Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe ayebaki ete Adama ná Eva bakosala lisumu?

Nzambe ayebaki ete Adama ná Eva bakosala lisumu?

Nzambe ayebaki ete Adama ná Eva bakosala lisumu?

BATO mingi balingaka mpenza kozwa eyano na motuna wana. Ntango bato balukaka koyeba ntina oyo Nzambe apesaki nzela na mabe, likambo ya liboso oyo balobelaka ezali lisumu ya mwasi ná mobali ya liboso. Likanisi oyo ete ‘Nzambe ayebi makambo nyonso’ ekoki na pɛtɛɛ nyonso kotinda basusu báloba ete Nzambe ayebaki liboso ete Adama ná Eva bakotosa ye te.

Soki Nzambe ayebaki ete mwasi wana ná mobali na ye oyo bazalaki bato ya kokoka bakosala lisumu, yango elingaki kolimbola nini? Likanisi ya ndenge wana elingaki komonisa ete Nzambe azalaka na bizaleli mingi ya mabe. Elingaki komonana lokola nde Nzambe azalaka na bolingo te, azangi bosembo, mpe azali lokuta. Bamosusu bakokaki koloba ete azali moto mabe mpenza ndenge atikaki bato yango ya liboso na likambo moko oyo ayebaki liboso ete ekosukela bango mabe. Nzambe alingaki kozala mobandisi​—to kopesa mabɔkɔ—​mpo na mabe nyonso mpe bampasi oyo eyaki na nsima. Mpo na bato mosusu, Mozalisi na biso akokaki kutu komonana zoba.

Ndenge Makomami emonisi yango, Yehova Nzambe azali ndenge wana? Mpo na kopesa eyano, tiká tótalela oyo Biblia elobi na ntina na misala ya Yehova mpe bizaleli na ye.

“Ezalaki malamu mingi”

Na oyo etali biloko oyo Nzambe akelá, ata mpe bato ya liboso oyo bazalaki awa na mabele, mokanda ya Ebandeli elobi boye: “Nzambe amonaki eloko nyonso oyo asalaki mpe, talá! ezalaki malamu mingi.” (Ebandeli 1:31) Adama ná Eva bakelamaki na ndenge ya kokoka, babongaki mpenza na esika na bango na mabele. Eloko moko ezangaki te na ndenge oyo bakelamaki. Bakelamaki “malamu mingi,” na ntembe te bazalaki na likoki ya komitambwisa malamu ndenge Nzambe asɛngaki bango. Bakelamaki “na elilingi ya Nzambe.” (Ebandeli 1:27) Na yango, bazalaki na likoki ya komonisa na ndenge ebongi bizaleli ya Nzambe lokola bwanya, bolingo ya sembo, bosembo, mpe bolamu. Komonisa bizaleli ya ndenge wana elingaki kosalisa bango bázwa bikateli oyo ekozala mpo na litomba na bango mpe ekosepelisa Tata na bango ya likoló.

Yehova apesaki bato yango ya kokoka bonsomi ya kopona. Na yango, mpo na kotosa Nzambe, bakelamaki te lokola barobo, elingi koloba bamasini oyo batindikaka kotindika. Kanisá naino. Kado nini okosepela na yango​—oyo epesami na kotindikama to oyo moto apesi na bolingo na ye moko? Eyano na motuna yango ezali polele. Ndenge moko mpe, soki Adama ná Eva baponaki bango moko kotosa Nzambe, botosi na bango elingaki kozala na valɛrɛ mingi epai ya Nzambe. Likoki oyo bazalaki na yango ya kopona esengelaki kosalisa mwasi yango ná mobali ya liboso bátosa Yehova na bolingo na bango moko.​—Kolimbola Mibeko 30:19, 20.

Boyengebene, bosembo mpe bolamu

Biblia emonisi biso bizaleli ya Yehova. Bizaleli yango epesaka nzela te ete asala likambo oyo ezali lisumu. Nzembo 33:5 emonisi ete, Yehova “alingaka boyengebene mpe bosembo.” Na yango, Yakobo 1:13, elobi boye: “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” Na bosembo mpe na boboto, Nzambe akebisaki Adama boye: “Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:16, 17) Nzambe apesaki mwasi ná mobali ya liboso libaku ya kopona: bomoi ya seko to liwa. Nzambe alingaki kozala sembo, kokebisa bango na lisumu moko oyo ye ayebaki liboso ete ekosukela bango mabe? Lokola “alingaka boyengebene mpe bosembo,” Yehova alingaki te kopesa bango libaku ya kopona eloko moko oyo ye ayebaki ete ezali te.

