Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 MOKAPO 85

Basepelaka ntango mosumuki abongoli motema

Basepelaka ntango mosumuki abongoli motema

LUKA 15:1-10

  • NDAKISA YA MPATE OYO EBUNGI MPE YA MBONGO OYO EBUNGI

  • BAANZELU NA LIKOLÓ BASEPELAKA

Yesu amonisaki mbala na mbala na mosala na ye ya kosakola ete komikitisa ezali na ntina mingi. (Luka 14:8-11) Azali na mposa makasi azwa bato, basi ná mibali, oyo balingi kosalela Nzambe na komikitisa. Tii sikoyo, basusu kati na bango bazali naino basumuki minene.

Ntango Bafarisai mpe bakomeli bamoni ete, bato oyo bango bamonaka ete babongi te, bazali kolanda Yesu mpe kosepela na mateya na ye, bamileli boye: “Moto oyo azali koyamba basumuki mpe azali kolya na bango.” (Luka 15:2) Bafarisai mpe bakomeli bakanisi ete bazali sembo koleka bato mosusu nyonso mpe bazali komona basusu lokola salite ya makolo na bango. Mpo na komonisa ete batyolaka bato ya ndenge wana, basalelaka liloba ya Ebre ‛am ha’arets, “bato ya mboka [ya mabele],” mpo na kolobela bango.

Yesu akesani na bango mpo azali kopesa bato nyonso lokumu, komonisela bango boboto, mpe koyokela bango mawa. Yango wana, mingi kati na bato yango ya mpamba, oyo bayebani lokola basumuki mpenza, bazali kosepela koyoka Yesu. Kasi, Yesu ayoki ndenge nini mpo na likambo yango mpe asali nini lokola balobi na ye ete azali koyamba bato mpamba wana mpe kosalisa bango?

Eyano na ye emonani polele ntango apesi ndakisa moko oyo esimbi motema, oyo ekokani na oyo apesaki liboso, na Kapernaume. (Matai 18:12-14) Na ndakisa yango, Yesu akokanisi Bafarisai na bampate oyo bazali sembo mpe na kimya kati na etonga ya Nzambe. Nzokande, bato mpamba akokanisi bango na bampate oyo babungi nzela mpe bazali na elikya ata moke te. Yesu alobi:

“Nani na kati na bino oyo azali na bampate nkama moko (100), soki abungisi moko na yango, akotika ntuku libwa na libwa (99) te na esobe mpe akokende koluka oyo ebungi tii akomona yango? Mpe ntango azwi yango akotya yango na mapeka na ye mpe akosepela. Mpe ntango azongi na ndako, abengi baninga na ye ná bato oyo bafandi penepene na ye, alobi na bango ete: ‘Bósepela elongo na ngai, mpo namoni mpate na ngai oyo ebungaki.’”​—Luka 15:4-6.

Liteya nini Yesu abimisi na ndakisa oyo? Alobi: “Nazali koyebisa bino ete esengo ekozala mingi ndenge wana na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema koleka mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa (99) oyo basengeli kobongola motema te.”​—Luka 15:7.

Bafarisai bayoki nkanda ndenge Yesu alobeli kobongola motema. Bamimonaka sembo mpe bakanisaka ete bazali na ntina ya kobongola motema te. Ntango Bafarisai mosusu balobelaki Yesu mabe  mbula mibale liboso mpo alyaki na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki, ayanolaki bango ete: “Nayaki kobenga bayengebene te, kasi basumuki.” (Marko 2:15-17) Lokola Bafarisai bamimonaka sembo, bamonaki ntina ya kobongola motema te, yango wana esengo ezalaka na likoló te mpo na bango. Nzokande, esengo ezalaka na likoló soki mosumuki moko abongoli motema.

Mpo na komonisa ete esengo makasi ezalaka na likoló ntango mosumuki moko abongoli motema, Yesu apesi ndakisa mosusu, ya likambo oyo esalemi na ndako moko: “Mwasi nani oyo azali na badrakimɛ zomi ya bibende, soki abungisi drakimɛ moko ya ebende, akopelisa mwinda te mpe akokɔmbɔla ndako na ye te mpe akoluka malamumalamu te tii akomona yango? Mpe ntango amoni yango akobenga basi oyo bazali baninga na ye mpe bato oyo bafandi penepene na ye, akoloba ete: ‘Bósepela elongo na ngai, mpo namoni drakimɛ ya ebende oyo nabungisaki.’”​—Luka 15:8, 9.

Liteya oyo Yesu abimisi na ndakisa wana ekokani na oyo apesaki na ndakisa ya mpate oyo ebungaki. Alobi: “Nazali koyebisa bino, baanzelu ya Nzambe bakozala na esengo ndenge wana mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.”​—Luka 15:10.

Kanisá naino: baanzelu ya Nzambe basepelaka mingi ntango mosumuki abongoli motema! Likambo ya ntina mingi koleka ezali ete basumuki oyo babongoli mitema mpe bazwi esika na Bokonzi ya Nzambe na likoló bakoleka ata baanzelu! (1 Bakorinti 6:2, 3) Atako bongo, baanzelu bayokelaka bango zuwa te. Kasi, biso tosengeli koyoka ndenge nini ntango mosumuki moko abongoli motema mpe azongeli Nzambe?