Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Mpo na nini bakristo bazwaka batisimo?

Mpo na nini bakristo bazwaka batisimo?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Batisimo ya bakristo elimboli nini?

Batisimo elimboli kosɛnga Nzambe ete tókóma na boyokani ya malamu elongo na ye. Yango wana, moto asengeli kozwa batisimo te ntango azali naino bebe, kasi nde ntango akoli mwa moke mpe akómi na likoki ya koyekola makambo ya Nzambe mpe ya kokóma moyekoli ya Yesu. (Misala 8:12; 1 Petro 3:21) Tokómaka bayekoli ya Yesu ntango tozali koyekola mpe kotosa makambo oyo asɛngaka.​—Tángá Matai 28:19, 20.

Na ntango ya bantoma ya Yesu, bato mingi babandaki koyekola makambo oyo etali Nzambe mpe Yesu kozanga kozela. Na ndakisa, ntango mobali moko ayekolaki ete liwa ya Yesu efungolaki nzela ya lobiko, mbala moko akómaki moyekoli ya Yesu. Lelo oyo, bato mingi ya mitema sembo baponi kokóma bayekoli ya Yesu.​—Tángá Misala 8:26-31, 35-38.

2. Mpo na nini Yesu azwaki batisimo?

Yesu azalaki na mbula soki 30 ntango Yoane Mobatisi abatisaki ye na Ebale Yordani. Batisimo ya Yesu emonisaki ekateli oyo azalaki na yango ya kosala mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na ye. (Baebre 10:7) Mokumba yango ezalaki kosɛnga mpe kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na masumu ya bato. Ata liboso ete Yesu atika likoló mpe aya awa na mabele, azalaki ntango nyonso kolinga mpe kotosa Tata na ye, Yehova.​—Tángá Marko 1:9-11; Yoane 8:29; 17:5.

3. Mpo na nini mokristo asengeli kozwa batisimo?

Biso tokeseni na Yesu, mpamba te biso tobotamaka bato ya masumu. Atako bongo, liwa oyo Yesu akufaki lokola mbeka epesi biso likoki ya kozala na boyokani malamu na Nzambe. (Baroma 5:10, 12; 12:1, 2) Sikoyo, tokómi na likoki ya kozala bato na ye mpe kozala bato ya libota na ye. (2 Bakorinti 6:18) Ndenge nini tozwaka libaku malamu wana? Na libondeli ya biso moko, tomipesaka epai ya Yehova, mpe tolapaka ndai ya kosala mokano na ye na bomoi na biso mobimba. Nsima ya komipesa ndenge wana, tomonisaka yango na miso ya bato ntango tozwaka batisimo.​—Tángá Matai 16:24; 1 Petro 4:2.

4. Ndenge nini okoki komibongisa mpo na kozwa batisimo?

Batatoli ya Yehova bayekolaka Biblia na moto nyonso oyo alingi kopusana penepene na Nzambe. Koyekola Biblia mpe koyangana na makita ya lisangá ekosalisa yo olinga Nzambe mingi mpe kondima na yo ekokóma makasi. Ekosalisa mpe yo okóma kotalela makambo na ndenge ya malamu mpe okóma na bizaleli ya malamu. Komonisa bolingo, kondima, mpe bizaleli mosusu oyo esepelisaka Nzambe ekosalisa yo okokisa ndai na yo ya kosalela Yehova libela na libela.​—Tángá Yoane 17:3; Baebre 10:24, 25.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 18 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.