Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobi ete bomoi na biso ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya lokola klima ezali kobongwana​—Biblia elobi nini?

Biblia elobi ete bomoi na biso ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya lokola klima ezali kobongwana​—Biblia elobi nini?

 “Kobeba ya klima ekómi mpenza likama monene. Bomoi na mabele esili kobeba.”​—The Guardian.

 Bato bamilukeli mikakatano ya makasi mpenza. Bato ya siansi balobi ete misala ya moto nde ebakisi molunge na mokili mobimba. Kobakisama ya molunge esili kobongola klima mpe ebimisi makama mingi mpenza. Makama yango, yango oyo:

  •   Mopɛpɛ ezali kobeba mingi mpenza, na ndakisa, molunge ekómi makasi, bozangi makasi ya mai, mpe mipɛpɛ ya makasi, oyo esali ete mai ezindisa bamboka mpe mɔtɔ etumba bazamba.

  •   Baglasi ya minene mpe ya Artique ezali kokóma maimai.

  •   Nivo ya mai ya mbu ezali komata.

 Kobeba ya klima esali ete makambo na mabele mobimba ebeba. Nsima ya koyebisa makambo ndenge ebebi na bikólo 193, zulunalo New York Times elobaki boye: “Mabele ezali kosɛnga lisalisi.” Lokola bato mingi bakufi mpe basusu bazali konyokwama mpo na kobeba ya klima, ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete yango ezali lokola “maladi ya mabe mpenza oyo ezali kozela bato ya mokili mobimba.”

 Nzokande, ezali na ntina ete tózala na elikya mpo na mikolo ezali koya. Biblia esakolaki makambo oyo ezali kosalema na mikolo na biso, mpe ntina oyo tokoki kokanisa ete Nzambe akozwa makambo na mab<u1D10>k<u1D10>, mpe oyo akosala mpo na kobatela bomoi na biso na mikolo ezali koya.

Kobebisama ya klima ezali kokokisa esakweli ya Biblia?

 Ɛɛ. Kobeba ya klima euti na molunge makasi oyo ebakisami na mokili mobimba, ezali kokokisa makambo oyo Biblia esakolaki mpo na ntango na biso.

 Esakweli: Nzambe akoboma “baoyo bazali kobebisa mabele.”​—Emoniseli 11:18.

 Biblia esakolaki ete na ntango moko boye, bato bakosala makambo oyo ekobebisa mabele mingi mpenza. Lokola molunge ekómi makasi na mokili mobimba, lelo oyo bato bazali kobebisa mabele na ndenge oyo babebisá yango naino liboso bongo te.

 Esakweli oyo emonisi ntina oyo tokoki kotyela moto motema te mpo na kobikisa mabele. Simbá ete Nzambe akoboma bato na ntango oyo “bazali kobebisa mabele.” Atako bato ya makanisi malamu bazali kosala makasi mpo na kopekisa kobebisama ya klima, milende na bango ekokoka te kosala ete bato bátika kobebisa mabele.

 Esakweli: “Makambo ya ns<u1D10>m<u1D10> ekomonana.”​—Luka 21:11.

 Biblia esakolaki ete “makambo ya ns<u1D10>m<u1D10>,” to ya kobangisa, ekozala na mikolo na biso. Kobongwana ya klima ebimisi makambo ya ns<u1D10>m<u1D10> na mokili mobimba na ndakisa mipɛpɛ makasi, bambula ya ns<u1D10>m<u1D10>, mpe bongo na bongo. Lelo oyo, bato mosusu bazali konyokwama na makanisi mpo mabele, mai, mopɛpɛ, bazamba ezali kobeba na ndenge ete moto akokoka lisusu kofanda na mokili te. Mpe yango esali ete bato bakóma kobangabanga mpo na klima.

 Esakweli: “Na mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . bazangi bosembo, . . . balingaka kosala boyokani te, . . . batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi.” 2 Timote 3:1-4.

