. Kaka bizaleli malamu na bino nde ekosalisa bino na kofanda malamu na bandako ya bamisionɛrɛ. Yango wana, bózwa ekateli ya kolata motema mawa.”​—Bakolose 3:12.

Na nsima, ekómaki ngala ya Gerrit Lösch, ye mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe azwá diplome na kelasi ya mbala ya 41 ya Gileadi. Asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Basakoli ya lobiko.” (Yisaya 52:7) Mpo bato bábika ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekobomama, basengeli libosoliboso kozwa boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe, koyambola kondima na bango, mpe kozwa batisimo. (Baloma 10:10; 2 Timote 3:15; 1 Petelo 3:21) Kasi, ntina ya liboso oyo tosakolaka ezali te mpo na kobikisa bato, ezali nde mpo na kopesa Nzambe nkembo. Yango wana, Ndeko Lösch apesaki bamisionɛrɛ yango ya sika toli oyo: “Bómema nsango ya Bokonzi tii na nsuka ya mokili, mpe bózala basakoli ya molende ya lobiko, mpo na nkembo ya Yehova.”​—Baloma 10:18.

Lawrence Bowen, ye azali molakisi na Gileadi, atalelaki motuna oyo: “Bozali kongɛnga ndenge nini?” Asalelaki maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:22 mpo na kolendisa bana-kelasi na kobatela liso na bango “alima” mpo na “kongɛngisa pole ya elimo oyo epesaka Yehova nkembo mpe amemelaka bato bolamu.” Banda na ebandeli ya mosala na ye, Yesu apesaki ndakisa eleki malamu na likambo yango na ndenge atyaki makanisi na ye nyonso na kosala mokano ya Nzambe. Yesu akweaki te ntango Satana amekaki ye na esobe mpamba te azalaki komanyola na makambo minene oyo Tata na ye ateyaki ye na likoló. (Matai 3:16; 4:​1-11) Yesu amonisaki ete atyelaki Yehova motema mobimba na ndenge akokisaki mosala oyo Nzambe apesaki ye. Ndenge moko mpe, mpo bamisionɛrɛ bálonga mikakatano oyo bakokutana na yango, basengeli kokoba koyekolaka Biblia mpe kotyela Yehova motema mobimba.

Mark Noumair, ye mpe azali molakisi na Gileadi mpe azwá diplome na kelasi ya mbala ya 77 ya Gileadi, asalaki lisolo ya nsuka; motó ya likambo na yango ezalaki “Tozali na lobɔkɔ na yo.” (Yosua 9:25) Alendisaki bana-kelasi na kolanda ndakisa ya bato ya Gibona. Atako Gibona ezalaki “mboka monene, . . . mpe mibali na yango bazalaki nyonso makasi,” bato ya Gibona balukaki lokumu te mpe basɛngaki te makambo oyo bango moko bakolinga. (Yosua 10:2) Bandimaki kosala lokola “bakati ya nkoni mpe batoki ya mai” mpo na kosalisa Balevi na misala etali losambo ya Yehova. (Yosua 9:27) Tokoki koloba ete bana-kelasi oyo bazwi badiplome balobi na Yosua Monene, Yesu Klisto ete, “Tozali na lobɔkɔ na yo.” Lokola bazali kokende na mboka mopaya, basengeli kozala na elimo wana, kondima mosala nyonso oyo Yosua Monene akopesa bango.

Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna na bamisionɛrɛ ya kala

Wallace Liverance, ye azwá diplome na kelasi ya mbala ya 61 ya Gileadi mpe azali molakisi na Gileadi, asololaki na ndambo ya bana-kelasi. Motó ya likambo ya lisolo na bango ezalaki, “Tófungolaka Makomami polelepolele.” Bana-kelasi yango bayebisaki makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na boumeli ya basanza oyo bazalaki na kelasi mpe basalaki mwa bilakiseli na yango. Emonanaki polele ete boyekoli mozindo ya Biblia na boumeli ya sanza mitano esimbaki mpenza mitema na bango mpe ebakisaki lisusu mposa na bango ya koyebisa bato mosusu makambo oyo bayekoli. (Luka 24:32) Na boumeli ya sanza mitano ya kelasi, mwana-kelasi moko azalaki koyebisa leki na ye makambo oyo azalaki koyekola. Yango elendisaki leki na ye na koluka lisangá ya Batatoli ya Yehova na mboka oyo afandi mpe abandaki koyekola Biblia. Lelo oyo, azali koyangana na makita, azali kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe akómi mosakoli oyo azwi naino batisimo te.

