Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nazalaki nkandankanda mpe mobulu

Nazalaki nkandankanda mpe mobulu
  • ABOTAMAKI NA: 1974

  • EKÓLO: MEXIQUE

  • BOMOI NA YE YA KALA: ELENGE YA MOBULU MPE KOBUNDA NA BALABALA

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na engumba Ciudad Mante, esika moko kitoko na etúká ya Tamaulipas na Mexique. Bato mingi ya engumba yango bakabaka mpe bazalaka boboto. Kasi likambo ya mawa, bato ya mobulu bakómisaki esika yango likama mpenza.

Babotá biso mibali minei, ngai mwana ya mibale. Baboti na ngai batindaki ngai nazwa batisimo na Katolike mpe na nsima nakómaki koyemba na korale ya parwasi na biso. Nazalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe mpo nazalaki kobanga asambisa mpe abwaka ngai na mɔtɔ ya libela na lifelo.

Ntango nakokisaki mbula mitano, tata asundolaki biso. Yango esalaki ngai mpasi makasi na motema. Nazalaki komituna mpo na nini asundolaki biso atako tozalaki kolinga ye mingi. Esɛngaki mama alekisaka bangonga ebele na mosala mpo na koleisa biso.

Lokola mama azalaki kofanda na ndako te, nakómaki kokima kelasi mpo nalekisa ntango na bana oyo bazalaki mikóló. Balakisaki ngai kofinga, komɛla makaya, koyiba mpe kobunda na makofi. Lokola nazalaki kosepela bato bábangaka ngai, nayekolaki lisano ya makofi, libanda mpe masano mosusu ya bitumba mpe ndenge ya kosalela bibundeli. Nakómaki mobulu mpenza. Mbala mingi tozalaki kobunda na mindoki mpe mbala mingi nazalaki kokóma nzoto makila makila mpe kotikala lokola ebembe na nzela. Nazalaki kopesa mama mpasi na motema ntango azalaki kokuta ngai ndenge wana mpe azalaki komema ngai mbangu na lopitalo!

Ntango nakokisaki mbula 16, Jorge, moninga moko ya bomwana ayaki kotala biso na ndako. Ayebisaki biso ete azalaki Motatoli ya Yehova mpe azalaki na nsango moko malamu ya koyebisa biso. Asalelaki Biblia mpo na kolimbolela biso mateya oyo andimaka. Natángá yango naino te liboso mpe nasepelaki mpenza ntango nayebaki nkombo ya Nzambe mpe mokano na ye. Jorge atunaki soki tokosepela ayekola na biso Biblia mpe tondimaki.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Motema ekitaki ntango nayebaki ete Biblia eteyaka te ete bato mabe bazikaka na mɔtɔ ya lifelo. (Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5) Ntango nayebaki yango, nazalaki lisusu te kobanga Nzambe na ndenge ya mabe. Kutu, nakómaki komona ete azali Tata ya bolingo oyo alingaka bolamu ya bana na ye.

Ntango boyebi na ngai ya Biblia ekómaki kobakisama, namonaki ete nasengeli kobongola bomoto na ngai. Esɛngaki nakóma na komikitisa mpe natika bitumba. Toli oyo ezali na 1 Bakorinti 15:33 esalisaki ngai; elobi boye: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” Namonaki ete soki nalingi kobongola bomoto na ngai, nasengeli kotika baninga mabe. Yango wana, nazwaki baninga ya sika na lisangá ya Batatoli ya Yehova; bato oyo babongisaka matata na bango na makofi te kasi nde na kosalela toli ya Biblia.

Vɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo esalisaki ngai ezali Baroma 12:17-19. Elobi boye: “Bózongisela moto mabe na mabe te. . . . Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso. . . . Moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te, . . . mpo ekomamá ete: ‘“Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe,” Yehova alobi bongo.’” Nakómaki kondima ete Yehova akosambisa makambo ya kozanga bosembo na ndenge na ye mpe na ntango oyo alingi. Mokemoke, natikaki ezaleli na ngai ya mobulu.

