Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Yesu Kristo azali nani?

Yesu Kristo azali nani?

Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.

1. Yesu Kristo azali nani?

Na bokeseni na moto nyonso, Yesu azalaki na bomoi na likoló lokola ekelamu ya elimo liboso abotama awa na mabele. (Yoane 8:23) Azalaki ekelamu ya liboso oyo Nzambe akelaki, mpe asalisaki mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso. Kaka ye nde akelamaki mbala moko na Yehova mpe na ndenge yango abengami “mwana se moko [ya Nzambe] oyo abotamaki.” Yesu asalaki lokola molobeli ya Nzambe, na yango abengami mpe “Liloba.”​—Yoane 1:1-3, 14; tángá Masese 8:22, 23, 30; Bakolose 1:15, 16.

2. Mpo na nini Yesu ayaki awa na mabele?

Nzambe atindaki mwana na ye awa na mabele na ndenge alongolaki bomoi na ye na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya Maria, mwasi moko Moyuda oyo ayebaki naino mibali te. Na yango, Yesu azalaki na tata ya mosuni te. (Luka 1:30-35) Yesu ayaki na mabele (1) mpo na koteya solo na ntina na Nzambe, (2) mpo na kopesa ndakisa ya kosala mokano ya Nzambe, mpe (3) mpo na kopesa bomoi na ye ya kokoka lokola “lisiko.”​—Tángá Matai 20:28; Yoane 18:37.

3. Mpo na nini tozali na mposa ya lisiko?

Lisiko ezali motuya oyo efutami mpo na kosikola mokangami. Ntango Nzambe akelaki bato, mokano na ye ezalaki te ete bato bakóma mibange mpe bakufaka. Ndenge nini toyebi yango? Nzambe ayebisaki Adama, mobali ya liboso ete soki asali lisumu akokufa. Soki Adama asalaka lisumu te, alingaki kokufa te. Atako Adama akufaki nde basiɛklɛ mingi na nsima, kasi abandaki kokufa bandá na mokolo oyo azangaki botosi epai ya Nzambe. (Ebandeli 2:16, 17; 5:5) Adama atikelaki bana na ye nyonso lisumu mpe etumbu na yango, liwa. Na yango, liwa “ekɔtaki” na mokili mpo na Adama. Yango nde ntina oyo tozali na mposa ya lisiko.​—Tángá Baroma 5:12; 6:23.

4. Mpo na nini Yesu akufaki?

Nani akokaki kofuta lisiko mpo na kosikola biso na liwa? Ntango tokufaka, tofutaka nyongo ya etumbu kaka ya masumu na biso moko. Moto moko te ya kozanga kokoka akoki kofuta nyongo ya masumu ya bato mosusu.​—Tángá Nzembo 49:7-9.

Lokola Yesu asangolaki te ezaleli ya kozanga kokoka ya tata ya mosuni, akufaki te mpo na masumu na ye moko, kasi mpo na masumu ya bato mosusu. Nzambe atindaki mwana na ye aya kokufa mpo na biso, mpo na komonisa bolingo monene oyo azali na yango mpo na bato. Yesu amonisaki mpe bolingo epai na biso na ndenge atosaki tata na ye mpe apesaki bomoi na ye mpo na masumu na biso.​—Tángá Yoane 3:16; Baroma 5:18, 19.

5. Yesu azali kosala nini sikoyo?

Ndenge abikisaki bato ya maladi, asekwisaki bakufi, mpe apesaki bomoi na ye mpo na kosikola bato na lisumu mpe liwa, Yesu amonisaki oyo akosala mpo na bato nyonso ya botosi. (Luka 18:35-42; Yoane 5:28, 29) Nsima ya kokufa ya Yesu, Nzambe azongisaki ye na bomoi lokola ekelamu ya elimo. (1 Petro 3:18) Na nsima, Yesu azelaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe kino Yehova apesaki ye nguya ya koyangela lokola Mokonzi na mabele mobimba. (Baebre 10:12, 13) Sikoyo, Yesu azali koyangela lokola Mokonzi na likoló, mpe bayekoli na ye awa na mabele bazali kosakola nsango malamu na mokili mobimba.​—Tángá Danyele 7:13, 14; Matai 24:14.

Mosika te, Yesu akosalela nguya na ye ya Mokonzi mpo na kosukisa mpasi nyonso mpe baoyo babimisaka mpasi yango. Bamilio ya bato oyo bazali komonisa kondima epai ya Yesu mpe kotosa ye bakozala na bomoi na paradiso awa na mabele.​—Tángá Nzembo 37:9-11.

Bamilio ya bato oyo bazali komonisa kondima epai ya Yesu mpe kotosa ye bakozala na bomoi na paradiso awa na mabele