Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”

Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”

“Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—NZEMBO 144:15.

NZEMBO: 44, 125

1. Mpo na nini basaleli ya Yehova bazalaka na esengo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

BATATOLI YA YEHOVA bazalaka mpenza bato ya esengo. Ntango bazali elongo, ezala na makita, na liyangani, to na mwa bokutani moko, babɛtaka masolo ya kosepelisa mpe basɛkaka elongo. Mpo na nini bazalaka na esengo bongo? Ezali libosoliboso mpo bayebi Yehova, “Nzambe ya esengo,” basalelaka ye mpe basalaka makasi bámekola ye. (1 Timote 1:11; Nzembo 16:11) Lokola esengo eutaka epai ya Yehova, alingi biso mpe tózala na esengo, mpe abongisi makambo ebele oyo ekoki kopesa biso esengo.​—Kolimbola Mibeko 12:7; Mosakoli 3:12, 13.

2, 3. (a) Kozala na esengo elimboli nini? (b) Mpo na nini ekoki kozala mpasi kozala na esengo?

2 Bongo yo moko? Ozalaka na esengo? Okoki kobakisa esengo na yo? Kozala na esengo elimboli komiyoka malamu, kosepela na bomoi oyo ozali na yango to mpe kozala na nsai makasi. Biblia emonisi ete bato oyo bazali na boyokani malamu na Yehova nde bakoki kozala na esengo ya solosolo. Kasi mpo na nini ekoki kozala mpasi kozala na esengo lelo oyo?

3 Esengo na biso ekoki kosila ntango moto oyo tolingaki akufi to alongolami na lisangá, to ntango libala na biso ekufi to tolongwe mosala. Esengo ekoki mpe kosila soki kimya ezali te na ndako mpo koswana ezali ntango nyonso, soki baninga ya mosala to ya kelasi bazali kotyola biso, soki batye biso na bolɔkɔ to mpe tozali konyokwama mpo na kondima na biso. Ekoki mpe kozala ete kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso ezali kobeba, tozali na maladi moko oyo eumeli mingi, to tozali konyokwama na makanisi. Kasi, kobosana te ete awa na mabele, Yesu Kristo, oyo azali “Nkumu ya esengo,” azalaki kosepela kobɔndisa mpe kopesa bato esengo. (1 Timote 6:15; Matai 11:28-30) Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki bizaleli oyo ekoki kosalisa biso tózala na esengo atako tozali na mikakatano ebele na mokili oyo ya Satana.

KOZALA NA BOYOKANI MALAMU NA YEHOVA NDE EPESAKA ESENGO

4, 5. Tokoki kosala nini mpo tózala na esengo mpe tóbatela yango?

4 Likambo ya liboso oyo Yesu alobelaki ezali na ntina mingi; alobaki: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Matai 5:3) Moto oyo ayebi bobola na ye ya elimo andimaka ete asengeli koyeba Nzambe mpe azali na mposa ya lisalisi mpe litambwisi na ye. Ndenge nini tokomonisa ete toyebi bobola na biso ya elimo? Tokomonisa yango soki tozali koyekola Biblia, kotosa mibeko ya Nzambe, mpe kotya losambo na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. Kosala makambo yango ekosalisa biso tózala na esengo. Tokozala na kondima makasi ete mosika te Nzambe akokokisa bilaka na ye. Lisusu, “elikya ya kitoko” oyo ezali na Biblia ekosalisa biso tóyika mpiko.​—Tito 2:13.

5 Mpo tóbatela esengo na biso ata soki tokutani na mikakatano, tosengeli ntango nyonso kokómisa makasi boyokani na biso na Yehova. Ntoma Paulo akomaki: “Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo [Yehova]. Nakoloba lisusu ete: Bósepelaka!” (Bafilipi 4:4) Mpo tózala na boyokani makasi na Yehova, tosengeli kozala na bwanya oyo apesaka. Biblia elobi: “Esengo na moto oyo azwi bwanya, mpe na moto oyo azali kozwa bososoli. Ezali nzete ya bomoi mpo na baoyo basimbi yango, mpe baoyo bakangi yango makasi bakobengama bato ya esengo.”​—Masese 3:13, 18.

