Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasepelaka kolekisa ntango elongo na bilenge ya lingomba na biso

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nalingaki lisano ya Baseball koleka eloko nyonso!

Nalingaki lisano ya Baseball koleka eloko nyonso!
  • ABOTAMÁ NA: 1928

  • EKÓLO: COSTA RICA

  • BOMOI NA YE YA KALA: AMIPESAKI MOBIMBA NA LISANO YA BASEBALL MPE MASANO YA MBONGO

NDENGE NAZALAKI

Nakolá na Puerto Limón, mwa engumba moko oyo ezali pene ya libongo na ɛsti ya Costa Rica mpe na bamboka oyo ezali pembeni na yango. Babotá biso mwambe, ngai nazali mwana ya nsambo. Papa akufaki ntango nazalaki na mbula mwambe. Na nsima mama abɔkɔlaki biso ye moko.

Namipesaki mingi na lisano ya Baseball. Nazalaki kosepela na masano ntango nazalaki mwana. Ntango nazalaki na mbula soki 18, nakɔtaki na ekipi moko ya kartye. Na mbula koleka mwa moke 20, ntango nazalaki kobɛta na ekipi yango, moto moko oyo azalaki kolandela ndenge tozalaki kobɛta asɛngaki ngai nakóma kobɛta na ekipi ya monene na Nicaragua. Kasi lokola mama azalaki kobɛla mpe nazalaki kokɛngɛla ye, naboyaki kokende kofanda na Nicaragua. Yango wana naboyaki likambo ayebisaki ngai. Na nsima, moto mosusu mpe asɛngaki ngai nakóma kobɛta na ekipi ya monene ya ekólo Costa Rica, oyo esangisaki basani oyo baponaki na baekipi mikemike ya Costa Rica. Na mbala oyo, nandimaki kobɛta na ekipi yango. Nabɛtaki na ekipi ya ekólo kobanda 1949 tii 1952, tokendaki mpe kobɛta masano yango na Cuba, Mexique mpe Nicaragua. Nazalaki mobɛti monene mpe nazalaki kobɛta malamu, nakokaki kutu kobɛta lisano yango tii mbala 17 kozanga nasala ata libunga moko. Nazalaki kosepela ntango bato bazalaki kobelela nkombo na ngai!

Likambo ya mawa, nazalaki mpe na bomoi ya mabe. Atako nazalaki kaka na likango moko, nazalaki ntango nyonso kozwa basi mosusu. Nazalaki mpe komɛla mingi. Mokolo moko namɛlaki mingi mpenza ntango nalamukaki mokolo oyo elandaki, nayebaki kutu te soki nakómaki na ndako ndenge nini! Nazalaki mpe kobɛta masano babengi domino mpe loteri.

Mama akómaki Motatoli ya Yehova ntango nazalaki na bomoi ya bongo. Azalaki koteya ngai makambo azalaki koyekola, kasi na ebandeli alongaki ngai te mpo namipesaki mobimba na lisano ya Baseball. Nazalaki kutu kokipe nzala te ntango nazalaki komekameka lisano yango! Makanisi na ngai nyonso ezalaki kaka na lisano yango. Nalingaki lisano ya Baseball koleka eloko nyonso!

Kasi, na mbula 29 nazokaki mabe na lisano moko ntango nazalaki koluka kokanga bale. Ntango nabikaki, natikaki kobɛta na ekipi ya monene. Atako bongo, esika nazalaki kofanda nakómaki kolakisa bato na baekipi ya mike ndenge ya kobɛta lisano yango.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

Na 1957, nandimaki kokende na liyangani ya Batatoli ya Yehova na stade oyo nazalaki kobɛta Baseball. Na liyangani yango namonaki ete bizaleli ya Batatoli ya Yehova ekesanaki mpenza na bizaleli ya baoyo bazalaki koya kotala lisano na biso. Makambo oyo namonaki etindaki ngai nandima Batatoli ya Yehova báyekola na ngai Biblia mpe nakómaki koyangana na makita na bango.

