Banzembo mosusu

Banzembo oyo maloba na yango ezali komonisa ete tozali kosepela na bozwi na biso ya elimo.

Nasepeli kosala mokano na yo (Loyembo ya liyangani ya 2025)

Yesu azalaki kotosa Nzambe na esengo. Lokola ye, biso mpe tozwaka esengo ntango tosalaka mokano ya Nzambe.

Pesá Yehova nkembo

Bolingo na biso mpo na Yehova mpe botɔndi mpo na makambo oyo asalelaka biso etindaka biso tópesa ye nkembo.

“Nsango malamu”! (Loyembo ya liyangani ya 2024)

Kobanda siɛklɛ ya liboso tii lelo oyo, ebele ya bato basakolaka nsango malamu na esengo. Na ndenge yango, bapesaka mabɔkɔ na mosala moko monene mpenza; mosala oyo Yesu ye moko atambwisaka. Lisusu, baanzelu basalisaka moto mokomoko oyo asalaka mosala yango.

Kimya ya solo

Yehova apesaka biso kimya ya solosolo; kimya ya seko.

Nazongi ndako

Porte ya ndako ekangami te, ndeko zongá ndako.

Tyá molende!

Tyelá Yehova motema mpe teyá kozanga kobanga.

Ayebi yo ná nga’

Yehova ayebi mokomoko na biso mpe ayebi ndenge oyo tomiyokaka.

Pesá ye!

Yehova asepelaka na oyo topesaka ye, ezala moke to mingi.

Na bomoko yembá!

Tozali na esengo oyo eutaka na kosalela Yehova.

Pusaná pene na nga’

Nzambe atyaka likebi na moto nyonso oyo alingi kopusana penepene na ye, ezala autá wapi.

Ekoleka te! (Loyembo ya liyangani ya 2023)

Landá ndakisa ya bato ya sembo wana ozali kozela Yehova na motema molai.

Luká paradi

Tokoki kozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

Zwá liteya

Soki ozwi liteya na libunga moko osali, yango ekokómisa yo makasi koleka.

Tózongisa boninga

Bótika matata nyonso na nsima mpe bózongela boninga na bino!

Yehova aza’ na ngai

Tokoki kolongola kobanga na lisalisi ya Yehova.

Nakokende wapi?

Salelá Yehova na bosembo bomoi na yo mobimba, yoká mongongo ya mobateli-mpate malamu.

Kimya ya solo! (Loyembo ya Liyangani ya 2022)

Kotya makanisi te na bampasi na yo kasi moná nde motema na elaka ya Nzambe ya kotya kimya ya solo.

Bomoko, makasi na biso!

Na lisalisi ya Yehova mpe ya bomoko ya bandeko na biso mokili mobimba, tokoki kolonga mikakatano nyonso.

Libota ya Yehova

Bato mingi na mokili bazali koluka solo. Video oyo ekolendisa yo okoba koluka bato ya ndenge wana.

Zwá ntango mpo na Yah

Kosala mingi mpo na Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu.

Ekoya

Sepelá na elikya ya bomoi ya seko.

Salelá Yah na makasi na yo

Salelá Yah na makasi n’o. Lifuti’ezali!

“Tósepela”

Nzembo moko ya esengo oyo ezali kokundwela biso bantina mingi oyo tosengeli kosepela.

Na Kondima . . .

Kanisá makambo kitoko Nzambe akosalela bato mosika te.

Tozali na bomoko

Ezala minyoko to bolozi nyonso, tozali na bomoko.

Zalá na kimya

Na lisalisi ya Yehova okoki kolonga makanisi mabe.

Oza’ wa nga’

Sepelá na likabo ya Yehova ya libala.

Tótika te

Kondima makasi etongamaka na bisaleli ya malamu mpe oyo ebongi.

Tókima mbangu ya bomoi

Yebá kozwa bikateli ya malamu mpo olonga na momekano ya mbangu ya bomoi.

Limbisá mpe bosaná

Moto moko alobaki na yo likambo moko oyo eyokisaki yo mpasi? Ozalaka na mokakatano ya kolimbisa mpe kobosana? Luká ndenge ya kolimbisa mpe kobosana.

Esengo ya seko

Yehova azali mpe akokoba kozala liziba na biso ya esengo.

Ndimelá Yah

Tosengeli kondima ete Yehova alingaka biso, atako tozali kokutana na mikakatano.

Lokola mwana ya moke

Ndenge nini tokoki komekola bana na likambo etali komonisela basusu bolingo?

Talelá ye

Ntango otungisami na makanisi, kobá kosɛnga Yehova apesa yo makasi mpe libɔndisi.

Napesi yo bomoi na ngai

Bolingo na biso mpo na Yehova nde etindaka biso tomipesá na ye mpe tozwa batisimo.

Bolingo ekosuka te

Bolingo ya Yehova ekosuka te. Epesaka biso esengo mpe ebɔndisaka biso.

Na mokili ya sika

Bilili oyo tomonaka ekoki kozala na bopusi likoló ya makanisi na biso. Nzembo oyo esalisi biso tótya makanisi na biso na mokili ya sika.