Yehova azali mpe na bolamu mingi. (Nzembo 31:19) Mpo na kolobela bolamu ya Nzambe, Yesu alobaki boye: “Moto nani na kati na bino oyo soki mwana na ye asɛngi mampa​—akopesa ye libanga? To, mbala mosusu soki asɛngi mbisi—​akopesa ye nyoka? Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye biloko ya malamu koleka?” (Matai 7:9-11) Nzambe apesaka bikelamu na ye “biloko ya malamu koleka.” Ndenge oyo bato bakelamá mpe ndenge oyo Paradiso ebongisamaki mpo na bango, emonisi bolamu ya Nzambe. Moyangeli ya malamu bongo alingaki te kobima mabe mingi, kopesa esika moko ya kitoko oyo ayebaki ete ekobeba? Te, Mokeli na biso oyo azali na boyengebene mpe malamu azali na ngambo te mpo na botomboki ya bato.

“Kaka ye moko nde azali moto ya bwanya”

Makomami emonisi mpe ete, ‘kaka Yehova nde azali moto ya bwanya.’ (Baroma 16:27) Baanzelu ya Nzambe bamonaki makambo mingi oyo emonisaki bwanya monene ya Nzambe. Babandaki “koganga na esengo” ntango Yehova azalaki kozalisa biloko awa na mabele. (Yobo 38:4-7) Na ntembe te, bikelamu wana ya elimo, balandaki na likebi nyonso makambo oyo elekaki na elanga ya Edene. Na yango, elingaki kozala malamu ete Nzambe ya bwanya, nsima ya kozalisa molɔ́ngɔ́ ya kokamwa mpe kosala biloko ebele mpe ya kitoko awa na mabele, azalisa bikelamu mibale na miso ya baanzelu na ye, oyo ye ayebaki ete bakobeba? Ya solo, kobongisa likambo ya ndenge wana elingaki kozala bwanya te.

Kasi, bato mosusu bakoki koloba boye: ‘Kasi, ndenge nini Nzambe ya bwanya nyonso akokaki te koyeba likambo yango?’ Ya solo, bwanya monene ya Yehova emonanaka mpe na likoki na ye ya koyeba ‘banda na ebandeli ndenge makambo ekosuka.’ (Yisaya 46:9, 10) Nzokande, ezalaka na ntina te asalela likoki yango, ndenge kaka asalelaka ntango nyonso te nguya na ye nyonso. Yehova aponaka na bwanya nyonso ntango oyo akoki kosalela likoki na ye ya koyeba makambo liboso. Asalelaka yango ntango esengeli mpenza asala bongo mpe ntango ebongi mpenza kosala yango.

Mpo na kokanga ntina ya ndenge oyo Nzambe amipekisaka kosalela likoki na ye ya koyeba makambo liboso, tózwa ndakisa ya eloko moko oyo bato ya tekinoloji basali. Moto oyo azali kotala lisano ya ndembo oyo batye na CD, akoki kopona kotala liboso baminiti ya nsuka ya lisano yango mpo ayeba ndenge esukaki. Kasi asɛngisami te kobanda kotala lisano yango ndenge wana. Nani akotyola ye soki aponi kotala lisano yango mobimba banda na ebandeli? Ndenge moko mpe, emonani ete Mozalisi na biso aponaka te kotala liboso ndenge “likambo ekosuka.” Kasi, aponaki kozela mpe komona ndenge makambo ezalaki kokende, aponaki komona ndenge bana na ye awa na mabele bakomitambwisa.

Ndenge tolobelaki yango liboso, na bwanya na ye, Yehova akelaki te bato ya liboso lokola barobo, oyo basalaka kaka makambo oyo batyelá bango básalaka. Kasi, na bolingo nyonso, apesaki bango bonsomi ya kopona. Soki baponaki nzela ya malamu, balingaki komonisa bolingo, botɔndi, mpe botosi mpe na ndenge yango komibakisela esengo mpe kosepelisa Yehova, Tata na bango ya likoló.​—Masese 27:11; Yisaya 48:18.