Mateya mingi oyo nayekolaki na Biblia ekamwisaki ngai. Na ndakisa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete na mikolo ya nsuka, bakosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba. (Matai 24:14) Nayekolaki mpe ete Bakristo ya solo basalaka mosala na bango te mpo na koluka mbongo. Yesu alobaki boye: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:8.

Ntango nazalaki koyekola Biblia, nazalaki kokokanisa makambo oyo Biblia eteyaka na oyo Batatoli ya Yehova basalaka. Ndenge bazalaki koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba kozanga kolɛmba, ezalaki kosepelisa ngai. Namonaki ete bamipesaka mpenza ndenge Yesu asɛngaki bakristo básala. Yango wana, ntango natángaki Marko 10:21 mpe namonaki maloba oyo ya Yesu: “Yaká, landá ngai,” nasepelaki kokóma Motatoli ya Yehova.

Kasi ezwaki ngai ntango mpo nakokisa mposa yango. Na ndakisa, na boumeli ya bambula mingi, nakobaki kobɛta pɔsɔ nyonso lisano ya loteri ya ekólo, kobɛta nimero na ngai oyo ezalaki kosala ete nalonga. Kasi nayekolaki na Biblia ete Nzambe aboyaka bato oyo basambelaka “nzambe ya makila malamu,” aboyaka mpe bato ya lokoso. (Yisaya 65:11; Bakolose 3:5) Yango wana nazwaki ekateli ya kotika kobɛta masano yango. Mokolo ya lomingo ya nsuka oyo natikaki kobɛta loteri yango nimero na ngai wana elongaki! Bato basɛkaki ngai mpo nabɛtaki te pɔsɔ wana mpe batyaki ngai mbamba nabɛta lisusu kasi naboyaki. Natikaki mpenza kobɛta masano ya mbongo.

Kolata bomoto ya sika ezalaki mokakatano mosusu oyo nakutanaki na yango mokolo mpenza oyo nazwaki batisimo na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. (Baefese 4:24) Na mpokwa wana, nazongaki na otɛlɛ oyo nazalaki kofanda mpe nakutaki mwana-mwasi oyo tozalaki kobima na ye liboso ya porte na ngai. Ayebisaki ngai boye: “Boni boye Sammy, yaká naino tósepelisa nzoto!” Mbala moko nayebisaki ye, “Te!” Nalobaki na ye ete sikoyo nakómi kotosa mibeko ya Biblia. (1 Bakorinti 6:18) Alobaki na ngai “olingi kolakisa ngai nini?” Mpe atyolaki likanisi ya Biblia na likambo etali kosangisa nzoto mpe atyaki ngai mbamba tózongela bolingo na biso. Kasi nakɔtaki na shambre mpe nakangaki porte. Lelo oyo nazali na esengo ya koloba ete banda nakómá Motatoli ya Yehova na 1958, natikalá lisusu kozongela te bomoi na ngai wana ya kala.

MATOMBA OYO NAZWI

Nazali komiyoka lokola nakoki kokoma buku mpo na kolobela matomba oyo nazwi ndenge nasaleli batoli ya Biblia! Mwa ndambo ya matomba yango ezali ete sikoyo nazali na baninga ya solosolo, nazali na bomoi ya ntina mpe na esengo ya solosolo.

Tii lelo nasepelaka na lisano ya Baseball, kasi sikoyo nayebi nini nasengeli kotya na esika liboso. Na Baseball nazwaki lokumu mpe mbongo, kasi ezalaki kaka ya ntango mokuse. Kasi boyokani na ngai na Nzambe mpe libota ya bandeko oyo nazwá, ekoumela mpo na libela. Biblia elobi: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Sikoyo nalingaka Yehova mpe bato na ye koleka eloko nyonso!