Nsima ya makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango, Richard Ashe ná John Gibbard batunaki bandeko oyo baumeli na mosala ya Yehova, bamosusu kati na bango bazali bakɛngɛli-batamboli. Bandeko yango bazwá badiplome na bakelasi mosusu ya Gileadi mpe bazalaki na Patterson mpo na kelasi ya bakɛngɛli-batamboli. Moko na bango alobaki ete Ndeko Knorr alobaká na kelasi na bango boye: “Na Gileadi bokoyekola makambo mingi. Kasi, soki makambo yango evimbisi bino mitó, tosali mosala ya mpunda. Tolingi nde bóbima awa na mitema oyo etondi na bolingo.” Bakɛngɛli-batamboli bapesaki bana-kelasi toli ete bázala bato oyo bamibanzabanzaka mpo na bato, básalelaka bato makambo ndenge oyo Klisto asalaki, mpe bázala na komikitisa mpe bándima mosala nyonso oyo bapesi bango. Soki balandi toli wana, na ntembe te bamisionɛrɛ yango ya sika bakobota mbuma malamu bipai oyo batindi bango.

Bózala babuki-mbuma ya molende epai bozali kokende!

Na nsima, bayangani balandaki lisolo ya Stephen Lett, ye mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Asalaki lisukulu ya monene na likita yango, motó ya likambo na yango ezalaki “Bózala babuki-mbuma ya molende epai bozali kokende!” (Matai 9:38) Ntango ya kobuka mbuma na elanga ezalaka mokuse. Esɛngaka ete babuki-mbuma básala na molende. Yango ezali mpe na ntina mingi na ntango oyo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo! Mosala ya kobuka mbuma ya elimo ezali mosala ya kobikisa bomoi ya bato mingi oyo ezali na likama. (Matai 13:39) Ndeko Lett alendisaki bana-kelasi ete ‘bálekisa ntango mpambampamba te’ kasi nde ‘bápela na elimo’ mpe ‘básalela Yehova lokola baombo’ na mosala ya kobuka mbuma oyo ekozongelama lisusu te. (Baloma 12:11) Molobi azongelaki maloba ya Yesu oyo: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoane 4:35) Na nsima, alendisaki bana-kelasi na kozala na molende na mosala ya kobuka mbuma, na kosala nyonso mpo na kokutana na bato na ntango mpe na bisika oyo bakoki komona bango mpe na kosalela mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Koluka mabaku ekoki kosalisa mpo na kopesa litatoli ya malamu. Yehova azali Nzambe ya molende, mpe alingi ete biso tólanda ndakisa na ye mpe tósala mosala ya kobuka mbuma ya elimo na molende.​—2 Mikonzi 19:31; Yoane 5:17.

Mpo na kosukisa, Ndeko Jaracz, prezida ya likita yango, atángaki bambote eutaki na bafiliale ndenge na ndenge mpe apesaki bana-kelasi badiplome na bango. Mwana-kelasi moko atángaki mokanda na nkombo ya baninga na ye nyonso ya kopesa matɔndi mpo na formasyo oyo bazwi. Emonanaki mpenza ete likita ya kopesa bana-kelasi ya mbala ya 116 ya Gileadi badiplome epesaki bayangani nyonso mposa ya kosala lokola babuki-mbuma ya molende.

[Etanda na lokasa 25]

MAKAMBO ETALI BANA-KELASI

Bauti na mikili: 6

Batindami na mikili: 20

Bana-kelasi bazalaki: 46

Mwayene ya mbula ya kobotama: 34,2

Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 17,2

Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,9

[Elilingi na lokasa 26]

Kelasi ya mbala ya 116 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia

Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.

(1) Ceansu, R.; Sparks, T.; Piña, C.; Turner, P.; Cheney, L. (2) Suardy, M.; Sjöqvist, Å.; Amadori, L.; Smith, N.; Jordan, A.; Boissonneault, L. (3) Matlock, J.; Ruiz, C.; Dular, L.; Vigneron, M.; Henry, K. (4) Sjöqvist, H.; Laux, J.; Ruzzo, J.; Gustafsson, K.; Boissonneault, R.; Jordan, M. (5) Henry, D.; Turner, D.; Kirwin, S.; Florit, K.; Ceansu, S. (6) Amadori, S.; Cheney, J.; Ross, R.; Nelson, J.; Ruiz, J.; Vigneron, M. (7) Florit, J.; Matlock, D.; Ross, B.; Laux, C.; Ruzzo, T.; Dular, D.; Kirwin, N. (8) Gustafsson, A.; Nelson, D.; Suardy, W.; Piña, M.; Smith, C.; Sparks, T.