Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yo nde elikya na ngai

Yo nde elikya na ngai

Zwá:

  1. 1. Lokola nzet’epikami,

    Maloba n’o, Nzambe,

    Ekɔteli nga mp’epesi kimy’a makanisi.

    Ata mbong’ebɛti nga,

    Bwanya ya Liloba n’o

    Ezali kolobela nga butu, moi: Yo,

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Kende; kobanga te.

    Kangamá n’o’Yehov’ateyi.

    (MONDIMO)

    Na bampasi, toli n’o

    Epesi nga nde mpiko.

    Mikolo nyonso, Yehova, yo’elikya na nga.

  2. 2. Ntango mokili’emeki nga,

    Natika nzela na yo,

    Naluki yo, nayebi’oza mosika te.

    Ebongi nazwa ntango​—

    Namanyola Liloba.

    Mpo toli n’ango’ekɔta nga mp’etinda nga: Yo

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Kende; kobanga te.

    Kangamá n’o’Yehov’ateyi.

    Talá Ye, mitungisi n’o te.

    Tyá miso na bilak’apesi.

    (MONDIMO)

    Na bampasi, toli n’o

    Epesi nga nde mpiko.

    Mikolo nyonso, Yehova, yo’elikya na nga​—

    Na nga.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Kende; kobanga te.

    Kangamá n’o’Yehov’ateyi.

    Talá Ye, mitungisi n’o te.

    Tyá miso na bilak’apesi.

    (MONDIMO)

    Na bampasi, toli n’o

    Epesi nga nde mpiko.

    Mikolo nyonso, Yehova, yo’elikya na nga.