6. Nini ekosalisa biso tóbatela esengo?

6 Kasi, mpo tózala na esengo ya solosolo, ezali na ntina mingi tósalelaka makambo oyo toyekolaka na Biblia. Yesu amonisaki yango ntango alobaki: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.” (Yoane 13:17; tángá Yakobo 1:25.) Yango nde esengeli mpo okokisa mposa na yo ya elimo mpe obatela na esengo. Kasi, ndenge nini tokoki kozala na esengo ntango makambo ebele zingazinga na biso ekoki kosilisa biso esengo? Tótalela makambo mosusu oyo Yesu alobaki na Lisolo likoló ya Ngomba.

MAKAMBO OYO EPESAKA ESENGO

7. Ndenge nini baoyo bazali na mawa bakoki kozala na esengo?

7 “Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama.” (Matai 5:4) Bato mosusu bakoki komituna ete: ‘Ndenge nini bato oyo bazali na mawa bakoki kozala na esengo?’ Yesu azalaki te kolobela bato nyonso oyo bazali na mawa. Bato mingi ya mabe bazali na mawa mpo bazali komona mpasi na “mikolo ya nsuka” oyo ya “mikakatano.” (2 Timote 3:1) Kasi, lokola bazali na moimi mpe balukaka te kokóma baninga ya Yehova, bakoki kozala na esengo te. Yesu azalaki nde kolobela bato oyo bayebi mposa na bango ya elimo. Bato yango bazali na mawa mpo bamonaka ndenge bato mingi baboyi Nzambe, to bazali na bomoi oyo esepelisaka ye te. Bayebi mpe ete bazali bato ya masumu, mpe bamonaka mabe nyonso oyo lisumu ememá na mokili. Bato oyo bazali na mawa ya solosolo, Yehova amonaka bango, abɔndisaka bango na nzela ya Liloba na ye mpe apesaka bango esengo mpe bomoi.​—Tángá Ezekiele 5:11; 9:4.

8. Na ndenge nini kozala na ezaleli ya boboto epesaka esengo?

8 “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” (Matai 5:5) Ndenge nini kozala na boboto ekoki kosalisa moto azala na esengo? Bato mosusu bazalaka bato ya nkanda mpe basalaka mobulu, mpe yango ebimisaka mikakatano mingi. Kasi, nsima ya koyekola solo, bamosusu babongwani mpe balati “bomoto ya sika.” Sikoyo, bazali komonisa “bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.” (Bakolose 3:9-12) Na yango, bazwi kimya, bakómi na boyokani malamu na basusu, mpe bazali na esengo. Lisusu, Liloba ya Nzambe elobi ete bato yango “bakozwa mabele.”​—Nzembo 37:8-10, 29.

9. (a) Na ndenge nini bato ya ezaleli ya boboto “bakozwa libula ya mabele”? (b) Mpo na nini baoyo “bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene” bakoki kozala na esengo?

9 Na ndenge nini “bato ya ezaleli ya boboto . . . bakozwa libula ya mabele”? Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozwa libula ya mabele ntango bakoyangela yango lokola bakonzi mpe banganga-nzambe. (Emoniseli 20:6) Bamilio ya bato mosusu oyo bazali te na elikya ya kokende likoló bakozwa libula ya mabele na ntango bakofanda wana libela na libela. Bakozala bato ya kokoka, bakozala na kimya mpe esengo. Bato yango ezali kaka baoyo Yesu alobaki ete bazali na esengo mpo “bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene.” (Matai 5:6) Nzala na bango ya elimo mpe mposa na bango ya boyengebene ekokokisama ntango Yehova akolongola mabe nyonso. (2 Petro 3:13) Na mokili ya sika, bayengebene bakozala na esengo mpe bakozala lisusu na mawa te mpo makambo ya mabe mpe bato mabe bakozala lisusu te.​—Nzembo 37:17.

10. Kozala na motema mawa elimboli nini?

10 “Esengo na bato ya motema mawa, mpo bakomonisela bango motema mawa.” (Matai 5:7) Kozala na motema mawa elimboli kozala motema malamu, koyokela basusu mawa, mpe koyeba komitya na esika ya baoyo bazali konyokwama. Nzokande, motema mawa esengeli mpe komonana na misala. Biblia emonisi ete moto ya motema mawa asalisaka basusu.

