Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mbala mosusu nsuka ya mokili ekozala te ndenge ozali kokanisa

Mbala mosusu nsuka ya mokili ekozala te ndenge ozali kokanisa

MAKAMBO ya kobangisa oyo bato bazali koloba mpo na nsuka ya mokili eyokani na makambo misato. Ya liboso, euti na makanisi ya bato, mpe bato bazali na likoki te ya koyeba makambo oyo ekoya. Ya mibale, emonisi ete kobika ekozala likambo ya makila malamu. Ya misato, ekozala mpasi mpo na baoyo bakobika na nsuka ya mokili bátikala na bomoi.

Nzokande, oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya ekeseni mpenza na oyo bato balobaka. Biblia elobi ete makambo mingi ekobongwana mpenza. Kasi, baoyo nyonso bazali kosala mokano ya Nzambe nde bakobika. Longola yango, Biblia elobi te ete mabele ekozika na mɔtɔ to bato bakokufa na malili. Mabele mobimba ekobongwana paradiso.

Kasi bato mingi bandimaka te makambo oyo Biblia elobi. Bato mosusu batyaka ntembe na mateya ya Biblia oyo etali bolɔzi monene, Armagedone, boyangeli ya mbula nkóto mpe paradiso. Bato ya teoloji balobelaka mateya yango mbala na mbala, batyanaka ntembe mpo na yango, mpe balimbolaka yango na ndenge na bango moko. Makanisi na bango eyokanaka te. Mokomi moko na nkombo Bruce Robinson alobi boye mpo na nsuka ya mokili: “Emonani ete na babuku nyonso oyo bato ya teoloji bakomá mpo na bindimeli ya mangomba ya bokristo, mingi na yango elobeli nsuka ya mokili.” Kasi yango ebimisi nde mobulungano.

Nzokande, Biblia etiki biso na molili te. Biblia ezali na nsango oyo euti na Nzambe mpe alingi ete tóyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Tótalela mituna mosusu oyo bato bamitunaka mbala na mbala, mpe oyo Biblia elobi. Soki olingi koyeba makambo mosusu, okoki kosɛnga buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Mabele ekobebisama mpe bato nyonso bakobomama?

“Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

Bato nyonso nde bakokufa?

“Mpo bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.”​—Masese 2:21, 22.

Nzambe apesaki bato mabe etumbu na ntango ya kala?

Nzambe “amipekisaki te kopesa mokili ya kala etumbu, kasi abatelaki Noa, mosakoli ya boyengebene, ná bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela na mokili ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe; mpe soki ntango akómisaki bingumba ya Sodoma ná Gomora putulu ya mɔtɔ akweisaki yango na likambo, apesi bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya.”​—2 Petro 2:5, 6.

Tokoki koyeba mokolo oyo Nzambe akosambisa bato?

“Kasi mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi. Mpo ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”​—Matai 24:36-39.

Ezali na elembo oyo emonisi ete nsuka ya mokili ekomi pene?

“Kasi yebá likambo oyo: mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.”​—2 Timote 3:1-5.

Makambo nini ekosalema na mikolo ezali koya mpo na bato awa na mabele?

Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:4.

Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango”

Atako Biblia elobeli makambo nyonso te mpo na mikolo oyo ezali koya, endimisi biso ete elikya ezali mpo na bato. Mikolo oyo ezali koya ekozala na nkembo moko oyo tokoki te kokanga ntina na yango sikoyo. Okoki kotya motema ete ekosalema mpamba te Yehova Nzambe alaki, mpe azali na likoki ya kosala yango.