Yah aza’ ná yo mpe ná nga’

Yehova alingaka kosimba biso na loboko.

‘Bundá etumba mpo na kondima’

Atako tozali kokutana na mikakatano mpe botɛmɛli, kasi tokoki kotikala sembo epai ya Yehova.

Libota na yo nde biso

Ata tofandaka wapi, tozali bana ya libota ya Yehova.

Botondi mpo na biloko Nzambe akelá

Fandá mpe manyolá na biloko Nzambe asalá mpe pesá ye mersi na libondeli.

Zalá na mpiko mpe zalá na makasi

Nzembo kitoko oyo ezali kosalisa biso tózala na mpiko.

Tómitungisa te mpo na lobi

Tokoki kozala na kimya mpe na esengo atako mitungisi.

Nyonso nakoki kopesa

Ebongi mpenza tómipesa mobimba na Yehova mpe tóboma nzoto mpo na ye.

Na Yehova bomoko

Atako tozali na mokili oyo mabe, tozali na kimya mpe bolingo kati na bandeko.

Ngai nazali

Tango toza kobunda na makambo, tokoki kotya motema na baninga ya solosolo.

Pesá ngai mpiko

Yehova akopesa biso mpiko tólonga mikakatano nyonso oyo tozali na yango.

Baninga ya solo

Epai wapi tokozwa baninga ya solo?

Koluka

Baoyo balingi mpenza koyeba Nzambe mpe mikano na ye basengeli kosala makasi báluka ye.

Kobanga te

Ntango tokutani na mpasi, tóyeba ete tozali biso moko te.

Bolingo ya bondeko

Basaleli ya Yehova basunganaka koleka bato mosusu na mokili oyo.

Nazali ngai moko te

Lokola Yehova azali na biso, tozali biso moko te!

Sikoyo, naz’obongola makambo

Esí ekómelá yo osala mbongwana moko na mosala ya kosakola?

Nalangwe bolingo na yo

Soki bokɔtisi Yehova na libala na biso, ekokóma makasi!

Yo nde elikya na ngai

Kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe ekosalisa biso na ntango ya mikakatano.

Makambo ya ntina

Tóbomba ntango mpo na oyo eleki ntina​—kobondela, koyekola Biblia, kotosa Yehova.

Misala na yo ya kokamwa etindi ngai nayemba

Misala ya Yehova etikaka biso monɔkɔ polele mpe etindaka biso tóyembela ye.

Talá ngai

Lekisáká ntango mingi na bandeko na yo bakristo.

Esika oyo ekokumisa yo

Ezali lokumu kopesa ye esika oyo ekokumisa nkombo na ye monene.

Tótya motó

Tótya motó

Mwana na biso ya mwasi

Bambula ezali koleka, mpe tata azali komona ndenge mwana na ye mwasi azali kokola mpe komipesa na solo.

Tozali kokamwa misala na yo

Sepelá na libaku ozali na yango ya kosala elongo na Yehova!

Nakoki lisusu kotɛlɛma

Talá ndenge oyo mosaleli moko ya Yehova oyo azalaká molende ndenge azwi lisusu makasi ya kozonga na lisangá, epai akomona bolingo ya bandeko.

Nazali kotosa malako na yo

Na maloba mpe na misala, tólakisa ete tolingaka mpenza makundoli ya Yehova.

Kondima ekoki kosala makambo ya kokamwa

Esɛngaka milende mpo na kokóma na kondima ya makasi, kasi Yehova akopesa biso mbano soki tosali milende yango.

Kobongisa avenire na Yehova

Sepelisá Yehova mikolo nyonso na makambo ozali kopona.

Kanisá, bondelá

Tokoki kosala nini ntango tokutani na mikakatano?

Liloba na yo ekoumela seko

Tókumisa Nzambe ndenge abateli Liloba na ye mpo na biso!

Koyekola epesaka mpiko

Boyekoli ya Liloba ya Nzambe ekosalisa bilenge bákola malamu na elimo.

Yango oyo na miso

Kokanisa na paradiso oyo ezali koya ekosalisa biso tóyika mpiko.

Tólimbisanaka

Luká mabaku ya kolimbisaka basusu na bomoi na yo; ndenge wana nde okomekola Yehova.

Esika na ngai

Ndenge nini okoki kopona baninga malamu?

Topesi yo matondi

Yehova azali kopesa biso elimo santu na ye mpo na tókoka koyikela mikakatano na biso mpiko. Yango ez’otinda biso tópesa matondi na nzembo.

Tótika te koyamba bapaya

Na makambo nini okoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya?

Na mbangu te

Tokoki kobongisa mosala na biso ya kosakola mpe makambo mosusu ya bomoi soki tozali kokende mbangu te.

Koyekola monɔkɔ mosusu

Mapamboli nini okoki kozwa ntango ozali koyekola monɔkɔ mosusu?

Kolɛmba te

Kolɛmba te kokende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova!

Mawa, makambo oyo ezali koluka ezali te.