Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 117

Bilei ya mpokwa ya Nkolo

Bilei ya mpokwa ya Nkolo

MATAI 26:21-29 MARKO 14:18-25 LUKA 22:19-23 YOANE 13:18-30

  • YUDASI AZALI MOTƐKI

  • YESU ABANDISI EKANISELI

Mwa liboso, na mpokwa yango, Yesu ateyaki bantoma na ye komikitisa na ndenge asukolaki bango makolo. Bongo, nsima ya Elekeli, ntango mosusu alobeli esakweli ya Davidi oyo elobi ete: “Moto oyo azalaki na kimya elongo na ngai, oyo natyelaki motema, oyo azalaki kolya limpa na ngai, atomboleli ngai litindi na ye.” Na nsima alimboli: “Moko na bino akotɛka ngai.”​—Nzembo 41:9; Yoane 13:18, 21.

Bantoma babandi kotalana, mpe mokomoko atuni: “Nkolo, ezali ngai te, boye te?” Ata Yudasi Mokeriota mpe atuni. Petro ayebisi Yoane, oyo azali pene na Yesu, atuna ye soki ezali nani. Yango wana Yoane apusani lisusu pene na Yesu mpe atuni: “Nkolo, ezali nani?”​—Matai 26:22; Yoane 13:25.

Yesu ayanoli: “Ezali moto oyo nakopesa ndambo ya limpa oyo nakɔtisi na saani.” Yesu akɔtisi ndambo ya limpa na saani oyo ezali na mesa, apesi yango Yudasi, alobi: “Mwana ya moto azali kokende, ndenge ekomamá mpo na ye, kasi mawa na moto oyo azali kotɛka Mwana ya moto! Elingaki kozala malamu koleka soki moto yango abotamaka te.” (Yoane 13:26; Matai 26:24) Na nsima Satana akɔteli Yudasi. Lokola Yudasi yango asili kobeba, amipesi sikoyo mpo na kosala mokano ya Zabolo, yango wana akómi “mwana ya libebi.”​—Yoane 6:64, 70; 12:4; 17:12.

Yesu alobi na Yudasi: “Oyo ozali kosala, salá yango nokinoki.” Bantoma mosusu bakanisi ete ayebisi Yudasi, moto asimbaka kɛsi ya mbongo, ete: “‘Sombá biloko oyo tozali na yango mposa mpo na fɛti,’ to apesa babola mwa eloko.” (Yoane 13:27-30) Nzokande, Yudasi akei nde kotɛka Yesu.

Kaka na butu wana ya Elekeli, Yesu abandisi molulu moko ya sika mpenza. Azwi limpa, asali libondeli mpo na kopesa matɔndi, abuki yango, mpe apesi yango bantoma na ye mpo bálya. Alobi: “Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ekokabama mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Limpa yango eleki na mabɔkɔ ya bantoma mpe balei yango.

Sikoyo Yesu akamati kɔpɔ ya vinyo, asali libondeli mpo na kopesa matɔndi, mpe apesi yango bantoma. Mokomoko amɛli vinyo oyo ezali na kɔpɔ, oyo mpo na yango Yesu alobi: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.”​—Luka 22:20.

Ndenge wana nde Yesu azwi bibongiseli mpo bayekoli na ye básalaka Ekaniseli ya liwa na ye mbula na mbula, na mokolo ya 14 Nisana. Yango ekozongisa na makanisi likambo oyo Yesu ná Tata na ye basalá mpo bato ya kondima bábika na etumbu ya lisumu mpe ya liwa. Ekaniseli eleki Elekeli ya Bayuda, mpo yango emonisi polele ete bato ya kondima basikolami mpenzampenza.

Yesu alobi ete makila na ye “ekosopama mpo na bato mingi mpo na kolimbisa masumu.” Bantoma na ye ya sembo ná bato mosusu ya sembo nde bakolimbisama. Bango nde bakozala na ye na Bokonzi ya Tata na ye.​—Matai 26:28, 29.