Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Botondi mpo na biloko Nzambe akelá

Botondi mpo na biloko Nzambe akelá

Zwá:

  1. 1. Bafololo kitoko na bangomba,

    Mopɛp’ez’opɛpa bambote na nkasa,

    Pole ya moi euti mapata,

    Lokito’a mbula, ndɛkɛ, nyama​—

    (LIBOSO YA MONDIMO)

    Nyonso wana,

    Apesá ngai?

    Mpe nini mpenza

    Nazongisela ye?

    (MONDIMO)

    Kaka botondi,

    Koyebisa Yehova:

    Zwá matondi,

    Mpo na bolingo n’e.

    Namanyola,

    Nazwa ntango’a kobanz’oy’asalelá nga’.

    Pesá misala n’e motuya.

    Azwa matondi.

    Azwa matondi.

  2. 2. Langi kitoko otyá na mapata,

    Mayemi ya kitoko mpo miso’esepela!

    Makelel’ebale na butu ya kimya,

    Minzoto, sanza eza’ kongɛnga​—

    (LIBOSO YA MONDIMO)

    Nyonso wana,

    Apesi ngai?

    Nayebi’oy’ebongi

    Kozongisela ye.

    (MONDIMO)

    Kaka botondi,

    Koyebisa Yehova:

    Zwá matondi.

    Mpo na bolingo n’e.

    Namanyola,

    Nazwa ntango’a kobanz’oy’asalelá nga’.

    Zwá misala n’e na motuya.

    Azwa matondi.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Bolingo, bwanya, nguya n’o,

    Bolamu na yo’ebele,

    Namoni yango.

    Zwá matondi;

    Azwa matondi.

    (MONDIMO)

    Azwa matondi,

    Koyebisa Yehova:

    Zwá matondi.

    Mpo na bolingo n’e.

    Namanyola,

    Nazwa ntango’a kobanz’oy’asalelá nga’.

    Zwá misala n’e na motuya.

    Azwa matondi.

    Azwa matondi.

    Tópesa matondi.