11. Ndakisa ya Mosamaria ya motema malamu ezali koteya biso nini?

11 Tángá Luka 10:30-37. Ndakisa oyo Yesu apesaki ya Mosamaria ya motema malamu emonisi malamu ndimbola ya kozala moto ya motema mawa. Mosamaria yango ayokelaki moto oyo azalaki na mpasi mawa, mpe yango etindaki ye asalisa ye. Nsima ya kopesa ndakisa yango, Yesu alobaki: “Kende mpe yo moko salá se bongo.” Na yango, tokoki komituna boye: ‘Nasalaka mpe bongo? Nayokelaka basusu mawa lokola Mosamaria wana? Ntango basusu bazali konyokwama, nakoki kosala mwa eloko mpo na kosalisa bango? Na ndakisa, na lisangá na biso, nakoki kosalisa mibange, moto oyo molongani na ye akufá, to bana oyo baboti na bango basalelaka Yehova te? Nakoki ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya baoyo banyokwami na makanisi’ mpo na kolendisa bango?’​—1 Batesaloniki 5:14; Yakobo 1:27.

Soki ozali kosalisa basusu, yo ná bato oyo osalisi bokozala na esengo (Talá paragrafe 12)

12. Mpo na nini kozala na motema mawa ekoki kopesa biso esengo?

12 Kasi, mpo na nini bato ya motema mawa bazalaka na esengo? Ntango tozali kosalela basusu makambo oyo emonisi motema mawa, toyokaka esengo ya kopesa, ndenge Yesu alobaki. Lisusu, kosala bongo esepelisaka Yehova. (Misala 20:35; tángá Baebre 13:16.) Mpo na moto oyo amonisaka motema mawa, Mokonzi Davidi alobaki: “Yehova ye moko akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi. Akotángama moto ya esengo na mabele.” (Nzembo 41:1, 2) Soki tozali komonisela basusu motema mawa, Yehova mpe akomonisela biso motema mawa mpe tokoki kozala na esengo libela na libela.​—Yakobo 2:13.

“BATO YA MOTEMA PƐTO” BAZALAKA NA ESENGO

13, 14. Mpo na nini kozala na “motema pɛto” ezali na ntina?

13 Yesu alobaki: “Esengo na bato ya motema pɛto, mpo bakomona Nzambe.” (Matai 5:8) Kozala na motema pɛto elimboli kozala na makanisi mpe bamposa ya mbindo te. Yango ezali na ntina mingi soki tolingi Yehova andima losambo na biso.​—Tángá 2 Bakorinti 4:2; 1 Timote 1:5.

14 Bato oyo bazali na motema pɛto bakoki kozala na boyokani malamu na Yehova, mpo alobaki: “Esengo na baoyo bazali kosukola bazambala na bango.” (Emoniseli 22:14) “Kosukola bazambala na bango” elimboli nini? Mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, yango elimboli ete Yehova amonaka ete bazali na mbindo te, akopesa bango kozanga kokufa, mpe bakozala na esengo libela na libela na likoló. Mpo na ebele mpenza ya bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, yango elimboli ete Yehova andimi bázala baninga na ye mpo bazali bayengebene na miso na ye. Biblia elobi ete “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate.”​—Emoniseli 7:9, 13, 14.

15, 16. Na ndenge nini bato ya motema pɛto bakoki ‘komona Nzambe’?

15 Yehova alobaki ete “moto moko te akoki komona ngai mpe kozala lisusu na bomoi.” (Kobima 33:20) Boye, na ndenge nini bato ya motema pɛto bakoki ‘komona Nzambe’? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “komona” ekoki kolimbola komona na makanisi, kokanga ntina, to koyeba. Na yango, ‘komona Nzambe na miso ya motema na biso’ elimboli koyeba bomoto na ye mpe kolinga bizaleli na ye. (Baefese 1:18) Yesu oyo amekolaki bizaleli ya Nzambe na ndenge ya kokoka, alobaki: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.”​—Yoane 14:7-9.

