Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 51

Babomi moto mokolo ya fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama

Babomi moto mokolo ya fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama

MATAI 14:1-12 MARKO 6:14-29 LUKA 9:7-9

  • ERODE ATINDI BÁKATA MOTÓ YA YOANE MOBATISI

Ntango bantoma ya Yesu bazali kosakola na Galile, moto oyo alakisaki bango Yesu azali na bonsomi wana te. Mbula soki mibale ekoki banda Yoane Mobatisi azali kaka na bolɔkɔ.

Yoane alobaki polele ete Mokonzi Erode Antipasi asalaki mabe ndenge akómisaki Erodiadi mwasi ya ndeko na ye Filipe, mwasi na ye. Erode abomaki libala na mwasi na ye ya liboso mpo na kobala Erodiadi. Na kotalela Mibeko ya Moize, oyo Erode azalaki koloba ete atosaka yango, libala wana ezalaki ya ekobo mpe ebukaki mibeko. Lokola Yoane apamelaki ye, Erode akɔtisaki Yoane na bolɔkɔ, mbala mosusu mpo Erodiadi atyaki ye mbamba.

Erode ayebi te soki asala Yoane nini, mpo bato “bazalaki kozwa ye mosakoli.” (Matai 14:5) Kasi ezali bongo te mpo na Erodiadi. ‘Akangeli ye nkanda,’ mpe azali kutu koluka báboma ye. (Marko 6:19) Nsukansuka, libaku emonani.

Mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 32 T.B., Erode asalisi fɛti monene ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama na ye. Bato minene nyonso mpe bakonzi ya basoda na ye, ata mpe bato ya lokumu mingi ya Galile bayei na fɛti yango. Ntango fɛti ezali kosalema, batindi Salome, elenge mwasi oyo Erodiadi abotaki na Filipe mobali na ye ya liboso, abinela bato oyo bayei na fɛti. Kobina na ye ekamwisi bato.

Lokola asepeli mingi ndenge mwana ya mwasi na ye abini, Erode alobi na ye boye: “Sɛngá ngai eloko nyonso oyo olingi, mpe nakopesa yo yango.” Alapeli ye kutu ndai ete: “Eloko nyonso okosɛnga ngai, nakopesa yo yango, ata bokonzi na ngai kabolá na mibale.” Liboso ya koyanola, Salome abimi mpe alobi na mama na ye boye: “Nasɛnga nini?”​—Marko 6:22-24.

Ezali libaku oyo Erodiadi azalaki koluka! Alobi mbala moko boye: “Motó ya Yoane Mobatisi.” Salome azongi nokinoki epai ya Erode mpe alobi na ye boye: “Nalingi opesa ngai sikoyo motó ya Yoane Mobatisi na saani.”​—Marko 6:24, 25.

Yango epesi Erode mawa makasi, kasi bapaya na ye bayokaki ndenge alapelaki Salome ndai. Koboya kokokisa maloba na ye ezali kotungisa ye, ata soki ekosɛnga aboma moto oyo asali likambo te. Na yango, Erode atindi soda moko oyo akɛngɛlaka ye akende na bolɔkɔ mpo na kokokisa etinda wana ya nsɔmɔ. Eumeli te, moto yango azongi na motó ya Yoane na saani. Apesi yango Salome, oyo amemeli yango mama na ye.

Ntango bayekoli ya Yoane bayoki yango, bayei mpe balongoli nzoto na ye mpe bakundi yango. Na nsima, bayebisi Yesu likambo yango.

Na nsima, ntango Erode ayoki ete Yesu azali kobikisa bato mpe kobimisa bademo, akómi kobanga. Azali komituna soki Yesu, moto oyo azali kosala makambo yango ezali te Yoane Mobatisi oyo “akufaki alamuki.” (Luka 9:7) Yango wana, Erode Antipasi akómi na mposa makasi ya komona Yesu. Ezali te mpo na koyoka mateya ya Yesu. Kutu, Erode alingi nde komona Yesu mpo na koyeba soki moto oyo ye azali kobanga ezali kaka Yoane Mobatisi to te.