Nakobosana te likambo oyo esalemaki mokolo moko na mpokwa ntango nazalaki kozonga na ndako. Etuluku mosusu ya bilenge ya mobulu oyo tozalaki koyokana na bango te bayaki kobundisa ngai mpe mokonzi na bango abɛtaki ngai na mokɔngɔ mpe agangaki “soki ozali mobali bundá!” Na ntango yango, nasalaki libondeli ya mokuse epai ya Yehova, nasɛngaki ye asalisa ngai nakanga motema. Atako nayokaki mposa makasi ya kozongisela bango mabe, natikaki kaka. Mokolo oyo elandaki, tokutanaki na mokonzi ya etuluku yango ye moko. Nayokaki mposa mpenza ya kozongisa mabe kasi na mbala oyo mpe nabondelaki Yehova na nse ya motema asalisa ngai namipekisa. Likambo ya kokamwa, elenge yango ayaki liboso na ngai mpe alobaki boye: “Limbisá ngai mpo na oyo elekaki lobi na mpokwa. Nazali nde na mposa nakóma lokola yo. Nazali na mposa ya koyekola Biblia.” Esalaki ngai esengo ndenge napekisaki nkanda na ngai! Yango nde esalaki ete nayekola ná ye Biblia.

Likambo ya mawa, na libota mobimba, moto moko te akobaki koyekola Biblia na ntango wana. Ata bongo, nazwaki ekateli ya kokoba koyekola Biblia mpe kotika nzela te ete moto to eloko moko ezongisa ngai nsima. Nayebaki ete koyanganaka na basaleli ya Nzambe ekozipa bampota na ngai ya motema mpe ekosala ete nazwa libota oyo nasengeli na yango. Nakobaki kokende liboso mpe na 1991, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nazalaki motema mabe, koluka ete bato bábangaka ngai mpe mobulu. Kasi Liloba ya Nzambe ebongolá mpenza bomoi na ngai. Lelo oyo, nateyaka nsango ya kimya oyo ezali na Biblia epai ya moto nyonso oyo asepeli koyoka yango. Nalekisaki bangonga ebele sanza nyonso na mosala ya koteya nsango malamu na boumeli ya bambula 23 oyo eleki.

Nasalaki mpe mpo na mwa ntango na biro ya Batatoli ya Yehova na Mexique. Kuna nde nakutanaki na Claudia, elenge mwasi mokristo ya molende mpe tobalanaki na 1999. Napesaka mpenza Yehova matɔndi ndenge apesá ngai lipamboli ya kozala na mwasi ya sembo bongo!

Ngai ná ye topesaki mabɔkɔ na kosalisa bababa báyekola makambo ya Yehova na lisangá ya elobeli ya bajɛstɛ. Na nsima, batindaki biso na Bélize mpo na koteya bato Biblia na ekólo yango. Atako tozali na biloko ebeleebele te awa, tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala na esengo. Tokoki kokokanisa yango na eloko mosusu te.

Nsima ya bambula, mama azongelaki koyekola Biblia mpe azwaki batisimo. Yaya na ngai ná mwasi na ye mpe bana na bango bazali sikoyo Batatoli ya Yehova. Baninga na ngai mosusu oyo nateyaki bango nsango ya Bokonzi bazali mpe kosalela Yehova lelo oyo.

Likambo ya mawa, bato mosusu ya libota na ngai bakufá mpo batikaki te ezaleli na bango ya nkandankanda. Soki ngai mpe nalandaka bango, mbɛlɛ nakufá lokola bango. Napesaka Yehova mersi ndenge abendá ngai epai na ye mpe epai ya basambeli na ye oyo bateyaki ngai na motema molai mpe na boboto ndenge ya kosalela toli ya Biblia na bomoi na ngai.