Makomami emonisi ete na mabaku mingi, Nzambe asalelaki te likoki na ye ya koyeba makambo liboso. Na ndakisa, ntango etikalaki moke, Abrahama moto ya sembo apesa mwana na ye mbeka, Yehova alobaki na ye boye: “Sikoyo nayebi ete obangaka Nzambe na ndenge oboyeli ngai mwana na yo te, mwana na yo kaka moko.” (Ebandeli 22:12) Epai mosusu, ezali mpe na mabaku mosusu oyo Nzambe ‘ayokaki motema mpasi’ mpo na etamboli ya bato mosusu. Alingaki koyoka mpasi ndenge wana soki ayebaki banda kala oyo bato yango balingaki kosala?​—Nzembo 78:40, 41; 1 Bakonzi 11:9, 10.

Na yango, ebongi mpenza koloba ete Nzambe ya bwanya nyonso asalelaki te likoki na ye ya koyeba makambo liboso, mpo na koyeba ete bato ya liboso bakosala lisumu. Azalaki zoba te mpo na kokela bato mpe kotika nzela na makambo ya mabe oyo ayebaki na nzela ya likoki na ye ya koyeba makambo liboso ete ekosalema.

“Nzambe azali bolingo”

Satana, monguna ya Nzambe abandisaki botomboki na Edene oyo ebimisaki makambo mingi ya mabe, ata mpe lisumu mpe liwa. Na yango, Satana azali “mobomi-bato.” Amonanaki mpe ete azali “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Lokola atikaka bamposa mabe etambwisa ye, alukaka komonisa ete Mozalisi na biso ya bolingo azali mabe. Mposa na ye ezalaka ete Yehova azwa foti mpo na lisumu oyo moto asalaki.

Bolingo nde etindaki mpenza Yehova apona te koyeba liboso soki Adama ná Eva bakosala lisumu. Bolingo ezali ezaleli monene ya Nzambe. 1 Yoane 4:8 elobi ete “Nzambe azali bolingo.” Bolingo elukaka bolamu kasi mabe te. Elukaka malamu oyo basusu bazali na yango. Ya solo, bolingo etindaki Yehova Nzambe aluka oyo ezalaki malamu koleka mpo na mwasi ná mobali ya liboso.

Atako bana ya Nzambe awa na mabele bazalaki na likoki ya kopona likambo ya mabe, Nzambe na biso ya bolingo azalaki komona te ete bakolonga te to kokanisela bikelamu na ye ya kokoka mabe. Apesaki bango nyonso oyo bazalaki na yango mposa na bomoi mpe ayebisaki bango makambo nyonso oyo basengelaki koyeba. Ebongaki mpenza Nzambe azela ete bátosa ye na bolingo na bango moko, kasi te bátombokela ye. Ayebaki ete Adama ná Eva bazalaki na likoki ya kosala makambo na bosembo, ndenge bato ya kozanga kokoka na ndakisa Abrahama, Yobo, Danyele mpe bato mosusu basalaki yango na nsima.

Yesu alobaki ete: “Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.” (Matai 19:26) Yango ezali kobɔndisa. Bolingo ya Yehova, mpe bizaleli na ye mosusu ya minene lokola bosembo, bwanya, mpe nguya, endimisi biso ete na ntango oyo ebongi akoki mpe akolongola mabe nyonso ya lisumu mpe liwa.​—Emoniseli 21:3-5.

Emonani polele ete Yehova ayebaki te liboso ete mwasi ná mobali ya liboso, bakosala lisumu. Atako ayokaki mpasi na motema mpo na kozanga botosi ya moto mpe mpasi oyo yango ebimisaki, Nzambe ayebaki ete likambo yango oyo ezali kaka mpo na mwa ntango ekopekisa ye te kokokisa mokano na ye ya seko mpo na mabele mpe mpo na bato. Mpo na nini te koyeba makambo mingi na ntina na mokano yango mpe ndenge oyo okoki kozwela yango matomba ntango ekokokisama? *

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 23 Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na mokano ya Nzambe mpo na mabele, talá mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Yehova akelaki te mwasi ná mobali ya liboso lokola barobo, oyo batyá bango makambo nyonso oyo basengeli kosala

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]

Nzambe ayebaki ete Adama ná Eva bazalaki na likoki ya kosala makambo na bosembo