Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobi nini?

Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?

Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?

SOKI olɛmbi nzoto mpo na mangomba to soki otiká kokende na lingomba moko boye, yebá ete ozali yo moko te. Kutu motángo ya bato oyo batiki kozala bandimi ya lingomba moko boye ezali kokola lokola mayebo.

Bato mosusu batiki kokende na mangomba mpo bamoni ete bibongiseli ya ndenge wana ezali na bokosi mpe ezali kokanga miso na makambo ya mabe. Bamosusu bamoni ete ezali mpasi kozala na lingomba oyo makambo ebongisami malamu. Ezali mpe na bamosusu oyo bamonaka ete kosambela Nzambe etali te kozala na kati ya lingomba moko boye. Biblia eteyaka mpenza nini na oyo etali lingomba?

Baninga ya Nzambe na ntango ya kala

Biblia emonisi polele ndenge oyo bato ya ntango ya kala, lokola Abrahama, Yisaka mpe Yakobo bazalaki kosambela Nzambe. Na ndakisa, mokolo moko Nzambe alobaki boye: “Nayebani na [Abrahama] mpo apesa mitindo na bana na ye mpe na bato ya ndako na ye, oyo bakoya nsima na ye, ete bákoba kobatela nzela ya Yehova mpo na kosala boyengebene mpe bosembo.” (Ebandeli 18:19) Abrahama azalaki moninga ya Nzambe mpe azalaki mpenza na boyokani ya penepene na Mozalisi. Kasi azalaki mpe kosambela Nzambe elongo na bato ya libota na ye. Ndenge moko mpe, bato mosusu ya ntango ya kala oyo bazalaki mpe baninga ya Nzambe bazalaki kosambela ye elongo na basi mpe bana na bango, mpe bato mosusu ya libota na bango mpe basaleli na bango.

Na nsima, Nzambe asɛngaki Bayisraele ya kala mpe na nsima bakristo ya siɛklɛ ya liboso ete báyanganaka mpo na kosambela ye. (Balevi 23:2, 4; Baebre 10:24, 25) Na mayangani yango, bazalaki koyemba, kotánga Makomami mpe kobondela. (Nehemia 8:1-8; Bakolose 3:16) Makomami emonisaki mpe ete etuluku ya mibali oyo bakokisi masɛngami bátambwisa makambo na kati ya lisangá.​—1 Timote 3:1-10.

Matomba ya koyangana na lisangá

Na kolanda ndakisa wana oyo Biblia emonisi, tokoki koloba ete lelo oyo mpe, Nzambe asepelaka ete baninga na ye básambela ye na kati ya lisangá. Mpe kosala bongo ememaka matomba mingi.

Na ndakisa, Biblia ekokanisi basambeli ya solo na moto oyo azali kotambola na nzela moko ya nkaka; mpe na esika mosusu lokola mopoti-mbangu na momekano ya mbangu. (Matai 7:14; 1 Bakorinti 9:24-27) Soki moto azali kopota mbangu ye moko na nzela moko ya molali mpe ya mabe, akoki kolɛmba noki mpe kotika momekano yango ya kopota mbangu. Kasi soki bato mosusu bazali kolendisa ye, akoki kopota mbangu tii na nsuka. Ndenge moko mpe, moto oyo alingi kosambela Nzambe na ndenge ebongi akoki kobatela boninga na ye na Nzambe atako akutani na mikakatano, soki bato mosusu bazali kolendisa ye.

Yango eyokani na maloba oyo ezali na Baebre 10:24, 25, epai Biblia elobi ete: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te.” Kutu, Biblia elobi ete lokola nzoto moko, basambeli ya solo basengeli kosambela Nzambe na bomoko lokola bandeko basi mpe mibali.

Osengeli koboya mangomba nyonso?

Biblia emonisi ete nzoto yango to lisangá, ezali kosangana na bolingo mpe na kimya. Na ndakisa, Baefese 4:2, 3 elendisi basambeli ya solo ete “na elimo mpenza ya komikitisa mpe na boboto, na motema molai, bókanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, bósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” Ndenge nini okoki kotosa maloba wana soki osambelaka Nzambe yo moko kozanga koyangana elongo na basambeli mosusu?

Mokano ya Nzambe ezali ete basambeli ya solo básangana liboke moko na kati ya kondima, na esika ete moto na moto asambela Nzambe na ndenge na ye. Biblia elendisi basambeli ete bálobaka na boyokani, bokabwani ezala te kati na bango, mpe ‘bázala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.’ (1 Bakorinti 1:10) Maloba wana elingaki kozala na ntina te soki Nzambe alingaki ete moto na moto asambela ye na ndenge na ye moko.

Ya solo, Biblia emonisi polele ete losambo oyo ebongisami malamu nde Nzambe andimaka. Lisusu, losambo oyo ebongisami malamu, oyo Biblia emonisi, oyo Nzambe alingi ete biso tósambela ye, ekoki kosalisa yo okokisa makambo oyo Nzambe asɛngi yo.​—Matai 5:3.

Na ntembe te, mangomba mingi lelo oyo etondi na bokosi mpe na makambo ya mabe. Kasi yango emonisi te ete osengeli koboya mangomba nyonso. Esengeli kozala na lingomba moko awa na mabele oyo emoniselaka bato nyonso bolingo, lingomba oyo ebongisami mpo na koteya bato mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu. Lingomba ya ndenge wana ekoki kosalisa yo okóma na kondima ya solosolo. Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa yo oyeba lingomba ya ndenge wana mpo osambela Nzambe na ndenge oyo andimaka.