16 Lisusu, tokoki ‘komona Nzambe’ ntango oyo asalisi biso na likambo moko boye. (Yobo 42:5) Tokoki mpe “komona” to kotya makanisi na makambo kitoko oyo Yehova alaki baoyo basalaka makasi bázala motema pɛto mpe básalela ye na bosembo. Kasi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakomona Yehova boye mpenza na miso ntango bakosekwa mpe bakozwa mbano na bango ya bomoi na likoló.​—1 Yoane 3:2.

TOKOKI KOZALA NA ESENGO ATAKO MIKAKATANO

17. Mpo na nini bato oyo batyaka kimya bazalaka na esengo?

17 Na nsima Yesu alobaki: “Esengo na bato oyo batyaka kimya.” (Matai 5:9) Bato oyo balukaka kotya kimya bazalaka na esengo. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Bato oyo batyaka kimya balonaka mbuma ya boyengebene na kimya mpe babukaka yango.” (Yakobo 3:18) Ntango matata ebimi kati na yo na ndeko moko na lisangá to na libota, sɛngá Yehova asalisa yo otya kimya. Na ntango yango, Yehova akopesa yo elimo santu na ye, oyo ekosalisa yo omonisa bizaleli ya bokristo, mpe okozala na esengo mingi. Yesu amonisaki ntina ya koluka kotya kimya ntango alobaki: “Soki omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.”​—Matai 5:23, 24.

18, 19. Mpo na nini bakristo bakoki kosepela ata soki bazali konyokwama?

18 “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai.” Yesu alingaki koloba nini? Abakisaki boye: “Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Matai 5:11, 12) Ntango babɛtaki bantoma mpe bayebisaki bango bátika kosakola, “balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela.” Ya solo, basepelaki te ndenge babɛtaki bango. Kasi, bazalaki na esengo “mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama” mpo na nkombo ya Yesu.​—Misala 5:41.

19 Lelo oyo, basaleli ya Yehova mpe babatelaka esengo ntango bazali konyokola bango mpo na nkombo ya Yesu to ntango bakutani na komekama. (Tángá Yakobo 1:2-4.) Ndenge moko na bantoma, tosepelaka te mpo tozali na mpasi to tozali konyokwama. Kasi, soki totikali sembo na komekama, Yehova akopesa biso makasi ya koyika mpiko mpe ya kobatela esengo na biso. Tótala ndakisa ya Henryk Dornik ná ndeko na ye ya mobali. Na sanza ya 08/1944, batindaki bango na kaa ya bakangami. Bato oyo bazalaki konyokola bango balobaki boye: “Ndenge ya kondimisa bango ezali te. Bazali na esengo ya kokufa mpo na lingomba na bango.” Ndeko Dornik alobaki boye: “Tozalaki na mposa ya kokufa mpo na lingomba te, kasi komonisa mpiko mpe kobatela lokumu na biso na ntango ya minyoko mpo na kotikala sembo epai ya Yehova nde epesaki ngai esengo.” Abakisaki ete: “Kobondela na etingya ekómisaki boyokani na ngai na Yehova makasi, mpe esalisaki ngai mingi mpenza.”

20. Mpo na nini ezali esengo kosalela “Nzambe ya esengo”?

20 Soki toyebi ete Yehova, “Nzambe ya esengo,” azali kosepela na biso, tokoki kozala na esengo atako tozali konyokwama, bato ya libota bazali kotɛmɛla biso, tozali kobɛla, to tozali kopusana na mbula. (1 Timote 1:11) Tokoki mpe kozala na esengo mpo Nzambe na biso “oyo akoki kobuka lokuta te,” alaki biso makambo ebele ya malamu. (Tito 1:2) Ntango Yehova akokokisa bilaka na ye, tokokanisa lisusu te mikakatano oyo tozali na yango lelo. Kutu, mapamboli mpe bisengo oyo tokozala na yango na Paradiso ekoleka nyonso oyo tokoki kokanisa! Ya solo, ‘tokosepela mpenza na kimya mingi.’​—Nzembo 37:11.