Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

“Na ebandeli ya 2011, bato miliare mitano na ndambo na mokili mobimba bazalaki kosalela telefone ya mabɔkɔ.”​—ZULUNALO UN CHRONICLE, ÉTATS-UNIS.

Na mbula 10 oyo euti koleka, makama “ebomaki bato koleka 780 000; elingi koloba soki makama ebomaki bato 100, koningana ya mabele yango moko ebomaki pene na bato 60.”​—ZULUNALO THE LANCET, GRANDE-BRETAGNE.

“Na mbula 20 oyo euti koleka, bato ya Russie soki 800 000 bamibomaki.”​—ZULUNALO ROSSIISKAYA GAZETA, RUSSIE.

Na ekólo Philippines, epai bandimaka te koboma libala, motángo ya basi ya mbula 15 tii 49 oyo bazali na libala ya makango to na libala ya “yaká tófanda . . . , emati koleka mbala mibale kobanda 1993 tii 2008.”​—ZULUNALO THE PHILIPPINE STAR, PHILIPPINES.

Bato mingi (79,2%) “na ekólo Géorgie . . . bazali kozwa bamaladi oyo eutaka na milinga ya makaya oyo bato mosusu bazali komɛla.” Na Tbilisi mboka-mokonzi ya ekólo yango, “bana ebele mpenza (87,7%) bazali kozwa bamaladi yango.”​—ZULUNALO TABULA, GÉORGIE.

Kokende na Asie mpo na lisalisi ya monganga

Bipai nyonso na mokili, bato mingi ya maladi bazali kokende na mboka-mopaya mpo na koluka lisalisi ya monganga oyo ebongi. Mbala mingi, mbongo oyo bazali kofuta kuna ezali ndambo ya mbongo oyo basengelaki kofuta na ekólo na bango. Zulunalo moko (Business World) elobi ete kobanda na 2015 ekólo Philippines ekoyamba bato yango milio moko mbula na mbula, mpe ekólo Corée ya Sudi ekoyamba bato milio moko na mobu 2020. Bato mosusu mingi bazali mpe kokende na Inde, na Malaisie, na Singapour, mpe na Thaïlande. Longola bato ya Mpoto to ya Amerika oyo bakendeke koluka lisalisi ya monganga mpo na maladi ya mikuwa, ya misisa, ya motema, bato mosusu mpe bakendeke kuna. Zulunalo yango ebakisi ete bato mingi ya Chine oyo bazali kokóma na bozwi bazali mpe kokende koluka minganga oyo basalaka mapaso mpo na kobongisa biteni mosusu ya nzoto; bamemaka bafɔtɔ ya bato oyo bayebani mingi, mpo balingi kokóma lokola bango.”

Makambo ebele na mbala moko esalemaka malamu te

Baaparɛyi ya mikolo oyo esali ete basali bákoma kosala misala ndenge na ndenge na mbala moko mpe báyanolaka nokinoki na mituna oyo batuni bango. Nzokande, Clifford Nass, mokambi ya ebongiseli moko na Iniversite Stanford na États-Unis, alobi ete “basali oyo basalaka makambo ebele na mbala moko basalaka yango malamu te.” Balobaka ete mbala mingi, bato oyo basalaka misala mingi na mbala moko bazalaka na mitungisi, likebi na bango ekendaka na makambo ezangá ntina, bakanisaka malamumalamu te, mpe na yango babosanaka makambo mosusu ya ntina. Clifford Nass apesi toli oyo: “Soki obandi kosala likambo moko, salá kaka yango na boumeli ya miniti 20. Yango ekosalisa yo otyaka makanisi na likambo moko, mpe okanisaka malamumalamu.”