Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nazali kotosa malako na yo

Nazali kotosa malako na yo

Zwá:

  1. 1. Miso molili! Natala wapi?

    Ntango mosusu ekoki kondimama.

    Ntina te nakim’ango to naboy’ango.

    Oh wapi nzela ebongi? Ememi wapi?

    Miso molili! Nayoka nani?

    Ekoki kobendela nga se makama

    Masɛnginy’oyo ekoki kokweisa

    Oyo nde nzela ebongi? Yehova, nga nabondeli.

    (MONDIMO)

    Natosi toli n’o, mpe nalingi yango.

    Nabombi yango, ntɔngɔ, butu, moi seko.

    Makamb’oyo natángi na buku n’o nde epesi mayele.

  2. 2. Nayebi’oy’olingi. Nalingi kotosa.

    Naboyi koyokisa moninga mawa,

    Kasi nayebi bato bakotyola nga.

    Nayebi nzela ebongi​—yango nde sekele.

    (MONDIMO)

    Natosi toli n’o, mpe nalingi yango.

    Epesi nga mpiko mpe efungoli miso.

    Makamb’oyo natángi na buku n’o nd’epesi mayele.

    (MONDIMO)

    Natosi toli n’o mpe nalingi yango.

    Epesi nga mpiko, mp’efungoli nga miso.

    Butu moi soki natángi ez’ongɛngisa.

    Nakoya pene na yo mpo nazwa yango.

    Makamb’oyo natángi na buku n’o nd’epesi mayele.