Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova

Poná monɔkɔ Lingala

Yehova azali nani?

Yehova azali nani?

Eyano ya Biblia

Biblia elobi ete Yehova azali Nzambe ya solo, Mozalisi ya biloko nyonso. (Emoniseli 4:11) Abrahama, Moize mpe Yesu basambelaki ye. (Ebandeli 24:27; Kobima 15:1, 2; Yoane 20:17) Azali Nzambe ya ekólo kaka moko te, kasi ya “mabele mobimba”​—Nzembo 47:2.

Na Biblia, nkombo mpenza ya Nzambe ezali Yehova. (Kobima 3:15; Nzembo 83:18) Euti na verbe moko ya Ebre oyo elimboli “kokóma,” mpe bato mingi ya mayele bamonisi ete nkombo yango elimboli “Akómisaka.” Ndimbola oyo eyokani mpenza na mokumba ya Yehova lokola Mozalisi mpe Mokokisi ya mokano na ye. (Yisaya 55:10, 11) Lisusu, Biblia esalisaka biso tóyeba bomoto ya Yehova, mingimingi bolingo, ezaleli na ye oyo eleki monene.​—Kobima 34:5-7; Luka 6:35; 1 Yoane 4:8.

Yehova ezali nkombo ya Nzambe na lingala, euti na balɛtrɛ minei ya Ebre יהוה (YHWH) oyo babengaka Tetragrami. Ndenge mpenza bazalaki kobenga nkombo ya Nzambe na Ebre eyebani te. Kasi, nkombo “Yehova” esalelamaka banda kala na lingala. Libongoli oyo William Tyndale abimisaki na 1530 * nde esalelaki nkombo ya Nzambe mpo na mbala ya liboso.

Mpo na nini ndenge bazalaki kobenga nkombo ya Nzambe na Ebre ya kala eyebani te?

Ebre ya kala ezalaki kokomama na milelisi (voyelles) te, kasi kaka na mileli (consonnes). Batángi ya Ebre bakokaki kotya milelisi oyo esengeli. Nzokande, ntango makomami ya Ebre (“Testama ya kala”) esilaki kokomama, Bayuda mosusu bakómaki na biyambayamba (superstitions), balobaki ete ezali mabe kotánga nkombo ya Nzambe. Soki batángi na mongongo makasi vɛrsɛ oyo ezali na nkombo ya Nzambe, na esika ya nkombo yango bazalaki kosalela batitre lokola “Nkolo” to “Nzambe.” Wana basiɛklɛ ezalaki koleka, biyambayamba yango epanzanaki mpe ndenge bazalaki kotánga nkombo ya Nzambe na ebandeli elimwaki. *

Bato mosusu bakanisaka ete nkombo ya Nzambe ezalaki kotángama “Yahweh,” basusu mpe bazalaki kotánga yango ndenge mosusu. Rulo ya Mbu Ekufá oyo ezalaki na eteni ya mokanda ya Balevi na Grɛki ebongolaki nkombo yango na Iaô. Bakomi ya Grɛki ya ebandeli mpe bamonisi ete ekoki mpe kotángama Iaê, Iabé mpe Iaoué, eloko moko te endimisi ete ezalaki kotángama bongo na Ebre ya kala. *

Makanisi ya libunga na oyo etali nkombo ya Nzambe na Biblia

Likanisi ya libunga: Mabongoli oyo esalelaka nkombo “Yehova” ekɔtisa nkombo yango kokɔtisa.

Likambo ya solo: Nkombo ya Nzambe na Ebre, Tetragrami emonanaka mbala soki 7 000 na Biblia. * Mabongoli mingi elongolaki na nko mpenza nkombo ya Nzambe mpe na esika na yango etyaki titre lokola “Nkolo.”

Likanisi ya libunga: Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki kozala na nkombo moko te.

Likambo ya solo: Nzambe ye moko atambwisaki bakomi ya Biblia básalela nkombo na ye mbala ebele, mpe asɛngaka baoyo basambelaka ye básalela nkombo na ye. (Yisaya 42:8; Yoele 2:32; Malaki 3:16; Baroma 10:13) Kutu, Nzambe apesaki etumbu na basakoli ya lokuta oyo balingaki ete bato bábosana nkombo na ye.​—Yirimia 23:27.

Likanisi ya libunga: Na kotalela mimeseno ya Bayuda, nkombo ya Nzambe esengelaki elongwa na Biblia.

Likambo ya solo: Ezali ya solo ete bakomeli mosusu ya Bayuda baboyaki kotánga nkombo ya Nzambe. Kasi, balongolaki yango te na bakopi ya Biblia oyo basalaki. Nzambe alingi te ete tólanda mimeseno ya bato oyo eyokani te na mibeko na ye.​—Matai 15:1-3.

Likanisi ya libunga: Tokoki kosalela nkombo ya Nzambe na Biblia te mpo ndenge ya kotánga yango na Ebre eyebani te.

Likambo ya solo: Likanisi oyo emonisi ete Nzambe asɛngaka bato oyo balobaka minɔkɔ ekeseni bátánga nkombo na ye kaka ndenge moko. Kasi, Biblia emonisi ete basambeli ya Nzambe ya kala oyo bazalaki koloba minɔkɔ ekeseni bazalaki kotánga nkombo ya Nzambe ndenge moko te.

Na ndakisa, tólobela Yosua mosambisi ya ekólo Yisraele. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki koloba Ebre bakokaki kotánga nkombo yango Yehoh·shuʹaʽ, kasi baoyo bazalaki koloba Grɛki bakokaki kotánga nkombo yango I·e·sousʹ. Biblia elobeli ndenge nkombo Yosua ebongolamaki na Grɛki, yango emonisi ete Bakristo balandaki ndenge oyo bankombo yango ezalaki kosalelama mingi na monɔkɔ na bango.​—Misala 7:45; Baebre 4:8.

Ezali mobeko oyo esengeli mpe kosalelama mpo na kobongola nkombo ya Nzambe. Likambo eleki ntina ezali ete ndenge ya malamu ya kotánga nkombo ya Nzambe ezongisami na esika na yango mpenza na Biblia.

^ par. 5 Tyndale asalelaki “Iehouah” na libongoli na ye ya mikanda mitano ya ebandeli ya Biblia. Na nsima monɔkɔ ya Lingelesi ebongwanaki, mpe bakómaki kosalela nkombo ya Nzambe ndenge bato bazalaki koloba na ntango wana. Na ndakisa, na mobu 1612, Henry Ainsworth asalelaki nkombo “Iehovah” na libongoli na ye mobimba ya mokanda ya Nzembo. Na nsima, na mobu 1639, ntango babimisaki yango lisusu basalelaki nkombo “Yehova.” Na 1901, babongoli oyo babimisaki Biblia oyo babengi American Standard Version, basalelaki nkombo “Yehova” bisika oyo nkombo ya Nzambe ezalaki na makomi ya Ebre.

^ par. 7 Buku moko (New Catholic Encyclopedia), oyo ebimaki mpo na mbala ya mibale, volimi 14 nkasa 883-884 elobi boye: “Ekoki mpe kozala ete ntango Bayuda bautaki na boombo, bakómaki kobanga kosalela nkombo Yahweh na esika na yango bakomaki kosalela nde batitre lokola ADONAI to ELOHIM.”

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Apɛndisi A4, “Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Ebre,” na Biblia–Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi to na Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe nkasa 1-5, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 11 Talá volimi 2 ya buku (Theological Lexicon of the Old Testament) nkasa 523-524.