Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tozali kokamwa misala na yo

Tozali kokamwa misala na yo

Zwá:

  1. 1. Makambo Bokonzi eza’ kosalela nga’:

    Epesi nga’ Liloba n’o, mateya ya solo.

    Moombo n’o ya sembo nde aza’ kongɛngisa

    Az’otinda babateli oyo balingi nga’.

    Solo, na mayangani, nde tokosepela.

    Mbala nyonso nalobaka, “Nanu ezala te!”

    Na makita naz’omona mposa n’o nabonga,

    Nayekola koteya mpe nazala molende.

    (MONDIMO)

    Misala n’o nsɔmɔ

    At’oyo Bokonzi’esali.

    Bokonzi n’o eya.

    Bizaleli n’o kitoko etongi kondima.

    Toz’ozela mapamboli Bokonzi’ekomema.

  2. 2. Toza’ na lokumu ya kosal’elongo n’o,

    Mosal’oy’ezolakisa tolingaka mpenza.

    Bososoli mpe kimya monene oy’opesi

    Eteyi nzela ya pɛto; bomot’oy’ebongi.

    Banzemb’oyo’ezolob’oyo’eza na motema,

    Boyekoli’a libota epesak’elimo n’o.

    Toza’ na bomoko, ata minɔkɔ’ekeseni,

    Bomoko na biso, eza’ epai mosusu te.

    (MONDIMO)

    Misala n’o nsɔmɔ

    At’oyo Bokonzi’esali.

    Bokonzi n’o eya.

    Bizaleli n’o kitoko etongi kondima.

    Toz’ozela mapamboli Bokonzi’ekomema.