Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esika na ngai

Esika na ngai

Zwá:

  1. 1. Na motema, naz’olula

    Bilenge oyo namoni.

    Nayebi mibeko’a Nzambe;

    Nayebi esika na nga.

    Eza malamu nayeba

    Esik’oyo nakozala

    Esik’oyo nakokuta

    Baninga malamu mpenza.

    (MONDIMO)

    Motema na nga

    Endimi mpenza.

    Yo nde Yehova

    Osalisi nga

    Napon’esika na nga.

  2. 2. Kati na nga, ntemb’eza te;

    Naza n’esika ebongi.

    Natángaka Biblia mpe

    Etindi ngai namipesa.

    Mpe sikoyo, naz’omona

    Epai nakozwa baninga.

    Yango nde libota na nga;

    Likabo Yehov’apesi.

    (MONDIMO)

    Motema na nga

    Endimi mpenza.

    Yo nde Yehova

    Osalisi nga

    Napon’esika na nga.