 Biblia esakolaki bizaleli oyo bato bakozala na yango na mikolo ya nsuka oyo ekopesa mabɔkɔ mpo na kobebisama ya klima. Baguvɛrnema mpe bato ya mombongo bazali kotya nkita na esika ya liboso mpe bazali kokipe ata moke te bolamu ya bato oyo bakoya nsima. Ata ntango bazali komeka kosala elongo mpo na likambo ya klima, bazali koyokana te na makambo oyo basengeli kosala mpo molunge makasi na mokili ekita.

 Esakweli emonisi ete tosengeli kokanisa te ete bato bakobongola misala na bango mpe bakobatela mabele. Kasi, Biblia elobi nde ete bato oyo bazali koluka kaka matomba na bango moko “bakosala lisusu mabe koleka.”​—2 Timote 3:13.

Ntina oyo tosengeli komindimisa ete Nzambe akokanga mab<u1D10>k<u1D10> te

 Biblia emonisi ete Yehova Nzambe, a Mozalisi na biso, alandelaka makambo ya mabele mpe ya bato oyo bafandi wana. Talá vɛrsɛ misato oyo emonisi ete Nzambe akokanga mab<u1D10>k<u1D10> te.

  1.  1. Nzambe “azalisaki [mabele] mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.”​—Yisaya 45:18.

     Nzambe akokokisa mokano na ye mpo na mabele. (Yisaya 55:11) Akopesa nzela te ete ebebisama to moto akoka lisusu kofanda wana te.

  2.  2. “Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi. Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:11, 29.

     Nzambe alaki ete bato bakofanda na mabele libela mpe bakozala na bomoi ya malamu mpenza mpe ya kimya.

  3.  3. “Bato mabe bakolongolama na mabele.”​—Masese 2:22.

     Nzambe alaki ete akolongola bato oyo bazali kaka kokoba kosala mabe, sangisa mpe bato oyo bazali kobebisa mabele.

Makambo oyo Nzambe akosalela biso na mikolo ezali koya

 Ndenge nini Nzambe akokokisa bilaka na ye mpo na mabele? Akokokisa yango na nzela ya guvɛrnema moko oyo ekoyangela mokili mobimba oyo babengi Bokonzi ya Nzambe. (Matai 6:10) Bokonzi yango ekoyangela mabele uta na likoló. Bokonzi yango ekosala boyokani te na baguvɛrnema ya bato mpo na makambo ya mabele mpe makambo oyo ezali zingazinga na biso. Kasi, Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya baguvɛrnema ya bato.​—Danyele 2:44.

 Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo ya malamu mpo na bato mpe mpo na mabele. (Nzembo 96:10-13) Talá makambo Yehova Nzambe akosala na nzela ya Bokonzi na ye

  •   Akobongisa mabele

     Oyo Biblia elobi: “Esobe mpe etúká oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”​—Yisaya 35:1.

     Yango elimboli nini mpo na biso na mikolo ezali koya?: Yehova akobongisa mabele, ata bisika oyo bato babebisaki makasi mpenza.

  •   Akozala na bokonzi likoló ya mai, mopɛpɛ, mbonge

     Oyo Biblia elobi: “[Yehova] akokómisa mopɛpɛ makasi kimya, bongo bambonge ya mbu [ekofanda] kimya.”​—Nzembo 107:29.

     Yango elimboli nini mpo na biso na mikolo ezali koya?: Yehova azali na bokonzi likoló ya mai, mopɛpɛ, mbonge, mpe bongo na bongo. Bato bakonyokwama lisusu te mpo na molunge makasi, malili ya makasi to mbula ya makasi.

  •   Akoteya bato kobatela mabele

     Oyo Biblia elobi: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende.”​—Nzembo 32:8.

     Yango elimboli nini mpo na biso na mikolo ezali koya: Yehova apesá bato mokumba ya kobatela mabele. (Ebandeli 1:28; 2:15) Akoteya biso ndenge ya kobatela malamu biloko oyo ye asalá mpe ndenge ya kofanda malamu na mabele.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?