Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia eyokani na siansi?

Biblia eyokani na siansi?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ. Biblia ezali buku ya siansi te, kasi makambo ya siansi oyo yango elobeli ezali solo. Talá mwa bandakisa oyo emonisi ete Biblia eyokani na siansi mpe ete elobeli makambo ya siansi na bosolo, nzokande bato oyo bazalaki na bomoi ntango Biblia ezalaki kokomama bazalaki na makanisi mosusu mpenza.

  •   Molɔ́ngɔ́ ekelamá. (Ebandeli 1:1) Kasi, masapo mingi ya kala elobaka ete molɔ́ngɔ́ ekelamá te; ezalaki eloko moko ya mobulumobulu oyo ebongisamaki kaka yango moko. Bato ya Babilone bazalaki kondima ete banzambe oyo babimisaki molɔ́ngɔ́ bautaki na mbu minene mibale. Masapo mosusu elobaka ete likei moko monene nde ebimisaki molɔ́ngɔ́.

  •   Molɔ́ngɔ́ etambwisamaka na mibeko oyo Nzambe atyá, kasi te na kolanda mikano ya banzambe. (Yobo 38:33; Yirimia 33:25) Masapo ya mikili ndenge na ndenge elobaka ete bato bakoki kosala eloko te liboso ya makambo oyo ebimaka na pwasa to makambo ya nsɔmɔ oyo banzambe yango basalaka.

  •   Mabele efandá likoló ya eloko te. (Yobo 26:7) Bato mingi ya ntango ya kala bazalaki kokanisa ete mabele ezali patatalu (plat) mpe efandá likoló ya moto moko ya mbinga to ya nyama moko boye, lokola mpakasa to nkoba.

  •   Mai ya bibale ná maziba eutaka na mbu mpe na mai mosusu oyo moi ebɛti mpe emati na likoló lokola mopɛpɛ, mpe na nsima ekitaka na mabele lokola mbula, to nɛjɛ. (Yobo 36:27, 28; Mosakoli 1:7; Yisaya 55:10; Amose 9:6) Bagrɛki ya kala bazalaki kokanisa ete mai ya bibale ezalaki kouta na nse ya mbu; mpe bakobaki kokanisa bongo tii na bambula ya 1900.

  •   Bangomba ebimaka mpe elimwaka; bangomba oyo ezali lelo ezalaki liboso na nse ya mai ya mbu. (Nzembo 104:6, 8) Nzokande, masapo mingi elobaka ete banzambe nde basalá bangomba oyo tomonaka lelo.

  •   Bopɛto ebatelaka nzoto. Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele emonisaki likambo ya kosala soki osimbi ebembe; elobaki ete soki moto abɛli maladi oyo ekoki kozwa basusu, esengeli kotya ye na esika na ye moko; elobaki mpe ete esengeli kotimola libulu mpe kozipa nyɛi. (Balevi 11:28; 13:1-5; Kolimbola Mibeko 23:13) Nzokande, ntango mibeko wana epesamaki, Baezipito bazalaki kosalela nkisi moko oyo basangisá na nyɛi mpo na kotya na mpota soki moto azoki.

Na bisika mosusu, Biblia elobi lokuta na makambo ya siansi?

 Soki moto ayekoli Biblia malamumalamu, akomona ete elobi lokuta te. Talá mwa makambo oyo etindaka bato báloba ete Biblia elobi lokuta na makambo ya siansi:

 Makanisi ya bato: Biblia elobi ete molɔ́ngɔ́ ekelamaki na mikolo motoba mpamba.

 Likambo ya solo: Biblia emonisi ete Nzambe akelá molɔ́ngɔ́ kalakala mpenza. (Ebandeli 1:1) Longola yango, mikolo motoba ya bozalisi oyo Ebandeli mokapo 1 elobeli ezalaki bileko oyo molai na yango eyebani te. Kutu, eleko nyonso oyo likoló ná mabele ekelamaki ebengami mpe “mokolo.”​—Ebandeli 2:4.

 Makanisi ya bato: Biblia elobi ete matiti mpe milona ekelamaki liboso ya moi, elingi koloba liboso photosynthèse ebanda kosalema.​—Ebandeli 1:11, 16.

 Likambo ya solo: Biblia emonisi ete moi, moko ya minzoto ya minene oyo ezalaka na “likoló,” ekelamaki liboso ya matiti mpe milona. (Ebandeli 1:1) Pole ya moi ekómaki na mabele na boumeli ya “mokolo” to eleko ya liboso ya bozalisi. Ntango etando ebimaki na “mokolo” ya misato ya bozalisi, pole ekɔtaki makasi mpo photosynthèse ebanda kosalema. (Ebandeli 1:3-5, 12, 13) Na nsima mpenza nde moi ekómaki komonana na mabele.​—Ebandeli 1:16.

 Makanisi ya bato: Biblia elobi ete moi ebalukaka zingazinga ya mabele.

 Likambo ya solo: Mosakoli 1:5 elobi ete: “Moi mpe ebimi, mpe moi elali, mpe ezali koya na mpema na esika oyo yango ekobima.” Nzokande, maloba wana emonisi kaka likambo oyo moi esalaka ndenge tomonaka yango longwa na mabele. Ata lelo oyo, moto akoki koloba “moi ebimi” mpe “moi elali,” kasi ayebi ete mabele nde ebalukaka zingazinga ya moi.

 Makanisi ya bato: Biblia elobi ete mabele ezali patatalu (plat).

 Likambo ya solo: Biblia esaleli maloba “nsuka ya mabele” mpo na kolobela esika moko oyo ezali mosika na mabele”; yango elingi koloba te ete mabele ezali patatalu to ete ezali na nsuka. (Luka 11:31) Ndenge moko mpe, maloba “nsuka minei ya mabele” elakisi te ete mabele ezali na bansuka minei. Maloba yango elimboli kaka mabele mobimba.​—Yisaya 11:12; Luka 13:29.

 Makanisi ya bato: Biblia elobi ete zingazinga ya serkle moko (circonférence) ezali molai na yango ya kati (diamètre) mbala misato, kasi mezire na yango mpenza ezali pi (π), soki 3,1416.

 Likambo ya solo: Bamezire ya “mbu ya ebende oyo enyangwisami” oyo elobelami na 1 Bakonzi 7:23 mpe 2 Ntango 4:2 emonisi ete bolai na yango ya kati ezalaki ya mapeko 10 mpe “esengelaki nsinga moko ya mapeko ntuku misato (30) mpo na kozinga yango mobimba.” Mbala mosusu mitángo oyo ekokani mwa moke na bamezire ya saani yango mpenza. Ekoki mpe kozala ete zingazinga to circonférence emonisi bamezire ya kati ya saani yango mpe molai ya kati to diamètre emonisi bamezire ya libándá.